Exodus 7 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo. 2 Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo ; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. 3 Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito. 4 Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele. 5 Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. » 6 Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. 7 Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe ; mpe Aron, tuku mwambe na misato. 8 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 9 « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. » 10 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka. 11 Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. 12 Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango. 13 Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki. 14 Yawe alobaki na Moyize : « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende. 15 Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka. 16 Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te. 17 Tala makambo oyo Yawe alobi : Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe : Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila. 18 Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te. ’ › » 19 Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. » 20 Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye ; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila. 21 Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito. 22 Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki. 23 Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te. 24 Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale. 25 Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili. 26 Sima na yango, Yawe atindaki Moyize : « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 27 Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba. 28 Nili ekotonda na magorodo ; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine. 29 Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › »

In Other Versions

Exodus 7 in the ANGEFD

Exodus 7 in the ANTPNG2D

Exodus 7 in the AS21

Exodus 7 in the BAGH

Exodus 7 in the BBPNG

Exodus 7 in the BBT1E

Exodus 7 in the BDS

Exodus 7 in the BEV

Exodus 7 in the BHAD

Exodus 7 in the BIB

Exodus 7 in the BLPT

Exodus 7 in the BNT

Exodus 7 in the BNTABOOT

Exodus 7 in the BNTLV

Exodus 7 in the BOATCB

Exodus 7 in the BOATCB2

Exodus 7 in the BOBCV

Exodus 7 in the BOCNT

Exodus 7 in the BOECS

Exodus 7 in the BOGWICC

Exodus 7 in the BOHCB

Exodus 7 in the BOHCV

Exodus 7 in the BOHLNT

Exodus 7 in the BOHNTLTAL

Exodus 7 in the BOICB

Exodus 7 in the BOILNTAP

Exodus 7 in the BOITCV

Exodus 7 in the BOKCV

Exodus 7 in the BOKCV2

Exodus 7 in the BOKHWOG

Exodus 7 in the BOKSSV

Exodus 7 in the BOLCB

Exodus 7 in the BOMCV

Exodus 7 in the BONAV

Exodus 7 in the BONCB

Exodus 7 in the BONLT

Exodus 7 in the BONUT2

Exodus 7 in the BOPLNT

Exodus 7 in the BOSCB

Exodus 7 in the BOSNC

Exodus 7 in the BOTLNT

Exodus 7 in the BOVCB

Exodus 7 in the BOYCB

Exodus 7 in the BPBB

Exodus 7 in the BPH

Exodus 7 in the BSB

Exodus 7 in the CCB

Exodus 7 in the CUV

Exodus 7 in the CUVS

Exodus 7 in the DBT

Exodus 7 in the DGDNT

Exodus 7 in the DHNT

Exodus 7 in the DNT

Exodus 7 in the ELBE

Exodus 7 in the EMTV

Exodus 7 in the ESV

Exodus 7 in the FBV

Exodus 7 in the FEB

Exodus 7 in the GGMNT

Exodus 7 in the GNT

Exodus 7 in the HARY

Exodus 7 in the HNT

Exodus 7 in the IRVA

Exodus 7 in the IRVB

Exodus 7 in the IRVG

Exodus 7 in the IRVH

Exodus 7 in the IRVK

Exodus 7 in the IRVM

Exodus 7 in the IRVM2

Exodus 7 in the IRVO

Exodus 7 in the IRVP

Exodus 7 in the IRVT

Exodus 7 in the IRVT2

Exodus 7 in the IRVU

Exodus 7 in the ISVN

Exodus 7 in the JSNT

Exodus 7 in the KAPI

Exodus 7 in the KBT1ETNIK

Exodus 7 in the KBV

Exodus 7 in the KJV

Exodus 7 in the KNFD

Exodus 7 in the LBA

Exodus 7 in the LBLA

Exodus 7 in the LNT

Exodus 7 in the LSV

Exodus 7 in the MAAL

Exodus 7 in the MBV

Exodus 7 in the MBV2

Exodus 7 in the MHNT

Exodus 7 in the MKNFD

Exodus 7 in the MNG

Exodus 7 in the MNT

Exodus 7 in the MNT2

Exodus 7 in the MRS1T

Exodus 7 in the NAA

Exodus 7 in the NASB

Exodus 7 in the NBLA

Exodus 7 in the NBS

Exodus 7 in the NBVTP

Exodus 7 in the NET2

Exodus 7 in the NIV11

Exodus 7 in the NNT

Exodus 7 in the NNT2

Exodus 7 in the NNT3

Exodus 7 in the PDDPT

Exodus 7 in the PFNT

Exodus 7 in the RMNT

Exodus 7 in the SBIAS

Exodus 7 in the SBIBS

Exodus 7 in the SBIBS2

Exodus 7 in the SBICS

Exodus 7 in the SBIDS

Exodus 7 in the SBIGS

Exodus 7 in the SBIHS

Exodus 7 in the SBIIS

Exodus 7 in the SBIIS2

Exodus 7 in the SBIIS3

Exodus 7 in the SBIKS

Exodus 7 in the SBIKS2

Exodus 7 in the SBIMS

Exodus 7 in the SBIOS

Exodus 7 in the SBIPS

Exodus 7 in the SBISS

Exodus 7 in the SBITS

Exodus 7 in the SBITS2

Exodus 7 in the SBITS3

Exodus 7 in the SBITS4

Exodus 7 in the SBIUS

Exodus 7 in the SBIVS

Exodus 7 in the SBT

Exodus 7 in the SBT1E

Exodus 7 in the SCHL

Exodus 7 in the SNT

Exodus 7 in the SUSU

Exodus 7 in the SUSU2

Exodus 7 in the SYNO

Exodus 7 in the TBIAOTANT

Exodus 7 in the TBT1E

Exodus 7 in the TBT1E2

Exodus 7 in the TFTIP

Exodus 7 in the TFTU

Exodus 7 in the TGNTATF3T

Exodus 7 in the THAI

Exodus 7 in the TNFD

Exodus 7 in the TNT

Exodus 7 in the TNTIK

Exodus 7 in the TNTIL

Exodus 7 in the TNTIN

Exodus 7 in the TNTIP

Exodus 7 in the TNTIZ

Exodus 7 in the TOMA

Exodus 7 in the TTENT

Exodus 7 in the UBG

Exodus 7 in the UGV

Exodus 7 in the UGV2

Exodus 7 in the UGV3

Exodus 7 in the VBL

Exodus 7 in the VDCC

Exodus 7 in the YALU

Exodus 7 in the YAPE

Exodus 7 in the YBVTP

Exodus 7 in the ZBP