Acts 12 (BOLCB2)

1 Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango. 2 Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga. 3 Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire. 4 Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye ; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika. 5 Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye. 6 Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko. 7 Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye ; alobaki na ye :— Telema noki !Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo. 8 Anjelu alobaki na ye :— Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo !Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu :— Lata nzambala na yo mpe landa ngai. 9 Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo : akanisaki ete azwi emoniseli. 10 Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango ; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo. 11 Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki :— Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo ! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai. 12 Tango amonaki bongo, akendeki na ndako ya Mari, mama ya Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. » Bandimi ebele basanganaki kuna mpe bazalaki kosambela. 13 Petelo abetaki ekuke ; mpe mwasi mosali moko, kombo na ye « Rode, » apusanaki na ekuke mpo na koyanola. 14 Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Petelo, atondaki na esengo ; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu mpe agangaki :— Eh, ezali Petelo ! Azali wana, na libanda, liboso ya ekuke ! 15 Balobaki na ye :— Okomi penza na liboma !Kasi Rode azalaki kaka koloba :— Ya solo penza ! Petelo azali na libanda.Bongo balobaki :— Ekoki kozala anjelu na ye ! 16 Nzokande, Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi. 17 Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu :— Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu.Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu. 18 Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana :— Likambo nini ekomelaki Petelo ? 19 Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango.Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea. 20 Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode. 21 Tango mokolo oyo akataki ekokaki, Erode alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alobaki na bato. 22 Bato bagangaki :— Tala yango oyo, mongongo ya nzambe ; ezali mongongo ya moto te ! 23 Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te ; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki. 24 Kasi Liloba na Nzambe ekobaki kopanzana mpe kobota mbuma. 25 Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »

In Other Versions

Acts 12 in the ANGEFD

Acts 12 in the ANTPNG2D

Acts 12 in the AS21

Acts 12 in the BAGH

Acts 12 in the BBPNG

Acts 12 in the BBT1E

Acts 12 in the BDS

Acts 12 in the BEV

Acts 12 in the BHAD

Acts 12 in the BIB

Acts 12 in the BLPT

Acts 12 in the BNT

Acts 12 in the BNTABOOT

Acts 12 in the BNTLV

Acts 12 in the BOATCB

Acts 12 in the BOATCB2

Acts 12 in the BOBCV

Acts 12 in the BOCNT

Acts 12 in the BOECS

Acts 12 in the BOGWICC

Acts 12 in the BOHCB

Acts 12 in the BOHCV

Acts 12 in the BOHLNT

Acts 12 in the BOHNTLTAL

Acts 12 in the BOICB

Acts 12 in the BOILNTAP

Acts 12 in the BOITCV

Acts 12 in the BOKCV

Acts 12 in the BOKCV2

Acts 12 in the BOKHWOG

Acts 12 in the BOKSSV

Acts 12 in the BOLCB

Acts 12 in the BOMCV

Acts 12 in the BONAV

Acts 12 in the BONCB

Acts 12 in the BONLT

Acts 12 in the BONUT2

Acts 12 in the BOPLNT

Acts 12 in the BOSCB

Acts 12 in the BOSNC

Acts 12 in the BOTLNT

Acts 12 in the BOVCB

Acts 12 in the BOYCB

Acts 12 in the BPBB

Acts 12 in the BPH

Acts 12 in the BSB

Acts 12 in the CCB

Acts 12 in the CUV

Acts 12 in the CUVS

Acts 12 in the DBT

Acts 12 in the DGDNT

Acts 12 in the DHNT

Acts 12 in the DNT

Acts 12 in the ELBE

Acts 12 in the EMTV

Acts 12 in the ESV

Acts 12 in the FBV

Acts 12 in the FEB

Acts 12 in the GGMNT

Acts 12 in the GNT

Acts 12 in the HARY

Acts 12 in the HNT

Acts 12 in the IRVA

Acts 12 in the IRVB

Acts 12 in the IRVG

Acts 12 in the IRVH

Acts 12 in the IRVK

Acts 12 in the IRVM

Acts 12 in the IRVM2

Acts 12 in the IRVO

Acts 12 in the IRVP

Acts 12 in the IRVT

Acts 12 in the IRVT2

Acts 12 in the IRVU

Acts 12 in the ISVN

Acts 12 in the JSNT

Acts 12 in the KAPI

Acts 12 in the KBT1ETNIK

Acts 12 in the KBV

Acts 12 in the KJV

Acts 12 in the KNFD

Acts 12 in the LBA

Acts 12 in the LBLA

Acts 12 in the LNT

Acts 12 in the LSV

Acts 12 in the MAAL

Acts 12 in the MBV

Acts 12 in the MBV2

Acts 12 in the MHNT

Acts 12 in the MKNFD

Acts 12 in the MNG

Acts 12 in the MNT

Acts 12 in the MNT2

Acts 12 in the MRS1T

Acts 12 in the NAA

Acts 12 in the NASB

Acts 12 in the NBLA

Acts 12 in the NBS

Acts 12 in the NBVTP

Acts 12 in the NET2

Acts 12 in the NIV11

Acts 12 in the NNT

Acts 12 in the NNT2

Acts 12 in the NNT3

Acts 12 in the PDDPT

Acts 12 in the PFNT

Acts 12 in the RMNT

Acts 12 in the SBIAS

Acts 12 in the SBIBS

Acts 12 in the SBIBS2

Acts 12 in the SBICS

Acts 12 in the SBIDS

Acts 12 in the SBIGS

Acts 12 in the SBIHS

Acts 12 in the SBIIS

Acts 12 in the SBIIS2

Acts 12 in the SBIIS3

Acts 12 in the SBIKS

Acts 12 in the SBIKS2

Acts 12 in the SBIMS

Acts 12 in the SBIOS

Acts 12 in the SBIPS

Acts 12 in the SBISS

Acts 12 in the SBITS

Acts 12 in the SBITS2

Acts 12 in the SBITS3

Acts 12 in the SBITS4

Acts 12 in the SBIUS

Acts 12 in the SBIVS

Acts 12 in the SBT

Acts 12 in the SBT1E

Acts 12 in the SCHL

Acts 12 in the SNT

Acts 12 in the SUSU

Acts 12 in the SUSU2

Acts 12 in the SYNO

Acts 12 in the TBIAOTANT

Acts 12 in the TBT1E

Acts 12 in the TBT1E2

Acts 12 in the TFTIP

Acts 12 in the TFTU

Acts 12 in the TGNTATF3T

Acts 12 in the THAI

Acts 12 in the TNFD

Acts 12 in the TNT

Acts 12 in the TNTIK

Acts 12 in the TNTIL

Acts 12 in the TNTIN

Acts 12 in the TNTIP

Acts 12 in the TNTIZ

Acts 12 in the TOMA

Acts 12 in the TTENT

Acts 12 in the UBG

Acts 12 in the UGV

Acts 12 in the UGV2

Acts 12 in the UGV3

Acts 12 in the VBL

Acts 12 in the VDCC

Acts 12 in the YALU

Acts 12 in the YAPE

Acts 12 in the YBVTP

Acts 12 in the ZBP