Colossians 2 (BOLCB2)
1 Nalingi boyeba ete nazali kobunda etumba makasi mpo na bino, mpo na bandeko ya Laodise mpe mpo na bandeko nyonso oyo bamoni ngai nanu te. 2 Nazali kosala bongo mpo ete balendisama, bazala moko kati na bolingo, batonda na elikya oyo ewutaka na bososoli ya mabombami ya Nzambe, mpe batonda na boyebi ya mabombami yango ; mabombami yango ezali Klisto. 3 Ezali kati Klisto nde bomengo nyonso ya bwanya mpe ya boyebi ya Nzambe ebombami. 4 Nalobi na bino bongo mpo ete moko te akosa bino na nzela ya maloba ya lokuta. 5 Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino ; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto. 6 Yango wana, lokola bosilaki koyamba Yesu-Klisto lokola Nkolo, botambolaka lokola bato oyo bazali moko na Ye : 7 bomilendisaka mpe botongaka bomoi na bino kati na Ye, bokangamaka na kondima ndenge bateyaki bino, mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe. 8 Bosalaka keba ete moko te akanga bino na motambo ya mayele ya lokuta mpe ezanga tina, kolanda bokoko ya bato mpe etamboli ya mokili oyo, pamba te ewutaka na Klisto te. 9 Ezali kati na Klisto, kati na nzoto na Ye, nde mobimba ya nyonso oyo ezali kati na Nzambe evandi. 10 Ezali mpe kati na Ye nde bino botondisamaki, pamba te azali Mokonzi ya milimo nyonso mpe ya nguya nyonso. 11 Ezali lisusu kati na Ye nde bakataki bino ngenga, na nzela ya maboko ya bato te kasi na lolenge ya Klisto : balongolaki kati na bino nzoto ya bomoto mpe ya masumu, 12 bakundaki bino elongo na Klisto na nzela ya libatisi ; mpe, kati na Ye, bosekwaki elongo na Ye na nzela ya kondima kati na nguya ya Nzambe oyo asekwisaki Ye kati na bakufi. 13 Bino oyo bozalaki bakufi kati na masumu na bino mpe kati na bozangi kokatisa ngenga ya nzoto na bino, Nzambe akomisaki bino bato ya bomoi elongo na Klisto.Alimbisaki masumu na biso nyonso, 14 apasolaki mokanda oyo mibeko na yangoekatelaki biso etumbu,asilisaki bokonzi ya mibeko yango,wana abakaki yango na ekulusu. 15 Asilisaki makasi ya milimo mabempe ya nguya ya bakonzi ya molili,asambwisaki yango na miso ya bato nyonsompe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumbatango alongaki yango na ekulusu. 16 Yango wana, bopesaka na moto moko te nzela ya kosambisa bino na tina na biloko ya kolia to ya komela to mpe na tina na mokolo ya feti lokola feti ya ebandeli ya sanza to ya Saba. 17 Nyonso wana ezalaki kaka elilingi ya makambo oyo esengelaki koya, kasi bosolo na yango ezali penza kati na Klisto. 18 Botelemelaka bato oyo bamisepelisaka na komikitisa ya lokuta to na kosambela ba-anjelu, bopesaka bango nzela te ya kozangisa bino elonga. Bamipesaka na bimoniseli ya makanisi na bango, batondi na lolendo ezanga tina, 19 baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni. 20 Bokufaki elongo na Klisto mpe bokangolamaki longwa na bowumbu ya milimo mabe ya mokili oyo. Boye mpo na nini, lokola nde bozali nanu bato ya mokili oyo, bozali lisusu kondima mibeko na yango lokola : 21 « kozwa te, komeka elengi te, kosimba te ? » 22 Boni, biloko oyo nyonso ebongisami te mpo na kobebisama sima na kosalela yango ? Tala, ezali na yango kaka mibeko mpe malakisi ya bomoto ! 23 Solo, mibeko ya bongo emonanaka lokola nde etondi na bwanya, pamba te esengaka na bato ete basambelaka ndenge balingi, bamilakisaka lokola bato ya komikitisa mpe bamipesaka pasi na nzoto ; nzokande ezali na tina moko te, soki kaka te kokokisa baposa ya nzoto.
In Other Versions
Colossians 2 in the ANGEFD
Colossians 2 in the ANTPNG2D
Colossians 2 in the AS21
Colossians 2 in the BAGH
Colossians 2 in the BBPNG
Colossians 2 in the BBT1E
Colossians 2 in the BDS
Colossians 2 in the BEV
Colossians 2 in the BHAD
Colossians 2 in the BIB
Colossians 2 in the BLPT
Colossians 2 in the BNT
Colossians 2 in the BNTABOOT
Colossians 2 in the BNTLV
Colossians 2 in the BOATCB
Colossians 2 in the BOATCB2
Colossians 2 in the BOBCV
Colossians 2 in the BOCNT
Colossians 2 in the BOECS
Colossians 2 in the BOGWICC
Colossians 2 in the BOHCB
Colossians 2 in the BOHCV
Colossians 2 in the BOHLNT
Colossians 2 in the BOHNTLTAL
Colossians 2 in the BOICB
Colossians 2 in the BOILNTAP
Colossians 2 in the BOITCV
Colossians 2 in the BOKCV
Colossians 2 in the BOKCV2
Colossians 2 in the BOKHWOG
Colossians 2 in the BOKSSV
Colossians 2 in the BOLCB
Colossians 2 in the BOMCV
Colossians 2 in the BONAV
Colossians 2 in the BONCB
Colossians 2 in the BONLT
Colossians 2 in the BONUT2
Colossians 2 in the BOPLNT
Colossians 2 in the BOSCB
Colossians 2 in the BOSNC
Colossians 2 in the BOTLNT
Colossians 2 in the BOVCB
Colossians 2 in the BOYCB
Colossians 2 in the BPBB
Colossians 2 in the BPH
Colossians 2 in the BSB
Colossians 2 in the CCB
Colossians 2 in the CUV
Colossians 2 in the CUVS
Colossians 2 in the DBT
Colossians 2 in the DGDNT
Colossians 2 in the DHNT
Colossians 2 in the DNT
Colossians 2 in the ELBE
Colossians 2 in the EMTV
Colossians 2 in the ESV
Colossians 2 in the FBV
Colossians 2 in the FEB
Colossians 2 in the GGMNT
Colossians 2 in the GNT
Colossians 2 in the HARY
Colossians 2 in the HNT
Colossians 2 in the IRVA
Colossians 2 in the IRVB
Colossians 2 in the IRVG
Colossians 2 in the IRVH
Colossians 2 in the IRVK
Colossians 2 in the IRVM
Colossians 2 in the IRVM2
Colossians 2 in the IRVO
Colossians 2 in the IRVP
Colossians 2 in the IRVT
Colossians 2 in the IRVT2
Colossians 2 in the IRVU
Colossians 2 in the ISVN
Colossians 2 in the JSNT
Colossians 2 in the KAPI
Colossians 2 in the KBT1ETNIK
Colossians 2 in the KBV
Colossians 2 in the KJV
Colossians 2 in the KNFD
Colossians 2 in the LBA
Colossians 2 in the LBLA
Colossians 2 in the LNT
Colossians 2 in the LSV
Colossians 2 in the MAAL
Colossians 2 in the MBV
Colossians 2 in the MBV2
Colossians 2 in the MHNT
Colossians 2 in the MKNFD
Colossians 2 in the MNG
Colossians 2 in the MNT
Colossians 2 in the MNT2
Colossians 2 in the MRS1T
Colossians 2 in the NAA
Colossians 2 in the NASB
Colossians 2 in the NBLA
Colossians 2 in the NBS
Colossians 2 in the NBVTP
Colossians 2 in the NET2
Colossians 2 in the NIV11
Colossians 2 in the NNT
Colossians 2 in the NNT2
Colossians 2 in the NNT3
Colossians 2 in the PDDPT
Colossians 2 in the PFNT
Colossians 2 in the RMNT
Colossians 2 in the SBIAS
Colossians 2 in the SBIBS
Colossians 2 in the SBIBS2
Colossians 2 in the SBICS
Colossians 2 in the SBIDS
Colossians 2 in the SBIGS
Colossians 2 in the SBIHS
Colossians 2 in the SBIIS
Colossians 2 in the SBIIS2
Colossians 2 in the SBIIS3
Colossians 2 in the SBIKS
Colossians 2 in the SBIKS2
Colossians 2 in the SBIMS
Colossians 2 in the SBIOS
Colossians 2 in the SBIPS
Colossians 2 in the SBISS
Colossians 2 in the SBITS
Colossians 2 in the SBITS2
Colossians 2 in the SBITS3
Colossians 2 in the SBITS4
Colossians 2 in the SBIUS
Colossians 2 in the SBIVS
Colossians 2 in the SBT
Colossians 2 in the SBT1E
Colossians 2 in the SCHL
Colossians 2 in the SNT
Colossians 2 in the SUSU
Colossians 2 in the SUSU2
Colossians 2 in the SYNO
Colossians 2 in the TBIAOTANT
Colossians 2 in the TBT1E
Colossians 2 in the TBT1E2
Colossians 2 in the TFTIP
Colossians 2 in the TFTU
Colossians 2 in the TGNTATF3T
Colossians 2 in the THAI
Colossians 2 in the TNFD
Colossians 2 in the TNT
Colossians 2 in the TNTIK
Colossians 2 in the TNTIL
Colossians 2 in the TNTIN
Colossians 2 in the TNTIP
Colossians 2 in the TNTIZ
Colossians 2 in the TOMA
Colossians 2 in the TTENT
Colossians 2 in the UBG
Colossians 2 in the UGV
Colossians 2 in the UGV2
Colossians 2 in the UGV3
Colossians 2 in the VBL
Colossians 2 in the VDCC
Colossians 2 in the YALU
Colossians 2 in the YAPE
Colossians 2 in the YBVTP
Colossians 2 in the ZBP