Deuteronomy 8 (BOLCB2)

1 Salela na bokebi mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo mpo ete bokoka kovanda, kokoma ebele, kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe alakaki epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. 2 Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te. 3 Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe. 4 Bilamba na yo etikalaki konzuluka te mpe makolo na yo etikalaki kovimba te na mibu wana tuku minei. 5 Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye. 6 Tosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na yo, na kotambolaka na banzela na Ye mpe na kopesaka Ye lokumu. 7 Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ; 8 mokili oyo etonda na ble, na orje, na vino, na banzete ya figi, na banzete ya grenade ; mokili ya mafuta ya olive mpe ya nzoyi ; 9 mokili oyo bokozanga lipa te mpe eloko moko te ; mokili oyo mabanga ezali bibende mpe bokoki kobimisa motako na bangomba. 10 Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino. 11 Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo. 12 Tango okolia mpe okotonda, tango okotonga bandako ya kitoko mpe okovanda kuna, 13 tango bangombe na yo, bantaba na yo mpe bameme na yo ekobotana mingi, tango palata na yo mpe wolo na yo ekokoma ebele mpe biloko nyonso oyo ozali na yango ekokoma ebele ; 14 sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu, 15 oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi. 16 Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu. 17 Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! » 18 Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo. 19 Soki obosani Yawe, Nzambe na yo, soki osaleli banzambe mosusu, soki ogumbameli mpe ofukameli yango, nalobi na bino solo lelo ete bokobebisama. 20 Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino.

In Other Versions

Deuteronomy 8 in the ANGEFD

Deuteronomy 8 in the ANTPNG2D

Deuteronomy 8 in the AS21

Deuteronomy 8 in the BAGH

Deuteronomy 8 in the BBPNG

Deuteronomy 8 in the BBT1E

Deuteronomy 8 in the BDS

Deuteronomy 8 in the BEV

Deuteronomy 8 in the BHAD

Deuteronomy 8 in the BIB

Deuteronomy 8 in the BLPT

Deuteronomy 8 in the BNT

Deuteronomy 8 in the BNTABOOT

Deuteronomy 8 in the BNTLV

Deuteronomy 8 in the BOATCB

Deuteronomy 8 in the BOATCB2

Deuteronomy 8 in the BOBCV

Deuteronomy 8 in the BOCNT

Deuteronomy 8 in the BOECS

Deuteronomy 8 in the BOGWICC

Deuteronomy 8 in the BOHCB

Deuteronomy 8 in the BOHCV

Deuteronomy 8 in the BOHLNT

Deuteronomy 8 in the BOHNTLTAL

Deuteronomy 8 in the BOICB

Deuteronomy 8 in the BOILNTAP

Deuteronomy 8 in the BOITCV

Deuteronomy 8 in the BOKCV

Deuteronomy 8 in the BOKCV2

Deuteronomy 8 in the BOKHWOG

Deuteronomy 8 in the BOKSSV

Deuteronomy 8 in the BOLCB

Deuteronomy 8 in the BOMCV

Deuteronomy 8 in the BONAV

Deuteronomy 8 in the BONCB

Deuteronomy 8 in the BONLT

Deuteronomy 8 in the BONUT2

Deuteronomy 8 in the BOPLNT

Deuteronomy 8 in the BOSCB

Deuteronomy 8 in the BOSNC

Deuteronomy 8 in the BOTLNT

Deuteronomy 8 in the BOVCB

Deuteronomy 8 in the BOYCB

Deuteronomy 8 in the BPBB

Deuteronomy 8 in the BPH

Deuteronomy 8 in the BSB

Deuteronomy 8 in the CCB

Deuteronomy 8 in the CUV

Deuteronomy 8 in the CUVS

Deuteronomy 8 in the DBT

Deuteronomy 8 in the DGDNT

Deuteronomy 8 in the DHNT

Deuteronomy 8 in the DNT

Deuteronomy 8 in the ELBE

Deuteronomy 8 in the EMTV

Deuteronomy 8 in the ESV

Deuteronomy 8 in the FBV

Deuteronomy 8 in the FEB

Deuteronomy 8 in the GGMNT

Deuteronomy 8 in the GNT

Deuteronomy 8 in the HARY

Deuteronomy 8 in the HNT

Deuteronomy 8 in the IRVA

Deuteronomy 8 in the IRVB

Deuteronomy 8 in the IRVG

Deuteronomy 8 in the IRVH

Deuteronomy 8 in the IRVK

Deuteronomy 8 in the IRVM

Deuteronomy 8 in the IRVM2

Deuteronomy 8 in the IRVO

Deuteronomy 8 in the IRVP

Deuteronomy 8 in the IRVT

Deuteronomy 8 in the IRVT2

Deuteronomy 8 in the IRVU

Deuteronomy 8 in the ISVN

Deuteronomy 8 in the JSNT

Deuteronomy 8 in the KAPI

Deuteronomy 8 in the KBT1ETNIK

Deuteronomy 8 in the KBV

Deuteronomy 8 in the KJV

Deuteronomy 8 in the KNFD

Deuteronomy 8 in the LBA

Deuteronomy 8 in the LBLA

Deuteronomy 8 in the LNT

Deuteronomy 8 in the LSV

Deuteronomy 8 in the MAAL

Deuteronomy 8 in the MBV

Deuteronomy 8 in the MBV2

Deuteronomy 8 in the MHNT

Deuteronomy 8 in the MKNFD

Deuteronomy 8 in the MNG

Deuteronomy 8 in the MNT

Deuteronomy 8 in the MNT2

Deuteronomy 8 in the MRS1T

Deuteronomy 8 in the NAA

Deuteronomy 8 in the NASB

Deuteronomy 8 in the NBLA

Deuteronomy 8 in the NBS

Deuteronomy 8 in the NBVTP

Deuteronomy 8 in the NET2

Deuteronomy 8 in the NIV11

Deuteronomy 8 in the NNT

Deuteronomy 8 in the NNT2

Deuteronomy 8 in the NNT3

Deuteronomy 8 in the PDDPT

Deuteronomy 8 in the PFNT

Deuteronomy 8 in the RMNT

Deuteronomy 8 in the SBIAS

Deuteronomy 8 in the SBIBS

Deuteronomy 8 in the SBIBS2

Deuteronomy 8 in the SBICS

Deuteronomy 8 in the SBIDS

Deuteronomy 8 in the SBIGS

Deuteronomy 8 in the SBIHS

Deuteronomy 8 in the SBIIS

Deuteronomy 8 in the SBIIS2

Deuteronomy 8 in the SBIIS3

Deuteronomy 8 in the SBIKS

Deuteronomy 8 in the SBIKS2

Deuteronomy 8 in the SBIMS

Deuteronomy 8 in the SBIOS

Deuteronomy 8 in the SBIPS

Deuteronomy 8 in the SBISS

Deuteronomy 8 in the SBITS

Deuteronomy 8 in the SBITS2

Deuteronomy 8 in the SBITS3

Deuteronomy 8 in the SBITS4

Deuteronomy 8 in the SBIUS

Deuteronomy 8 in the SBIVS

Deuteronomy 8 in the SBT

Deuteronomy 8 in the SBT1E

Deuteronomy 8 in the SCHL

Deuteronomy 8 in the SNT

Deuteronomy 8 in the SUSU

Deuteronomy 8 in the SUSU2

Deuteronomy 8 in the SYNO

Deuteronomy 8 in the TBIAOTANT

Deuteronomy 8 in the TBT1E

Deuteronomy 8 in the TBT1E2

Deuteronomy 8 in the TFTIP

Deuteronomy 8 in the TFTU

Deuteronomy 8 in the TGNTATF3T

Deuteronomy 8 in the THAI

Deuteronomy 8 in the TNFD

Deuteronomy 8 in the TNT

Deuteronomy 8 in the TNTIK

Deuteronomy 8 in the TNTIL

Deuteronomy 8 in the TNTIN

Deuteronomy 8 in the TNTIP

Deuteronomy 8 in the TNTIZ

Deuteronomy 8 in the TOMA

Deuteronomy 8 in the TTENT

Deuteronomy 8 in the UBG

Deuteronomy 8 in the UGV

Deuteronomy 8 in the UGV2

Deuteronomy 8 in the UGV3

Deuteronomy 8 in the VBL

Deuteronomy 8 in the VDCC

Deuteronomy 8 in the YALU

Deuteronomy 8 in the YAPE

Deuteronomy 8 in the YBVTP

Deuteronomy 8 in the ZBP