2 Samuel 16 (BOLCB2)

1 Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye ; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino. 2 Mokonzi atunaki Tsiba :— Mpo na nini omemi biloko oyo ?Tsiba azongisaki :— Ba-ane ezali mpo na libota ya mokonzi mpo ete batambola na yango, mapa mpe bambuma ezali mpo na bato mpo ete balia, mpe masanga ya vino ezali mpo na kopesa makasi epai ya bato oyo bakolemba na esobe. 3 Bongo mokonzi atunaki lisusu :— Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo ?Tsiba azongisaki :— Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki : « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. » 4 Mokonzi alobaki na Tsiba :— Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo.Tsiba alobaki :— Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo ! 5 Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe. 6 Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi. 7 Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe : « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba. 8 Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. » 9 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi :— Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto. 10 Kasi mokonzi alobaki :— Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? » 11 Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo. 12 Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. » 13 Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu. 14 Mokonzi elongo na bato na ye nyonso balembaki tango bakomaki na esika oyo bazalaki kokende mpe bapemaki kuna. 15 Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye. 16 Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye :— Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! 17 Abisalomi atunaki Ushayi :— Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo ? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo ? 18 Ushayi alobaki na Abisalomi :— Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi. 19 Mpe ngai nakosalela nani ? Ezali te mwana na ye ya mobali ? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo. 20 Abisalomi alobaki na Ayitofeli :— Pesa biso toli na yo : tosengeli kosala nini ? 21 Ayitofeli azongiselaki Abisalomi :— Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama. 22 Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba. 23 Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.

In Other Versions

2 Samuel 16 in the ANGEFD

2 Samuel 16 in the ANTPNG2D

2 Samuel 16 in the AS21

2 Samuel 16 in the BAGH

2 Samuel 16 in the BBPNG

2 Samuel 16 in the BBT1E

2 Samuel 16 in the BDS

2 Samuel 16 in the BEV

2 Samuel 16 in the BHAD

2 Samuel 16 in the BIB

2 Samuel 16 in the BLPT

2 Samuel 16 in the BNT

2 Samuel 16 in the BNTABOOT

2 Samuel 16 in the BNTLV

2 Samuel 16 in the BOATCB

2 Samuel 16 in the BOATCB2

2 Samuel 16 in the BOBCV

2 Samuel 16 in the BOCNT

2 Samuel 16 in the BOECS

2 Samuel 16 in the BOGWICC

2 Samuel 16 in the BOHCB

2 Samuel 16 in the BOHCV

2 Samuel 16 in the BOHLNT

2 Samuel 16 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 16 in the BOICB

2 Samuel 16 in the BOILNTAP

2 Samuel 16 in the BOITCV

2 Samuel 16 in the BOKCV

2 Samuel 16 in the BOKCV2

2 Samuel 16 in the BOKHWOG

2 Samuel 16 in the BOKSSV

2 Samuel 16 in the BOLCB

2 Samuel 16 in the BOMCV

2 Samuel 16 in the BONAV

2 Samuel 16 in the BONCB

2 Samuel 16 in the BONLT

2 Samuel 16 in the BONUT2

2 Samuel 16 in the BOPLNT

2 Samuel 16 in the BOSCB

2 Samuel 16 in the BOSNC

2 Samuel 16 in the BOTLNT

2 Samuel 16 in the BOVCB

2 Samuel 16 in the BOYCB

2 Samuel 16 in the BPBB

2 Samuel 16 in the BPH

2 Samuel 16 in the BSB

2 Samuel 16 in the CCB

2 Samuel 16 in the CUV

2 Samuel 16 in the CUVS

2 Samuel 16 in the DBT

2 Samuel 16 in the DGDNT

2 Samuel 16 in the DHNT

2 Samuel 16 in the DNT

2 Samuel 16 in the ELBE

2 Samuel 16 in the EMTV

2 Samuel 16 in the ESV

2 Samuel 16 in the FBV

2 Samuel 16 in the FEB

2 Samuel 16 in the GGMNT

2 Samuel 16 in the GNT

2 Samuel 16 in the HARY

2 Samuel 16 in the HNT

2 Samuel 16 in the IRVA

2 Samuel 16 in the IRVB

2 Samuel 16 in the IRVG

2 Samuel 16 in the IRVH

2 Samuel 16 in the IRVK

2 Samuel 16 in the IRVM

2 Samuel 16 in the IRVM2

2 Samuel 16 in the IRVO

2 Samuel 16 in the IRVP

2 Samuel 16 in the IRVT

2 Samuel 16 in the IRVT2

2 Samuel 16 in the IRVU

2 Samuel 16 in the ISVN

2 Samuel 16 in the JSNT

2 Samuel 16 in the KAPI

2 Samuel 16 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 16 in the KBV

2 Samuel 16 in the KJV

2 Samuel 16 in the KNFD

2 Samuel 16 in the LBA

2 Samuel 16 in the LBLA

2 Samuel 16 in the LNT

2 Samuel 16 in the LSV

2 Samuel 16 in the MAAL

2 Samuel 16 in the MBV

2 Samuel 16 in the MBV2

2 Samuel 16 in the MHNT

2 Samuel 16 in the MKNFD

2 Samuel 16 in the MNG

2 Samuel 16 in the MNT

2 Samuel 16 in the MNT2

2 Samuel 16 in the MRS1T

2 Samuel 16 in the NAA

2 Samuel 16 in the NASB

2 Samuel 16 in the NBLA

2 Samuel 16 in the NBS

2 Samuel 16 in the NBVTP

2 Samuel 16 in the NET2

2 Samuel 16 in the NIV11

2 Samuel 16 in the NNT

2 Samuel 16 in the NNT2

2 Samuel 16 in the NNT3

2 Samuel 16 in the PDDPT

2 Samuel 16 in the PFNT

2 Samuel 16 in the RMNT

2 Samuel 16 in the SBIAS

2 Samuel 16 in the SBIBS

2 Samuel 16 in the SBIBS2

2 Samuel 16 in the SBICS

2 Samuel 16 in the SBIDS

2 Samuel 16 in the SBIGS

2 Samuel 16 in the SBIHS

2 Samuel 16 in the SBIIS

2 Samuel 16 in the SBIIS2

2 Samuel 16 in the SBIIS3

2 Samuel 16 in the SBIKS

2 Samuel 16 in the SBIKS2

2 Samuel 16 in the SBIMS

2 Samuel 16 in the SBIOS

2 Samuel 16 in the SBIPS

2 Samuel 16 in the SBISS

2 Samuel 16 in the SBITS

2 Samuel 16 in the SBITS2

2 Samuel 16 in the SBITS3

2 Samuel 16 in the SBITS4

2 Samuel 16 in the SBIUS

2 Samuel 16 in the SBIVS

2 Samuel 16 in the SBT

2 Samuel 16 in the SBT1E

2 Samuel 16 in the SCHL

2 Samuel 16 in the SNT

2 Samuel 16 in the SUSU

2 Samuel 16 in the SUSU2

2 Samuel 16 in the SYNO

2 Samuel 16 in the TBIAOTANT

2 Samuel 16 in the TBT1E

2 Samuel 16 in the TBT1E2

2 Samuel 16 in the TFTIP

2 Samuel 16 in the TFTU

2 Samuel 16 in the TGNTATF3T

2 Samuel 16 in the THAI

2 Samuel 16 in the TNFD

2 Samuel 16 in the TNT

2 Samuel 16 in the TNTIK

2 Samuel 16 in the TNTIL

2 Samuel 16 in the TNTIN

2 Samuel 16 in the TNTIP

2 Samuel 16 in the TNTIZ

2 Samuel 16 in the TOMA

2 Samuel 16 in the TTENT

2 Samuel 16 in the UBG

2 Samuel 16 in the UGV

2 Samuel 16 in the UGV2

2 Samuel 16 in the UGV3

2 Samuel 16 in the VBL

2 Samuel 16 in the VDCC

2 Samuel 16 in the YALU

2 Samuel 16 in the YAPE

2 Samuel 16 in the YBVTP

2 Samuel 16 in the ZBP