Deuteronomy 27 (BOLCB2)
        
        
          1 Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato : « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo. 2 Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe. 3 Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino. 4 Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe. 5 Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende. 6 Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba. 7 Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani ; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino. 8 Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. »  9 Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka ! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino. 10 Botosa Yawe, Nzambe na bino, mpe bosalela mitindo mpe bikateli na Ye oyo nalingi kopesa bino lelo. »  11 Kaka na mokolo wana, Moyize apesaki mitindo oyo epai na bato : 12 « Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani : libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame. 13 Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. »  14 Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi :  15 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  16 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  17 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  18 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokamba mokufi miso na nzela ya mabe. »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  19 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  20 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  21 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  22 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  23 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  24 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  25 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »  26 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo ! »Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »
        
        
          In Other Versions
        
        
  
    Deuteronomy 27 in the ANGEFD
  
  
    Deuteronomy 27 in the ANTPNG2D
  
  
    Deuteronomy 27 in the AS21
  
  
    Deuteronomy 27 in the BAGH
  
  
    Deuteronomy 27 in the BBPNG
  
  
    Deuteronomy 27 in the BBT1E
  
  
    Deuteronomy 27 in the BDS
  
  
    Deuteronomy 27 in the BEV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BHAD
  
  
    Deuteronomy 27 in the BIB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BLPT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BNTABOOT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BNTLV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOATCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOATCB2
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOBCV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOCNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOECS
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOGWICC
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOHCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOHCV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOHLNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOHNTLTAL
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOICB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOILNTAP
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOITCV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOKCV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOKCV2
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOKHWOG
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOKSSV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOLCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOMCV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BONAV
  
  
    Deuteronomy 27 in the BONCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BONLT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BONUT2
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOPLNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOSCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOSNC
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOTLNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOVCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BOYCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BPBB
  
  
    Deuteronomy 27 in the BPH
  
  
    Deuteronomy 27 in the BSB
  
  
    Deuteronomy 27 in the CCB
  
  
    Deuteronomy 27 in the CUV
  
  
    Deuteronomy 27 in the CUVS
  
  
    Deuteronomy 27 in the DBT
  
  
    Deuteronomy 27 in the DGDNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the DHNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the DNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the ELBE
  
  
    Deuteronomy 27 in the EMTV
  
  
    Deuteronomy 27 in the ESV
  
  
    Deuteronomy 27 in the FBV
  
  
    Deuteronomy 27 in the FEB
  
  
    Deuteronomy 27 in the GGMNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the GNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the HARY
  
  
    Deuteronomy 27 in the HNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVA
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVB
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVG
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVH
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVK
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVM
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVM2
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVO
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVP
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVT
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVT2
  
  
    Deuteronomy 27 in the IRVU
  
  
    Deuteronomy 27 in the ISVN
  
  
    Deuteronomy 27 in the JSNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the KAPI
  
  
    Deuteronomy 27 in the KBT1ETNIK
  
  
    Deuteronomy 27 in the KBV
  
  
    Deuteronomy 27 in the KJV
  
  
    Deuteronomy 27 in the KNFD
  
  
    Deuteronomy 27 in the LBA
  
  
    Deuteronomy 27 in the LBLA
  
  
    Deuteronomy 27 in the LNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the LSV
  
  
    Deuteronomy 27 in the MAAL
  
  
    Deuteronomy 27 in the MBV
  
  
    Deuteronomy 27 in the MBV2
  
  
    Deuteronomy 27 in the MHNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the MKNFD
  
  
    Deuteronomy 27 in the MNG
  
  
    Deuteronomy 27 in the MNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the MNT2
  
  
    Deuteronomy 27 in the MRS1T
  
  
    Deuteronomy 27 in the NAA
  
  
    Deuteronomy 27 in the NASB
  
  
    Deuteronomy 27 in the NBLA
  
  
    Deuteronomy 27 in the NBS
  
  
    Deuteronomy 27 in the NBVTP
  
  
    Deuteronomy 27 in the NET2
  
  
    Deuteronomy 27 in the NIV11
  
  
    Deuteronomy 27 in the NNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the NNT2
  
  
    Deuteronomy 27 in the NNT3
  
  
    Deuteronomy 27 in the PDDPT
  
  
    Deuteronomy 27 in the PFNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the RMNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIAS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIBS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIBS2
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBICS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIDS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIGS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIHS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIIS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIIS2
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIIS3
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIKS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIKS2
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIMS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIOS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIPS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBISS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBITS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBITS2
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBITS3
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBITS4
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIUS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBIVS
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBT
  
  
    Deuteronomy 27 in the SBT1E
  
  
    Deuteronomy 27 in the SCHL
  
  
    Deuteronomy 27 in the SNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the SUSU
  
  
    Deuteronomy 27 in the SUSU2
  
  
    Deuteronomy 27 in the SYNO
  
  
    Deuteronomy 27 in the TBIAOTANT
  
  
    Deuteronomy 27 in the TBT1E
  
  
    Deuteronomy 27 in the TBT1E2
  
  
    Deuteronomy 27 in the TFTIP
  
  
    Deuteronomy 27 in the TFTU
  
  
    Deuteronomy 27 in the TGNTATF3T
  
  
    Deuteronomy 27 in the THAI
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNFD
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNT
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNTIK
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNTIL
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNTIN
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNTIP
  
  
    Deuteronomy 27 in the TNTIZ
  
  
    Deuteronomy 27 in the TOMA
  
  
    Deuteronomy 27 in the TTENT
  
  
    Deuteronomy 27 in the UBG
  
  
    Deuteronomy 27 in the UGV
  
  
    Deuteronomy 27 in the UGV2
  
  
    Deuteronomy 27 in the UGV3
  
  
    Deuteronomy 27 in the VBL
  
  
    Deuteronomy 27 in the VDCC
  
  
    Deuteronomy 27 in the YALU
  
  
    Deuteronomy 27 in the YAPE
  
  
    Deuteronomy 27 in the YBVTP
  
  
    Deuteronomy 27 in the ZBP