1 Samuel 13 (BOLCB2)

1 Saulo azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki Isalaele mibu tuku minei na mibale. 2 Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango. 3 Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! » 4 Bato nyonso ya Isalaele bayokaki sango oyo azalaki koloba ete Saulo abundisaki mpe alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, mpe ete bato ya Filisitia bayinaki bato ya Isalaele.Bato nyonso basanganaki na Giligali mpo na kokende kobunda elongo na Saulo. 5 Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni. 6 Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele. 7 Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo. 8 Azelaki mikolo sambo, tango oyo Samuele akataki. Kasi mpo ete Samuele ayaki te na Giligali, yango wana bato batikaki Saulo mpe bapalanganaki. 9 Saulo alobaki : « Bomemela ngai banyama ya mbeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. »Mpe Saulo abonzaki mbeka ya kotumba. 10 Bongo tango kaka asilisaki kobonza mbeka yango ya kotumba, Samuele akomaki. Saulo abimaki mpo na kokende kopesa ye mbote. 11 Samuele atunaki ye :— Osali penza nini ?Saulo azongisaki :— Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi, 12 namilobelaki : « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te ! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba. 13 Samuele alobaki na Saulo :— Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela. 14 Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te. 15 Bongo Samuele alongwaki na Giligali mpe akendeki na Gibea ya Benjame. Mpe Saulo atangaki bato oyo bazalaki elongo na ye : bazalaki bato pene nkama motoba. 16 Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo bazalaki kovanda elongo na bango batandamaki mpo na bitumba, na Geba ya Benjame. Kasi bato ya Filisitia batongaki ya bango molako na Mikimasi. 17 Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato : lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali ; 18 lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni ; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe. 19 Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki : « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. » 20 Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu. 21 Bongo mpo na kotia minu yango na bapawu, na bapiki mpe na bipasola, bazalaki kofuta bagrame mwambe ya mbongo ya bibende. 22 Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye ; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango. 23 Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi.

In Other Versions

1 Samuel 13 in the ANGEFD

1 Samuel 13 in the ANTPNG2D

1 Samuel 13 in the AS21

1 Samuel 13 in the BAGH

1 Samuel 13 in the BBPNG

1 Samuel 13 in the BBT1E

1 Samuel 13 in the BDS

1 Samuel 13 in the BEV

1 Samuel 13 in the BHAD

1 Samuel 13 in the BIB

1 Samuel 13 in the BLPT

1 Samuel 13 in the BNT

1 Samuel 13 in the BNTABOOT

1 Samuel 13 in the BNTLV

1 Samuel 13 in the BOATCB

1 Samuel 13 in the BOATCB2

1 Samuel 13 in the BOBCV

1 Samuel 13 in the BOCNT

1 Samuel 13 in the BOECS

1 Samuel 13 in the BOGWICC

1 Samuel 13 in the BOHCB

1 Samuel 13 in the BOHCV

1 Samuel 13 in the BOHLNT

1 Samuel 13 in the BOHNTLTAL

1 Samuel 13 in the BOICB

1 Samuel 13 in the BOILNTAP

1 Samuel 13 in the BOITCV

1 Samuel 13 in the BOKCV

1 Samuel 13 in the BOKCV2

1 Samuel 13 in the BOKHWOG

1 Samuel 13 in the BOKSSV

1 Samuel 13 in the BOLCB

1 Samuel 13 in the BOMCV

1 Samuel 13 in the BONAV

1 Samuel 13 in the BONCB

1 Samuel 13 in the BONLT

1 Samuel 13 in the BONUT2

1 Samuel 13 in the BOPLNT

1 Samuel 13 in the BOSCB

1 Samuel 13 in the BOSNC

1 Samuel 13 in the BOTLNT

1 Samuel 13 in the BOVCB

1 Samuel 13 in the BOYCB

1 Samuel 13 in the BPBB

1 Samuel 13 in the BPH

1 Samuel 13 in the BSB

1 Samuel 13 in the CCB

1 Samuel 13 in the CUV

1 Samuel 13 in the CUVS

1 Samuel 13 in the DBT

1 Samuel 13 in the DGDNT

1 Samuel 13 in the DHNT

1 Samuel 13 in the DNT

1 Samuel 13 in the ELBE

1 Samuel 13 in the EMTV

1 Samuel 13 in the ESV

1 Samuel 13 in the FBV

1 Samuel 13 in the FEB

1 Samuel 13 in the GGMNT

1 Samuel 13 in the GNT

1 Samuel 13 in the HARY

1 Samuel 13 in the HNT

1 Samuel 13 in the IRVA

1 Samuel 13 in the IRVB

1 Samuel 13 in the IRVG

1 Samuel 13 in the IRVH

1 Samuel 13 in the IRVK

1 Samuel 13 in the IRVM

1 Samuel 13 in the IRVM2

1 Samuel 13 in the IRVO

1 Samuel 13 in the IRVP

1 Samuel 13 in the IRVT

1 Samuel 13 in the IRVT2

1 Samuel 13 in the IRVU

1 Samuel 13 in the ISVN

1 Samuel 13 in the JSNT

1 Samuel 13 in the KAPI

1 Samuel 13 in the KBT1ETNIK

1 Samuel 13 in the KBV

1 Samuel 13 in the KJV

1 Samuel 13 in the KNFD

1 Samuel 13 in the LBA

1 Samuel 13 in the LBLA

1 Samuel 13 in the LNT

1 Samuel 13 in the LSV

1 Samuel 13 in the MAAL

1 Samuel 13 in the MBV

1 Samuel 13 in the MBV2

1 Samuel 13 in the MHNT

1 Samuel 13 in the MKNFD

1 Samuel 13 in the MNG

1 Samuel 13 in the MNT

1 Samuel 13 in the MNT2

1 Samuel 13 in the MRS1T

1 Samuel 13 in the NAA

1 Samuel 13 in the NASB

1 Samuel 13 in the NBLA

1 Samuel 13 in the NBS

1 Samuel 13 in the NBVTP

1 Samuel 13 in the NET2

1 Samuel 13 in the NIV11

1 Samuel 13 in the NNT

1 Samuel 13 in the NNT2

1 Samuel 13 in the NNT3

1 Samuel 13 in the PDDPT

1 Samuel 13 in the PFNT

1 Samuel 13 in the RMNT

1 Samuel 13 in the SBIAS

1 Samuel 13 in the SBIBS

1 Samuel 13 in the SBIBS2

1 Samuel 13 in the SBICS

1 Samuel 13 in the SBIDS

1 Samuel 13 in the SBIGS

1 Samuel 13 in the SBIHS

1 Samuel 13 in the SBIIS

1 Samuel 13 in the SBIIS2

1 Samuel 13 in the SBIIS3

1 Samuel 13 in the SBIKS

1 Samuel 13 in the SBIKS2

1 Samuel 13 in the SBIMS

1 Samuel 13 in the SBIOS

1 Samuel 13 in the SBIPS

1 Samuel 13 in the SBISS

1 Samuel 13 in the SBITS

1 Samuel 13 in the SBITS2

1 Samuel 13 in the SBITS3

1 Samuel 13 in the SBITS4

1 Samuel 13 in the SBIUS

1 Samuel 13 in the SBIVS

1 Samuel 13 in the SBT

1 Samuel 13 in the SBT1E

1 Samuel 13 in the SCHL

1 Samuel 13 in the SNT

1 Samuel 13 in the SUSU

1 Samuel 13 in the SUSU2

1 Samuel 13 in the SYNO

1 Samuel 13 in the TBIAOTANT

1 Samuel 13 in the TBT1E

1 Samuel 13 in the TBT1E2

1 Samuel 13 in the TFTIP

1 Samuel 13 in the TFTU

1 Samuel 13 in the TGNTATF3T

1 Samuel 13 in the THAI

1 Samuel 13 in the TNFD

1 Samuel 13 in the TNT

1 Samuel 13 in the TNTIK

1 Samuel 13 in the TNTIL

1 Samuel 13 in the TNTIN

1 Samuel 13 in the TNTIP

1 Samuel 13 in the TNTIZ

1 Samuel 13 in the TOMA

1 Samuel 13 in the TTENT

1 Samuel 13 in the UBG

1 Samuel 13 in the UGV

1 Samuel 13 in the UGV2

1 Samuel 13 in the UGV3

1 Samuel 13 in the VBL

1 Samuel 13 in the VDCC

1 Samuel 13 in the YALU

1 Samuel 13 in the YAPE

1 Samuel 13 in the YBVTP

1 Samuel 13 in the ZBP