1 Chronicles 17 (BOLCB2)

1 Wana Davidi avandaki na ndako na ye ya bokonzi, alobaki na mosakoli Natan :— Nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezali kati na ndako ya kapo. 2 Natan azongiselaki Davidi :— Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Nzambe azali elongo na yo. 3 Kasi na butu wana, Nzambe alobaki na Natan : 4 — Kende koyebisa Davidi, mosali na Ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali yo te moto okotongela Ngai ndako mpo ete navanda kati na yango. 5 Banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo, natikali nanu kovanda na ndako moko te ; nazalaki kaka kati na Mongombo, longwa na esika songolo kino na esika pakala. 6 Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na Ngai : ‘ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? ’ › 7 Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele. 8 Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili. 9 Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso ; 10 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakotia lisusu banguna na yo na se ya bokonzi na yo.Boye, nazali koyebisa yo ete Yawe akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo. 11 Tango okosilisa mobembo na yo awa na mokili mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye. 12 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi. 13 Nakozala tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai ; nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya mokonzi oyo alekaki liboso na yo. 14 Nakotia ye mokonzi ya ndako na Ngai mpe ya mokili na Ngai mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. › » 15 Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso. 16 Mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki :« Oh Yawe Nzambe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ? 17 Mpe lokola nde ekokaki te na miso na Yo, Nzambe na ngai, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo !Oh Yawe Nzambe, ozali kozwa ngai lokola moto ya lokumu ! 18 Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo mpo na lokumu oyo ozali kopesa na mosali na Yo ? Pamba te, oh Yawe, oyebi mosali na Yo. 19 Oh Yawe, mpo na mosali na Yo mpe kolanda mokano na Yo, okokisi makambo minene oyo mpe osali ete bilaka minene oyo nyonso eyebana. 20 Oh Yawe, moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo ! 21 Boni, ezali solo na ekolo moko kati na mokili, oyo ekokani na bato na Yo, Isalaele ; ekolo oyo, kati na mokili, Nzambe asikola bato na yango mpo na lokumu na Ye moko ? Osalaki ete Kombo na yo ekende sango na nzela ya misala minene mpe ya somo oyo osalaki tango obenganaki bikolo liboso ya bato na Yo, oyo akangolaki na Ejipito. 22 Okomisi Isalaele bato na Yo mpo na libela, mpe Yo, Yawe, okomi Nzambe na bango. 23 Bongo sik’oyo, oh Yawe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe libota na ye ekokisama mpo na libela ! Sala ndenge olakaki. 24 Boye, sala ete ekokisama, mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, azali solo Nzambe mpo na Isalaele ! › Boye bokonzi ya libota ya mosali na Yo, Davidi, ekolendisama liboso na Yo. 25 Solo, Yo moko, Nzambe na ngai, olakisaki na mosali na Yo ete okosala ete bokonzi ewumela na libota na ye. Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo. 26 Sik’oyo oh Yawe, ozali Nzambe ! Olakaki makambo ya malamu epai ya mosali na Yo. 27 Osepeli sik’oyo kopambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te ezali Yo, Yawe, nde opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela. »

In Other Versions

1 Chronicles 17 in the ANGEFD

1 Chronicles 17 in the ANTPNG2D

1 Chronicles 17 in the AS21

1 Chronicles 17 in the BAGH

1 Chronicles 17 in the BBPNG

1 Chronicles 17 in the BBT1E

1 Chronicles 17 in the BDS

1 Chronicles 17 in the BEV

1 Chronicles 17 in the BHAD

1 Chronicles 17 in the BIB

1 Chronicles 17 in the BLPT

1 Chronicles 17 in the BNT

1 Chronicles 17 in the BNTABOOT

1 Chronicles 17 in the BNTLV

1 Chronicles 17 in the BOATCB

1 Chronicles 17 in the BOATCB2

1 Chronicles 17 in the BOBCV

1 Chronicles 17 in the BOCNT

1 Chronicles 17 in the BOECS

1 Chronicles 17 in the BOGWICC

1 Chronicles 17 in the BOHCB

1 Chronicles 17 in the BOHCV

1 Chronicles 17 in the BOHLNT

1 Chronicles 17 in the BOHNTLTAL

1 Chronicles 17 in the BOICB

1 Chronicles 17 in the BOILNTAP

1 Chronicles 17 in the BOITCV

1 Chronicles 17 in the BOKCV

1 Chronicles 17 in the BOKCV2

1 Chronicles 17 in the BOKHWOG

1 Chronicles 17 in the BOKSSV

1 Chronicles 17 in the BOLCB

1 Chronicles 17 in the BOMCV

1 Chronicles 17 in the BONAV

1 Chronicles 17 in the BONCB

1 Chronicles 17 in the BONLT

1 Chronicles 17 in the BONUT2

1 Chronicles 17 in the BOPLNT

1 Chronicles 17 in the BOSCB

1 Chronicles 17 in the BOSNC

1 Chronicles 17 in the BOTLNT

1 Chronicles 17 in the BOVCB

1 Chronicles 17 in the BOYCB

1 Chronicles 17 in the BPBB

1 Chronicles 17 in the BPH

1 Chronicles 17 in the BSB

1 Chronicles 17 in the CCB

1 Chronicles 17 in the CUV

1 Chronicles 17 in the CUVS

1 Chronicles 17 in the DBT

1 Chronicles 17 in the DGDNT

1 Chronicles 17 in the DHNT

1 Chronicles 17 in the DNT

1 Chronicles 17 in the ELBE

1 Chronicles 17 in the EMTV

1 Chronicles 17 in the ESV

1 Chronicles 17 in the FBV

1 Chronicles 17 in the FEB

1 Chronicles 17 in the GGMNT

1 Chronicles 17 in the GNT

1 Chronicles 17 in the HARY

1 Chronicles 17 in the HNT

1 Chronicles 17 in the IRVA

1 Chronicles 17 in the IRVB

1 Chronicles 17 in the IRVG

1 Chronicles 17 in the IRVH

1 Chronicles 17 in the IRVK

1 Chronicles 17 in the IRVM

1 Chronicles 17 in the IRVM2

1 Chronicles 17 in the IRVO

1 Chronicles 17 in the IRVP

1 Chronicles 17 in the IRVT

1 Chronicles 17 in the IRVT2

1 Chronicles 17 in the IRVU

1 Chronicles 17 in the ISVN

1 Chronicles 17 in the JSNT

1 Chronicles 17 in the KAPI

1 Chronicles 17 in the KBT1ETNIK

1 Chronicles 17 in the KBV

1 Chronicles 17 in the KJV

1 Chronicles 17 in the KNFD

1 Chronicles 17 in the LBA

1 Chronicles 17 in the LBLA

1 Chronicles 17 in the LNT

1 Chronicles 17 in the LSV

1 Chronicles 17 in the MAAL

1 Chronicles 17 in the MBV

1 Chronicles 17 in the MBV2

1 Chronicles 17 in the MHNT

1 Chronicles 17 in the MKNFD

1 Chronicles 17 in the MNG

1 Chronicles 17 in the MNT

1 Chronicles 17 in the MNT2

1 Chronicles 17 in the MRS1T

1 Chronicles 17 in the NAA

1 Chronicles 17 in the NASB

1 Chronicles 17 in the NBLA

1 Chronicles 17 in the NBS

1 Chronicles 17 in the NBVTP

1 Chronicles 17 in the NET2

1 Chronicles 17 in the NIV11

1 Chronicles 17 in the NNT

1 Chronicles 17 in the NNT2

1 Chronicles 17 in the NNT3

1 Chronicles 17 in the PDDPT

1 Chronicles 17 in the PFNT

1 Chronicles 17 in the RMNT

1 Chronicles 17 in the SBIAS

1 Chronicles 17 in the SBIBS

1 Chronicles 17 in the SBIBS2

1 Chronicles 17 in the SBICS

1 Chronicles 17 in the SBIDS

1 Chronicles 17 in the SBIGS

1 Chronicles 17 in the SBIHS

1 Chronicles 17 in the SBIIS

1 Chronicles 17 in the SBIIS2

1 Chronicles 17 in the SBIIS3

1 Chronicles 17 in the SBIKS

1 Chronicles 17 in the SBIKS2

1 Chronicles 17 in the SBIMS

1 Chronicles 17 in the SBIOS

1 Chronicles 17 in the SBIPS

1 Chronicles 17 in the SBISS

1 Chronicles 17 in the SBITS

1 Chronicles 17 in the SBITS2

1 Chronicles 17 in the SBITS3

1 Chronicles 17 in the SBITS4

1 Chronicles 17 in the SBIUS

1 Chronicles 17 in the SBIVS

1 Chronicles 17 in the SBT

1 Chronicles 17 in the SBT1E

1 Chronicles 17 in the SCHL

1 Chronicles 17 in the SNT

1 Chronicles 17 in the SUSU

1 Chronicles 17 in the SUSU2

1 Chronicles 17 in the SYNO

1 Chronicles 17 in the TBIAOTANT

1 Chronicles 17 in the TBT1E

1 Chronicles 17 in the TBT1E2

1 Chronicles 17 in the TFTIP

1 Chronicles 17 in the TFTU

1 Chronicles 17 in the TGNTATF3T

1 Chronicles 17 in the THAI

1 Chronicles 17 in the TNFD

1 Chronicles 17 in the TNT

1 Chronicles 17 in the TNTIK

1 Chronicles 17 in the TNTIL

1 Chronicles 17 in the TNTIN

1 Chronicles 17 in the TNTIP

1 Chronicles 17 in the TNTIZ

1 Chronicles 17 in the TOMA

1 Chronicles 17 in the TTENT

1 Chronicles 17 in the UBG

1 Chronicles 17 in the UGV

1 Chronicles 17 in the UGV2

1 Chronicles 17 in the UGV3

1 Chronicles 17 in the VBL

1 Chronicles 17 in the VDCC

1 Chronicles 17 in the YALU

1 Chronicles 17 in the YAPE

1 Chronicles 17 in the YBVTP

1 Chronicles 17 in the ZBP