1 Peter 2 (BOLCB2)

1 Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato. 2 Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko, 3 awa bosili kososola ete Nkolo azali malamu. 4 Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye. 5 Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka. 6 Pamba te Makomi eloba :« Tala, napona libanga moko ya motuyaoyo nazali kotia kati na Sionalokola libanga ya songe ya ndako ;moto nyonso oyo akotiela yango motemaakotikala koyokisama soni te. » 7 Boye lokumu ezali mpo na bino oyo bondimaka ; kasi mpo na bato oyo bandimaka te,« libanga oyo batongi ndako babwakakiekomi libanga oyo esimbi ndako,libanga ya songe ya ndako, 8 mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku,libanga monene oyo ekweyisaka bato. »Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe ; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango. 9 Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa. 10 Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa. 11 Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino. 12 Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa. 13 Mpo na lokumu ya Nkolo, botosaka bato nyonso oyo batiami kati na bino lokola bakonzi : mokonzi ya mboka, 14 bayangeli mpe basambisi oyo bapesameli mosala ya kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe, mpe kondima bato oyo basalaka bolamu. 15 Pamba te, Nzambe alingi boye : bosalaka bolamu mpo na kokanga minoko ya bato oyo bazangi boyebi mpe bososoli ; 16 botambolaka lokola bansomi, kasi bosalelaka bonsomi na bino te lokola vwale mpo na kozipa mabe na bino, pamba te bozali bawumbu ya Nzambe. 17 Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu. 18 Bawumbu, botosaka bankolo na bino na bobangi nyonso : botosaka kaka te ba-oyo bazali malamu mpe boboto, kasi mpe ba-oyo bazali matata. 19 Pamba te ezali penza ngolu mpo na moto komona pasi kaka pamba mpo atosaka Nzambe. 20 Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali ? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu. 21 Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye. 22 Yesu atikalaki kosala lisumu ata moko te, mpe monoko na Ye etikalaki koloba lokuta te. 23 Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo. 24 Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono. 25 Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.

In Other Versions

1 Peter 2 in the ANGEFD

1 Peter 2 in the ANTPNG2D

1 Peter 2 in the AS21

1 Peter 2 in the BAGH

1 Peter 2 in the BBPNG

1 Peter 2 in the BBT1E

1 Peter 2 in the BDS

1 Peter 2 in the BEV

1 Peter 2 in the BHAD

1 Peter 2 in the BIB

1 Peter 2 in the BLPT

1 Peter 2 in the BNT

1 Peter 2 in the BNTABOOT

1 Peter 2 in the BNTLV

1 Peter 2 in the BOATCB

1 Peter 2 in the BOATCB2

1 Peter 2 in the BOBCV

1 Peter 2 in the BOCNT

1 Peter 2 in the BOECS

1 Peter 2 in the BOGWICC

1 Peter 2 in the BOHCB

1 Peter 2 in the BOHCV

1 Peter 2 in the BOHLNT

1 Peter 2 in the BOHNTLTAL

1 Peter 2 in the BOICB

1 Peter 2 in the BOILNTAP

1 Peter 2 in the BOITCV

1 Peter 2 in the BOKCV

1 Peter 2 in the BOKCV2

1 Peter 2 in the BOKHWOG

1 Peter 2 in the BOKSSV

1 Peter 2 in the BOLCB

1 Peter 2 in the BOMCV

1 Peter 2 in the BONAV

1 Peter 2 in the BONCB

1 Peter 2 in the BONLT

1 Peter 2 in the BONUT2

1 Peter 2 in the BOPLNT

1 Peter 2 in the BOSCB

1 Peter 2 in the BOSNC

1 Peter 2 in the BOTLNT

1 Peter 2 in the BOVCB

1 Peter 2 in the BOYCB

1 Peter 2 in the BPBB

1 Peter 2 in the BPH

1 Peter 2 in the BSB

1 Peter 2 in the CCB

1 Peter 2 in the CUV

1 Peter 2 in the CUVS

1 Peter 2 in the DBT

1 Peter 2 in the DGDNT

1 Peter 2 in the DHNT

1 Peter 2 in the DNT

1 Peter 2 in the ELBE

1 Peter 2 in the EMTV

1 Peter 2 in the ESV

1 Peter 2 in the FBV

1 Peter 2 in the FEB

1 Peter 2 in the GGMNT

1 Peter 2 in the GNT

1 Peter 2 in the HARY

1 Peter 2 in the HNT

1 Peter 2 in the IRVA

1 Peter 2 in the IRVB

1 Peter 2 in the IRVG

1 Peter 2 in the IRVH

1 Peter 2 in the IRVK

1 Peter 2 in the IRVM

1 Peter 2 in the IRVM2

1 Peter 2 in the IRVO

1 Peter 2 in the IRVP

1 Peter 2 in the IRVT

1 Peter 2 in the IRVT2

1 Peter 2 in the IRVU

1 Peter 2 in the ISVN

1 Peter 2 in the JSNT

1 Peter 2 in the KAPI

1 Peter 2 in the KBT1ETNIK

1 Peter 2 in the KBV

1 Peter 2 in the KJV

1 Peter 2 in the KNFD

1 Peter 2 in the LBA

1 Peter 2 in the LBLA

1 Peter 2 in the LNT

1 Peter 2 in the LSV

1 Peter 2 in the MAAL

1 Peter 2 in the MBV

1 Peter 2 in the MBV2

1 Peter 2 in the MHNT

1 Peter 2 in the MKNFD

1 Peter 2 in the MNG

1 Peter 2 in the MNT

1 Peter 2 in the MNT2

1 Peter 2 in the MRS1T

1 Peter 2 in the NAA

1 Peter 2 in the NASB

1 Peter 2 in the NBLA

1 Peter 2 in the NBS

1 Peter 2 in the NBVTP

1 Peter 2 in the NET2

1 Peter 2 in the NIV11

1 Peter 2 in the NNT

1 Peter 2 in the NNT2

1 Peter 2 in the NNT3

1 Peter 2 in the PDDPT

1 Peter 2 in the PFNT

1 Peter 2 in the RMNT

1 Peter 2 in the SBIAS

1 Peter 2 in the SBIBS

1 Peter 2 in the SBIBS2

1 Peter 2 in the SBICS

1 Peter 2 in the SBIDS

1 Peter 2 in the SBIGS

1 Peter 2 in the SBIHS

1 Peter 2 in the SBIIS

1 Peter 2 in the SBIIS2

1 Peter 2 in the SBIIS3

1 Peter 2 in the SBIKS

1 Peter 2 in the SBIKS2

1 Peter 2 in the SBIMS

1 Peter 2 in the SBIOS

1 Peter 2 in the SBIPS

1 Peter 2 in the SBISS

1 Peter 2 in the SBITS

1 Peter 2 in the SBITS2

1 Peter 2 in the SBITS3

1 Peter 2 in the SBITS4

1 Peter 2 in the SBIUS

1 Peter 2 in the SBIVS

1 Peter 2 in the SBT

1 Peter 2 in the SBT1E

1 Peter 2 in the SCHL

1 Peter 2 in the SNT

1 Peter 2 in the SUSU

1 Peter 2 in the SUSU2

1 Peter 2 in the SYNO

1 Peter 2 in the TBIAOTANT

1 Peter 2 in the TBT1E

1 Peter 2 in the TBT1E2

1 Peter 2 in the TFTIP

1 Peter 2 in the TFTU

1 Peter 2 in the TGNTATF3T

1 Peter 2 in the THAI

1 Peter 2 in the TNFD

1 Peter 2 in the TNT

1 Peter 2 in the TNTIK

1 Peter 2 in the TNTIL

1 Peter 2 in the TNTIN

1 Peter 2 in the TNTIP

1 Peter 2 in the TNTIZ

1 Peter 2 in the TOMA

1 Peter 2 in the TTENT

1 Peter 2 in the UBG

1 Peter 2 in the UGV

1 Peter 2 in the UGV2

1 Peter 2 in the UGV3

1 Peter 2 in the VBL

1 Peter 2 in the VDCC

1 Peter 2 in the YALU

1 Peter 2 in the YAPE

1 Peter 2 in the YBVTP

1 Peter 2 in the ZBP