Deuteronomy 11 (BOLCB2)

1 Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye. 2 Nazali koloba na bana na bino te oyo batikalaki te koyeba to komona nyonso wana, kasi na bino oyo bozali awa lelo ete bobosanaka te malako ya Yawe, Nzambe na bino, monene na Ye, nguya na Ye, 3 bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba, 4 makambo oyo asalaki na mampinga ya Ejipito, na bampunda mpe bashar na yango, ndenge azindisaki yango kati na Ebale monene ya barozo, tango ezalaki kolanda bino, mpe ndenge nini Yawe alimwisaki yango libela ; 5 makambo oyo asalelaki bino kati na esobe kino bokoma na esika oyo, 6 makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba. 7 Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki. 8 Yango wana, bobatela mibeko nyonso oyo napesi bino lelo mpo ete bozala makasi mpe bokoka kobotola mokili oyo bolingi kokota mpo na kozwa 9 mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. 10 Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino. 11 Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo. 12 Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu. 13 Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba, 14 nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta. 15 Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda. 16 Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango, 17 noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino. 18 Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo. 19 Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki. 20 Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino 21 mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela. 22 Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ; 23 wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi. 24 Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene. 25 Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende. 26 Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe. 27 Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo ; 28 bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te. 29 Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali. 30 Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More. 31 Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango, 32 bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo.

In Other Versions

Deuteronomy 11 in the ANGEFD

Deuteronomy 11 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 11 in the AS21

Deuteronomy 11 in the BAGH

Deuteronomy 11 in the BBPNG

Deuteronomy 11 in the BBT1E

Deuteronomy 11 in the BDS

Deuteronomy 11 in the BEV

Deuteronomy 11 in the BHAD

Deuteronomy 11 in the BIB

Deuteronomy 11 in the BLPT

Deuteronomy 11 in the BNT

Deuteronomy 11 in the BNTABOOT

Deuteronomy 11 in the BNTLV

Deuteronomy 11 in the BOATCB

Deuteronomy 11 in the BOATCB2

Deuteronomy 11 in the BOBCV

Deuteronomy 11 in the BOCNT

Deuteronomy 11 in the BOECS

Deuteronomy 11 in the BOGWICC

Deuteronomy 11 in the BOHCB

Deuteronomy 11 in the BOHCV

Deuteronomy 11 in the BOHLNT

Deuteronomy 11 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 11 in the BOICB

Deuteronomy 11 in the BOILNTAP

Deuteronomy 11 in the BOITCV

Deuteronomy 11 in the BOKCV

Deuteronomy 11 in the BOKCV2

Deuteronomy 11 in the BOKHWOG

Deuteronomy 11 in the BOKSSV

Deuteronomy 11 in the BOLCB

Deuteronomy 11 in the BOMCV

Deuteronomy 11 in the BONAV

Deuteronomy 11 in the BONCB

Deuteronomy 11 in the BONLT

Deuteronomy 11 in the BONUT2

Deuteronomy 11 in the BOPLNT

Deuteronomy 11 in the BOSCB

Deuteronomy 11 in the BOSNC

Deuteronomy 11 in the BOTLNT

Deuteronomy 11 in the BOVCB

Deuteronomy 11 in the BOYCB

Deuteronomy 11 in the BPBB

Deuteronomy 11 in the BPH

Deuteronomy 11 in the BSB

Deuteronomy 11 in the CCB

Deuteronomy 11 in the CUV

Deuteronomy 11 in the CUVS

Deuteronomy 11 in the DBT

Deuteronomy 11 in the DGDNT

Deuteronomy 11 in the DHNT

Deuteronomy 11 in the DNT

Deuteronomy 11 in the ELBE

Deuteronomy 11 in the EMTV

Deuteronomy 11 in the ESV

Deuteronomy 11 in the FBV

Deuteronomy 11 in the FEB

Deuteronomy 11 in the GGMNT

Deuteronomy 11 in the GNT

Deuteronomy 11 in the HARY

Deuteronomy 11 in the HNT

Deuteronomy 11 in the IRVA

Deuteronomy 11 in the IRVB

Deuteronomy 11 in the IRVG

Deuteronomy 11 in the IRVH

Deuteronomy 11 in the IRVK

Deuteronomy 11 in the IRVM

Deuteronomy 11 in the IRVM2

Deuteronomy 11 in the IRVO

Deuteronomy 11 in the IRVP

Deuteronomy 11 in the IRVT

Deuteronomy 11 in the IRVT2

Deuteronomy 11 in the IRVU

Deuteronomy 11 in the ISVN

Deuteronomy 11 in the JSNT

Deuteronomy 11 in the KAPI

Deuteronomy 11 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 11 in the KBV

Deuteronomy 11 in the KJV

Deuteronomy 11 in the KNFD

Deuteronomy 11 in the LBA

Deuteronomy 11 in the LBLA

Deuteronomy 11 in the LNT

Deuteronomy 11 in the LSV

Deuteronomy 11 in the MAAL

Deuteronomy 11 in the MBV

Deuteronomy 11 in the MBV2

Deuteronomy 11 in the MHNT

Deuteronomy 11 in the MKNFD

Deuteronomy 11 in the MNG

Deuteronomy 11 in the MNT

Deuteronomy 11 in the MNT2

Deuteronomy 11 in the MRS1T

Deuteronomy 11 in the NAA

Deuteronomy 11 in the NASB

Deuteronomy 11 in the NBLA

Deuteronomy 11 in the NBS

Deuteronomy 11 in the NBVTP

Deuteronomy 11 in the NET2

Deuteronomy 11 in the NIV11

Deuteronomy 11 in the NNT

Deuteronomy 11 in the NNT2

Deuteronomy 11 in the NNT3

Deuteronomy 11 in the PDDPT

Deuteronomy 11 in the PFNT

Deuteronomy 11 in the RMNT

Deuteronomy 11 in the SBIAS

Deuteronomy 11 in the SBIBS

Deuteronomy 11 in the SBIBS2

Deuteronomy 11 in the SBICS

Deuteronomy 11 in the SBIDS

Deuteronomy 11 in the SBIGS

Deuteronomy 11 in the SBIHS

Deuteronomy 11 in the SBIIS

Deuteronomy 11 in the SBIIS2

Deuteronomy 11 in the SBIIS3

Deuteronomy 11 in the SBIKS

Deuteronomy 11 in the SBIKS2

Deuteronomy 11 in the SBIMS

Deuteronomy 11 in the SBIOS

Deuteronomy 11 in the SBIPS

Deuteronomy 11 in the SBISS

Deuteronomy 11 in the SBITS

Deuteronomy 11 in the SBITS2

Deuteronomy 11 in the SBITS3

Deuteronomy 11 in the SBITS4

Deuteronomy 11 in the SBIUS

Deuteronomy 11 in the SBIVS

Deuteronomy 11 in the SBT

Deuteronomy 11 in the SBT1E

Deuteronomy 11 in the SCHL

Deuteronomy 11 in the SNT

Deuteronomy 11 in the SUSU

Deuteronomy 11 in the SUSU2

Deuteronomy 11 in the SYNO

Deuteronomy 11 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 11 in the TBT1E

Deuteronomy 11 in the TBT1E2

Deuteronomy 11 in the TFTIP

Deuteronomy 11 in the TFTU

Deuteronomy 11 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 11 in the THAI

Deuteronomy 11 in the TNFD

Deuteronomy 11 in the TNT

Deuteronomy 11 in the TNTIK

Deuteronomy 11 in the TNTIL

Deuteronomy 11 in the TNTIN

Deuteronomy 11 in the TNTIP

Deuteronomy 11 in the TNTIZ

Deuteronomy 11 in the TOMA

Deuteronomy 11 in the TTENT

Deuteronomy 11 in the UBG

Deuteronomy 11 in the UGV

Deuteronomy 11 in the UGV2

Deuteronomy 11 in the UGV3

Deuteronomy 11 in the VBL

Deuteronomy 11 in the VDCC

Deuteronomy 11 in the YALU

Deuteronomy 11 in the YAPE

Deuteronomy 11 in the YBVTP

Deuteronomy 11 in the ZBP