Acts 16 (BOLCB2)

1 Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto ; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese. 2 Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi. 3 Polo azalaki na posa ya kosala mobembo elongo na ye, boye akatisaki ye ngenga ; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya Grese. 4 Kati na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba bazwaki na Yelusalemi, mpe bazalaki kosenga na bango ete batosa yango. 5 Boye, Mangomba ezalaki kolendisama kati na kondima, mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo. 6 Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia. 7 Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te. 8 Boye bakatisaki etuka ya Mizi mpe bakendeki kino na libongo ya Troasi. 9 Na butu, Polo azwaki emoniseli moko : « Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye : ‹ Nabondeli yo, yaka kosunga biso kati na Masedwane ! › » 10 Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu. 11 Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendeki mbala moko kino na esanga ya Samotrase ; bongo mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neyapolisi. 12 Kolongwa wana, tokendeki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki kuna mwa mikolo. 13 Na mokolo ya Saba, tobimaki na libanda ya ekuke ya engumba mpo na kokende pembeni ya ebale epai wapi tokanisaki ete tokomona esika ya losambo. Wana tovandaki, tokomaki koteya basi oyo basanganaki kuna. 14 Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba. 15 Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki :— Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai.Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye. 16 Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye. 17 Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga :— Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko. 18 Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango :— Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo : bima kati na mwasi oyo !Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye. 19 Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele. 20 Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki :— Bato oyo bazali Bayuda ; bazali kotia mobulu kati na engumba na biso. 21 Bazali koluka kokotisa awa bizaleli oyo mibeko epekisi biso, bato ya Rome, kondima mpe kosalela. 22 Bato oyo batondaki wana batombokelaki Polo mpe Silasi, bongo basambisi bapesaki mitindo ete balongola bango bilamba mpe babeta bango fimbu. 23 Sima na kobetisa bango fimbu makasi, babwakaki bango kati na boloko ; bapesaki mitindo na mokengeli boloko ete akengela bango malamu. 24 Tango kaka mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko ya kati mpe akangisaki makolo na bango na mabaya. 25 Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango. 26 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, mpe miboko ya boloko eninganaki. Kaka na tango yango, miboko ya boloko ebukanaki, bikuke nyonso ya boloko efungwamaki, mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki. 27 Mokengeli boloko alamukaki ; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi. 28 Kasi Polo agangaki na mongongo makasi :— Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa ! 29 Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi. 30 Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango :— Batata, nasala nini mpo ete nabika ? 31 Bazongisaki :— Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo. 32 Bongo bateyaki ye mpe libota na ye Liloba na Nkolo. 33 Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli boloko azwaki bango elongo na ye mpe asukolaki bango bapota ; bongo, mbala moko, ye mpe libota na ye bazwaki libatisi. 34 Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei ; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe. 35 Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli boloko mpo na koyebisa ye :— Bimisa bato wana na boloko ! 36 Mokengeli boloko alobaki na Polo :— Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye sik’oyo, bobima mpe bokende na kimia. 37 Kasi Polo azongisaki :— Nini ! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku ? Te, ekosalema bongo te ! Tika ete bango moko baya kobimisa biso ! 38 Basali bakendeki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi. 39 Bayaki kosenga bango bolimbisi, mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki na bango ete balongwa na engumba wana. 40 Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.

In Other Versions

Acts 16 in the ANGEFD

Acts 16 in the ANTPNG2D

Acts 16 in the AS21

Acts 16 in the BAGH

Acts 16 in the BBPNG

Acts 16 in the BBT1E

Acts 16 in the BDS

Acts 16 in the BEV

Acts 16 in the BHAD

Acts 16 in the BIB

Acts 16 in the BLPT

Acts 16 in the BNT

Acts 16 in the BNTABOOT

Acts 16 in the BNTLV

Acts 16 in the BOATCB

Acts 16 in the BOATCB2

Acts 16 in the BOBCV

Acts 16 in the BOCNT

Acts 16 in the BOECS

Acts 16 in the BOGWICC

Acts 16 in the BOHCB

Acts 16 in the BOHCV

Acts 16 in the BOHLNT

Acts 16 in the BOHNTLTAL

Acts 16 in the BOICB

Acts 16 in the BOILNTAP

Acts 16 in the BOITCV

Acts 16 in the BOKCV

Acts 16 in the BOKCV2

Acts 16 in the BOKHWOG

Acts 16 in the BOKSSV

Acts 16 in the BOLCB

Acts 16 in the BOMCV

Acts 16 in the BONAV

Acts 16 in the BONCB

Acts 16 in the BONLT

Acts 16 in the BONUT2

Acts 16 in the BOPLNT

Acts 16 in the BOSCB

Acts 16 in the BOSNC

Acts 16 in the BOTLNT

Acts 16 in the BOVCB

Acts 16 in the BOYCB

Acts 16 in the BPBB

Acts 16 in the BPH

Acts 16 in the BSB

Acts 16 in the CCB

Acts 16 in the CUV

Acts 16 in the CUVS

Acts 16 in the DBT

Acts 16 in the DGDNT

Acts 16 in the DHNT

Acts 16 in the DNT

Acts 16 in the ELBE

Acts 16 in the EMTV

Acts 16 in the ESV

Acts 16 in the FBV

Acts 16 in the FEB

Acts 16 in the GGMNT

Acts 16 in the GNT

Acts 16 in the HARY

Acts 16 in the HNT

Acts 16 in the IRVA

Acts 16 in the IRVB

Acts 16 in the IRVG

Acts 16 in the IRVH

Acts 16 in the IRVK

Acts 16 in the IRVM

Acts 16 in the IRVM2

Acts 16 in the IRVO

Acts 16 in the IRVP

Acts 16 in the IRVT

Acts 16 in the IRVT2

Acts 16 in the IRVU

Acts 16 in the ISVN

Acts 16 in the JSNT

Acts 16 in the KAPI

Acts 16 in the KBT1ETNIK

Acts 16 in the KBV

Acts 16 in the KJV

Acts 16 in the KNFD

Acts 16 in the LBA

Acts 16 in the LBLA

Acts 16 in the LNT

Acts 16 in the LSV

Acts 16 in the MAAL

Acts 16 in the MBV

Acts 16 in the MBV2

Acts 16 in the MHNT

Acts 16 in the MKNFD

Acts 16 in the MNG

Acts 16 in the MNT

Acts 16 in the MNT2

Acts 16 in the MRS1T

Acts 16 in the NAA

Acts 16 in the NASB

Acts 16 in the NBLA

Acts 16 in the NBS

Acts 16 in the NBVTP

Acts 16 in the NET2

Acts 16 in the NIV11

Acts 16 in the NNT

Acts 16 in the NNT2

Acts 16 in the NNT3

Acts 16 in the PDDPT

Acts 16 in the PFNT

Acts 16 in the RMNT

Acts 16 in the SBIAS

Acts 16 in the SBIBS

Acts 16 in the SBIBS2

Acts 16 in the SBICS

Acts 16 in the SBIDS

Acts 16 in the SBIGS

Acts 16 in the SBIHS

Acts 16 in the SBIIS

Acts 16 in the SBIIS2

Acts 16 in the SBIIS3

Acts 16 in the SBIKS

Acts 16 in the SBIKS2

Acts 16 in the SBIMS

Acts 16 in the SBIOS

Acts 16 in the SBIPS

Acts 16 in the SBISS

Acts 16 in the SBITS

Acts 16 in the SBITS2

Acts 16 in the SBITS3

Acts 16 in the SBITS4

Acts 16 in the SBIUS

Acts 16 in the SBIVS

Acts 16 in the SBT

Acts 16 in the SBT1E

Acts 16 in the SCHL

Acts 16 in the SNT

Acts 16 in the SUSU

Acts 16 in the SUSU2

Acts 16 in the SYNO

Acts 16 in the TBIAOTANT

Acts 16 in the TBT1E

Acts 16 in the TBT1E2

Acts 16 in the TFTIP

Acts 16 in the TFTU

Acts 16 in the TGNTATF3T

Acts 16 in the THAI

Acts 16 in the TNFD

Acts 16 in the TNT

Acts 16 in the TNTIK

Acts 16 in the TNTIL

Acts 16 in the TNTIN

Acts 16 in the TNTIP

Acts 16 in the TNTIZ

Acts 16 in the TOMA

Acts 16 in the TTENT

Acts 16 in the UBG

Acts 16 in the UGV

Acts 16 in the UGV2

Acts 16 in the UGV3

Acts 16 in the VBL

Acts 16 in the VDCC

Acts 16 in the YALU

Acts 16 in the YAPE

Acts 16 in the YBVTP

Acts 16 in the ZBP