Deuteronomy 16 (BOLCB2)
1 Batela sanza ya Abibi mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito. 2 Tala biloko oyo okobonza lokola mbeka ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe ntaba ya mwasi. 3 Okolia yango te na mapa oyo basangisa na levire. Kasi mikolo sambo, okolia mapa ezanga levire, mapa ya pasi, pamba te obimaki na Ejipito na lombangu. Okosalaka bongo na mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo ete okanisaka mokolo oyo obimaki na Ejipito. 4 Tika ete levire emonana te epai na yo, kati na mokili na yo nyonso mikolo sambo. Kotika te ete nyama oyo babonzi na pokwa ya mokolo ya liboso etikala kino na tongo. 5 Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo. 6 Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito. 7 Okolamba mpe okolia yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Bongo na tongo, okozonga na ndako na yo. 8 Mikolo motoba, okolia mapa ezanga levire ; bongo na mokolo ya sambo, okosala feti monene mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okosala mosala moko te. 9 Okotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo okotia mbeli na elanga ya ble mpo na kobuka ble yango. 10 Okosala feti ya Baposo mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. 11 Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo. 12 Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo. 13 Mpo na oyo etali feti ya Bandako ya kapo, okosala yango mikolo sambo sima na yo kosangisa bambuma na yo ya ble mpe kokamola vino na yo. 14 Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo. 15 Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona ; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo ; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka. 16 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba : 17 moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye. 18 Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo. 19 Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo. 20 Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. 21 Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo. 22 Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana.
In Other Versions
Deuteronomy 16 in the ANGEFD
Deuteronomy 16 in the ANTPNG2D
Deuteronomy 16 in the AS21
Deuteronomy 16 in the BAGH
Deuteronomy 16 in the BBPNG
Deuteronomy 16 in the BBT1E
Deuteronomy 16 in the BDS
Deuteronomy 16 in the BEV
Deuteronomy 16 in the BHAD
Deuteronomy 16 in the BIB
Deuteronomy 16 in the BLPT
Deuteronomy 16 in the BNT
Deuteronomy 16 in the BNTABOOT
Deuteronomy 16 in the BNTLV
Deuteronomy 16 in the BOATCB
Deuteronomy 16 in the BOATCB2
Deuteronomy 16 in the BOBCV
Deuteronomy 16 in the BOCNT
Deuteronomy 16 in the BOECS
Deuteronomy 16 in the BOGWICC
Deuteronomy 16 in the BOHCB
Deuteronomy 16 in the BOHCV
Deuteronomy 16 in the BOHLNT
Deuteronomy 16 in the BOHNTLTAL
Deuteronomy 16 in the BOICB
Deuteronomy 16 in the BOILNTAP
Deuteronomy 16 in the BOITCV
Deuteronomy 16 in the BOKCV
Deuteronomy 16 in the BOKCV2
Deuteronomy 16 in the BOKHWOG
Deuteronomy 16 in the BOKSSV
Deuteronomy 16 in the BOLCB
Deuteronomy 16 in the BOMCV
Deuteronomy 16 in the BONAV
Deuteronomy 16 in the BONCB
Deuteronomy 16 in the BONLT
Deuteronomy 16 in the BONUT2
Deuteronomy 16 in the BOPLNT
Deuteronomy 16 in the BOSCB
Deuteronomy 16 in the BOSNC
Deuteronomy 16 in the BOTLNT
Deuteronomy 16 in the BOVCB
Deuteronomy 16 in the BOYCB
Deuteronomy 16 in the BPBB
Deuteronomy 16 in the BPH
Deuteronomy 16 in the BSB
Deuteronomy 16 in the CCB
Deuteronomy 16 in the CUV
Deuteronomy 16 in the CUVS
Deuteronomy 16 in the DBT
Deuteronomy 16 in the DGDNT
Deuteronomy 16 in the DHNT
Deuteronomy 16 in the DNT
Deuteronomy 16 in the ELBE
Deuteronomy 16 in the EMTV
Deuteronomy 16 in the ESV
Deuteronomy 16 in the FBV
Deuteronomy 16 in the FEB
Deuteronomy 16 in the GGMNT
Deuteronomy 16 in the GNT
Deuteronomy 16 in the HARY
Deuteronomy 16 in the HNT
Deuteronomy 16 in the IRVA
Deuteronomy 16 in the IRVB
Deuteronomy 16 in the IRVG
Deuteronomy 16 in the IRVH
Deuteronomy 16 in the IRVK
Deuteronomy 16 in the IRVM
Deuteronomy 16 in the IRVM2
Deuteronomy 16 in the IRVO
Deuteronomy 16 in the IRVP
Deuteronomy 16 in the IRVT
Deuteronomy 16 in the IRVT2
Deuteronomy 16 in the IRVU
Deuteronomy 16 in the ISVN
Deuteronomy 16 in the JSNT
Deuteronomy 16 in the KAPI
Deuteronomy 16 in the KBT1ETNIK
Deuteronomy 16 in the KBV
Deuteronomy 16 in the KJV
Deuteronomy 16 in the KNFD
Deuteronomy 16 in the LBA
Deuteronomy 16 in the LBLA
Deuteronomy 16 in the LNT
Deuteronomy 16 in the LSV
Deuteronomy 16 in the MAAL
Deuteronomy 16 in the MBV
Deuteronomy 16 in the MBV2
Deuteronomy 16 in the MHNT
Deuteronomy 16 in the MKNFD
Deuteronomy 16 in the MNG
Deuteronomy 16 in the MNT
Deuteronomy 16 in the MNT2
Deuteronomy 16 in the MRS1T
Deuteronomy 16 in the NAA
Deuteronomy 16 in the NASB
Deuteronomy 16 in the NBLA
Deuteronomy 16 in the NBS
Deuteronomy 16 in the NBVTP
Deuteronomy 16 in the NET2
Deuteronomy 16 in the NIV11
Deuteronomy 16 in the NNT
Deuteronomy 16 in the NNT2
Deuteronomy 16 in the NNT3
Deuteronomy 16 in the PDDPT
Deuteronomy 16 in the PFNT
Deuteronomy 16 in the RMNT
Deuteronomy 16 in the SBIAS
Deuteronomy 16 in the SBIBS
Deuteronomy 16 in the SBIBS2
Deuteronomy 16 in the SBICS
Deuteronomy 16 in the SBIDS
Deuteronomy 16 in the SBIGS
Deuteronomy 16 in the SBIHS
Deuteronomy 16 in the SBIIS
Deuteronomy 16 in the SBIIS2
Deuteronomy 16 in the SBIIS3
Deuteronomy 16 in the SBIKS
Deuteronomy 16 in the SBIKS2
Deuteronomy 16 in the SBIMS
Deuteronomy 16 in the SBIOS
Deuteronomy 16 in the SBIPS
Deuteronomy 16 in the SBISS
Deuteronomy 16 in the SBITS
Deuteronomy 16 in the SBITS2
Deuteronomy 16 in the SBITS3
Deuteronomy 16 in the SBITS4
Deuteronomy 16 in the SBIUS
Deuteronomy 16 in the SBIVS
Deuteronomy 16 in the SBT
Deuteronomy 16 in the SBT1E
Deuteronomy 16 in the SCHL
Deuteronomy 16 in the SNT
Deuteronomy 16 in the SUSU
Deuteronomy 16 in the SUSU2
Deuteronomy 16 in the SYNO
Deuteronomy 16 in the TBIAOTANT
Deuteronomy 16 in the TBT1E
Deuteronomy 16 in the TBT1E2
Deuteronomy 16 in the TFTIP
Deuteronomy 16 in the TFTU
Deuteronomy 16 in the TGNTATF3T
Deuteronomy 16 in the THAI
Deuteronomy 16 in the TNFD
Deuteronomy 16 in the TNT
Deuteronomy 16 in the TNTIK
Deuteronomy 16 in the TNTIL
Deuteronomy 16 in the TNTIN
Deuteronomy 16 in the TNTIP
Deuteronomy 16 in the TNTIZ
Deuteronomy 16 in the TOMA
Deuteronomy 16 in the TTENT
Deuteronomy 16 in the UBG
Deuteronomy 16 in the UGV
Deuteronomy 16 in the UGV2
Deuteronomy 16 in the UGV3
Deuteronomy 16 in the VBL
Deuteronomy 16 in the VDCC
Deuteronomy 16 in the YALU
Deuteronomy 16 in the YAPE
Deuteronomy 16 in the YBVTP
Deuteronomy 16 in the ZBP