2 Samuel 9 (BOLCB2)

1 Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. » 2 Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo ; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye :— Ezali yo Tsiba ?Azongisaki :— Iyo, ezali ngai, mosali na yo. 3 Mokonzi atunaki ye :— Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ?Tsiba azongiselaki mokonzi :— Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale. 4 Mokonzi atunaki ye :— Azali wapi ?Tsiba azongisaki :— Azali na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli, na mboka Lo-Debari. 5 Boye, mokonzi Davidi abengisaki ye wuta na Lo-Debari, na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli. 6 Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki :— Mefibosheti !Ye azongisaki :— Ngai oyo, mosali na yo. 7 Davidi alobaki na ye :— Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. 8 Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki :— Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai ? 9 Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye :— Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye. 10 Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale. 11 Tsiba alobaki na mokonzi :— Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye.Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi. 12 Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge ; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti. 13 Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.

In Other Versions

2 Samuel 9 in the ANGEFD

2 Samuel 9 in the ANTPNG2D

2 Samuel 9 in the AS21

2 Samuel 9 in the BAGH

2 Samuel 9 in the BBPNG

2 Samuel 9 in the BBT1E

2 Samuel 9 in the BDS

2 Samuel 9 in the BEV

2 Samuel 9 in the BHAD

2 Samuel 9 in the BIB

2 Samuel 9 in the BLPT

2 Samuel 9 in the BNT

2 Samuel 9 in the BNTABOOT

2 Samuel 9 in the BNTLV

2 Samuel 9 in the BOATCB

2 Samuel 9 in the BOATCB2

2 Samuel 9 in the BOBCV

2 Samuel 9 in the BOCNT

2 Samuel 9 in the BOECS

2 Samuel 9 in the BOGWICC

2 Samuel 9 in the BOHCB

2 Samuel 9 in the BOHCV

2 Samuel 9 in the BOHLNT

2 Samuel 9 in the BOHNTLTAL

2 Samuel 9 in the BOICB

2 Samuel 9 in the BOILNTAP

2 Samuel 9 in the BOITCV

2 Samuel 9 in the BOKCV

2 Samuel 9 in the BOKCV2

2 Samuel 9 in the BOKHWOG

2 Samuel 9 in the BOKSSV

2 Samuel 9 in the BOLCB

2 Samuel 9 in the BOMCV

2 Samuel 9 in the BONAV

2 Samuel 9 in the BONCB

2 Samuel 9 in the BONLT

2 Samuel 9 in the BONUT2

2 Samuel 9 in the BOPLNT

2 Samuel 9 in the BOSCB

2 Samuel 9 in the BOSNC

2 Samuel 9 in the BOTLNT

2 Samuel 9 in the BOVCB

2 Samuel 9 in the BOYCB

2 Samuel 9 in the BPBB

2 Samuel 9 in the BPH

2 Samuel 9 in the BSB

2 Samuel 9 in the CCB

2 Samuel 9 in the CUV

2 Samuel 9 in the CUVS

2 Samuel 9 in the DBT

2 Samuel 9 in the DGDNT

2 Samuel 9 in the DHNT

2 Samuel 9 in the DNT

2 Samuel 9 in the ELBE

2 Samuel 9 in the EMTV

2 Samuel 9 in the ESV

2 Samuel 9 in the FBV

2 Samuel 9 in the FEB

2 Samuel 9 in the GGMNT

2 Samuel 9 in the GNT

2 Samuel 9 in the HARY

2 Samuel 9 in the HNT

2 Samuel 9 in the IRVA

2 Samuel 9 in the IRVB

2 Samuel 9 in the IRVG

2 Samuel 9 in the IRVH

2 Samuel 9 in the IRVK

2 Samuel 9 in the IRVM

2 Samuel 9 in the IRVM2

2 Samuel 9 in the IRVO

2 Samuel 9 in the IRVP

2 Samuel 9 in the IRVT

2 Samuel 9 in the IRVT2

2 Samuel 9 in the IRVU

2 Samuel 9 in the ISVN

2 Samuel 9 in the JSNT

2 Samuel 9 in the KAPI

2 Samuel 9 in the KBT1ETNIK

2 Samuel 9 in the KBV

2 Samuel 9 in the KJV

2 Samuel 9 in the KNFD

2 Samuel 9 in the LBA

2 Samuel 9 in the LBLA

2 Samuel 9 in the LNT

2 Samuel 9 in the LSV

2 Samuel 9 in the MAAL

2 Samuel 9 in the MBV

2 Samuel 9 in the MBV2

2 Samuel 9 in the MHNT

2 Samuel 9 in the MKNFD

2 Samuel 9 in the MNG

2 Samuel 9 in the MNT

2 Samuel 9 in the MNT2

2 Samuel 9 in the MRS1T

2 Samuel 9 in the NAA

2 Samuel 9 in the NASB

2 Samuel 9 in the NBLA

2 Samuel 9 in the NBS

2 Samuel 9 in the NBVTP

2 Samuel 9 in the NET2

2 Samuel 9 in the NIV11

2 Samuel 9 in the NNT

2 Samuel 9 in the NNT2

2 Samuel 9 in the NNT3

2 Samuel 9 in the PDDPT

2 Samuel 9 in the PFNT

2 Samuel 9 in the RMNT

2 Samuel 9 in the SBIAS

2 Samuel 9 in the SBIBS

2 Samuel 9 in the SBIBS2

2 Samuel 9 in the SBICS

2 Samuel 9 in the SBIDS

2 Samuel 9 in the SBIGS

2 Samuel 9 in the SBIHS

2 Samuel 9 in the SBIIS

2 Samuel 9 in the SBIIS2

2 Samuel 9 in the SBIIS3

2 Samuel 9 in the SBIKS

2 Samuel 9 in the SBIKS2

2 Samuel 9 in the SBIMS

2 Samuel 9 in the SBIOS

2 Samuel 9 in the SBIPS

2 Samuel 9 in the SBISS

2 Samuel 9 in the SBITS

2 Samuel 9 in the SBITS2

2 Samuel 9 in the SBITS3

2 Samuel 9 in the SBITS4

2 Samuel 9 in the SBIUS

2 Samuel 9 in the SBIVS

2 Samuel 9 in the SBT

2 Samuel 9 in the SBT1E

2 Samuel 9 in the SCHL

2 Samuel 9 in the SNT

2 Samuel 9 in the SUSU

2 Samuel 9 in the SUSU2

2 Samuel 9 in the SYNO

2 Samuel 9 in the TBIAOTANT

2 Samuel 9 in the TBT1E

2 Samuel 9 in the TBT1E2

2 Samuel 9 in the TFTIP

2 Samuel 9 in the TFTU

2 Samuel 9 in the TGNTATF3T

2 Samuel 9 in the THAI

2 Samuel 9 in the TNFD

2 Samuel 9 in the TNT

2 Samuel 9 in the TNTIK

2 Samuel 9 in the TNTIL

2 Samuel 9 in the TNTIN

2 Samuel 9 in the TNTIP

2 Samuel 9 in the TNTIZ

2 Samuel 9 in the TOMA

2 Samuel 9 in the TTENT

2 Samuel 9 in the UBG

2 Samuel 9 in the UGV

2 Samuel 9 in the UGV2

2 Samuel 9 in the UGV3

2 Samuel 9 in the VBL

2 Samuel 9 in the VDCC

2 Samuel 9 in the YALU

2 Samuel 9 in the YAPE

2 Samuel 9 in the YBVTP

2 Samuel 9 in the ZBP