Deuteronomy 30 (BOLCB2)
        
        
          1 Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ; 2 soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo ; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo, 3 Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino. 4 Atako bokendeki na bamboka ya mosika kati na mokili, Yawe, Nzambe na bino, akoluka kosangisa bino longwa kuna mpe akozongisa bino. 5 Yawe, Nzambe na bino, akomema bino na mokili ya bakoko na bino, mpe bokozwa yango ; akosalela bino bolamu mpe akokomisa bino ebele koleka bakoko na bino. 6 Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi. 7 Yawe, Nzambe na bino, akotia bilakeli nyonso ya mabe likolo ya banguna na bino, oyo bayinaka bino mpe banyokolaka bino. 8 Bokotosa lisusu Yawe mpe bokosalela mitindo na Ye nyonso oyo nazali kopesa bino lelo. 9 Bongo Yawe, Nzambe na bino, akosala ete bomona bolamu kati na misala nyonso ya maboko na bino, mpe akopesa bino bana ebele, bibwele ebele mpe bambuma ebele kati na mokili na bino. Yawe akosepela na bino lisusu mpe akosalela bino bolamu, ndenge kaka asepelaki na bakoko na bino, 10 soki botosi Yawe, Nzambe na bino, mpe bobateli mitindo mpe bikateli na Ye, oyo ekomama kati na buku oyo ya Mobeko, mpe soki bozongi epai na Yawe, Nzambe na bino, na mitema mpe na milimo na bino mobimba.  11 Makambo oyo nazali kotinda yo lelo, ezali penza pasi te mpe elekeli yo te na makasi. 12 Ezali te kati na Likolo mpo ete okoka kotuna : « Nani akomata kuna na Likolo mpo na kozwela ngai yango mpe kosakolela ngai yango mpo ete nakoka kotosa yango ? » 13 Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna : « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango ? » 14 Te, liloba yango ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo, mpo ete okoka kotosa yango.  15 Tala, nasili kotia lelo, liboso na yo, bomoi mpe bolamu, kufa mpe mabe. 16 Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa. 17 Kasi soki motema na yo epengwi mpe otosi te, soki okosami na kogumbamela banzambe mosusu mpe na kosambela yango, 18 nalobi na yo, na mokolo ya lelo, ete okobebisama solo, okowumela lisusu te kati na mokili oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi bokokota mpo na kozwa.  19 Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi. 20 Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
        
        
          In Other Versions
        
        
  
    Deuteronomy 30 in the ANGEFD
  
  
    Deuteronomy 30 in the ANTPNG2D
  
  
    Deuteronomy 30 in the AS21
  
  
    Deuteronomy 30 in the BAGH
  
  
    Deuteronomy 30 in the BBPNG
  
  
    Deuteronomy 30 in the BBT1E
  
  
    Deuteronomy 30 in the BDS
  
  
    Deuteronomy 30 in the BEV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BHAD
  
  
    Deuteronomy 30 in the BIB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BLPT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BNTABOOT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BNTLV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOATCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOATCB2
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOBCV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOCNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOECS
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOGWICC
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOHCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOHCV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOHLNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOHNTLTAL
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOICB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOILNTAP
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOITCV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOKCV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOKCV2
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOKHWOG
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOKSSV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOLCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOMCV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BONAV
  
  
    Deuteronomy 30 in the BONCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BONLT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BONUT2
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOPLNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOSCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOSNC
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOTLNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOVCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BOYCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BPBB
  
  
    Deuteronomy 30 in the BPH
  
  
    Deuteronomy 30 in the BSB
  
  
    Deuteronomy 30 in the CCB
  
  
    Deuteronomy 30 in the CUV
  
  
    Deuteronomy 30 in the CUVS
  
  
    Deuteronomy 30 in the DBT
  
  
    Deuteronomy 30 in the DGDNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the DHNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the DNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the ELBE
  
  
    Deuteronomy 30 in the EMTV
  
  
    Deuteronomy 30 in the ESV
  
  
    Deuteronomy 30 in the FBV
  
  
    Deuteronomy 30 in the FEB
  
  
    Deuteronomy 30 in the GGMNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the GNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the HARY
  
  
    Deuteronomy 30 in the HNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVA
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVB
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVG
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVH
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVK
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVM
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVM2
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVO
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVP
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVT
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVT2
  
  
    Deuteronomy 30 in the IRVU
  
  
    Deuteronomy 30 in the ISVN
  
  
    Deuteronomy 30 in the JSNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the KAPI
  
  
    Deuteronomy 30 in the KBT1ETNIK
  
  
    Deuteronomy 30 in the KBV
  
  
    Deuteronomy 30 in the KJV
  
  
    Deuteronomy 30 in the KNFD
  
  
    Deuteronomy 30 in the LBA
  
  
    Deuteronomy 30 in the LBLA
  
  
    Deuteronomy 30 in the LNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the LSV
  
  
    Deuteronomy 30 in the MAAL
  
  
    Deuteronomy 30 in the MBV
  
  
    Deuteronomy 30 in the MBV2
  
  
    Deuteronomy 30 in the MHNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the MKNFD
  
  
    Deuteronomy 30 in the MNG
  
  
    Deuteronomy 30 in the MNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the MNT2
  
  
    Deuteronomy 30 in the MRS1T
  
  
    Deuteronomy 30 in the NAA
  
  
    Deuteronomy 30 in the NASB
  
  
    Deuteronomy 30 in the NBLA
  
  
    Deuteronomy 30 in the NBS
  
  
    Deuteronomy 30 in the NBVTP
  
  
    Deuteronomy 30 in the NET2
  
  
    Deuteronomy 30 in the NIV11
  
  
    Deuteronomy 30 in the NNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the NNT2
  
  
    Deuteronomy 30 in the NNT3
  
  
    Deuteronomy 30 in the PDDPT
  
  
    Deuteronomy 30 in the PFNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the RMNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIAS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIBS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIBS2
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBICS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIDS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIGS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIHS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIIS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIIS2
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIIS3
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIKS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIKS2
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIMS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIOS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIPS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBISS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBITS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBITS2
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBITS3
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBITS4
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIUS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBIVS
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBT
  
  
    Deuteronomy 30 in the SBT1E
  
  
    Deuteronomy 30 in the SCHL
  
  
    Deuteronomy 30 in the SNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the SUSU
  
  
    Deuteronomy 30 in the SUSU2
  
  
    Deuteronomy 30 in the SYNO
  
  
    Deuteronomy 30 in the TBIAOTANT
  
  
    Deuteronomy 30 in the TBT1E
  
  
    Deuteronomy 30 in the TBT1E2
  
  
    Deuteronomy 30 in the TFTIP
  
  
    Deuteronomy 30 in the TFTU
  
  
    Deuteronomy 30 in the TGNTATF3T
  
  
    Deuteronomy 30 in the THAI
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNFD
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNT
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNTIK
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNTIL
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNTIN
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNTIP
  
  
    Deuteronomy 30 in the TNTIZ
  
  
    Deuteronomy 30 in the TOMA
  
  
    Deuteronomy 30 in the TTENT
  
  
    Deuteronomy 30 in the UBG
  
  
    Deuteronomy 30 in the UGV
  
  
    Deuteronomy 30 in the UGV2
  
  
    Deuteronomy 30 in the UGV3
  
  
    Deuteronomy 30 in the VBL
  
  
    Deuteronomy 30 in the VDCC
  
  
    Deuteronomy 30 in the YALU
  
  
    Deuteronomy 30 in the YAPE
  
  
    Deuteronomy 30 in the YBVTP
  
  
    Deuteronomy 30 in the ZBP