Ezekiel 3 (BOLCB2)

1 Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. » 2 Boye, nafungolaki monoko na ngai, mpe aleisaki ngai buku yango oyo elingama. 3 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. »Boye, naliaki yango, mpe ezalaki elengi na monoko na ngai lokola mafuta ya nzoyi. 4 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, kende sik’oyo na libota ya Isalaele mpe yebisa bango maloba na Ngai. 5 Otindami te epai ya bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola, kasi epai ya bana ya Isalaele. 6 Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango. 7 Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te ; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi. 8 Nakokomisa yo motema mpe moto makasi lokola bango. 9 Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. » 10 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo. 11 Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › » 12 Boye, Molimo atelemisaki ngai mpe nayokaki sima na ngai makelele moko ya makasi : « Tika ete nkembo ya Yawe epambolama wuta na esika oyo Ye avandaka ! » 13 Nayokaki lisusu makelele ya mapapu ya bikelamu ya bomoi, tango ezalaki kotutana lipapu moko na mosusu, makelele ya bapine mpe lokito moko ya makasi. 14 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi. 15 Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi. 16 Sima na mikolo sambo, Yawe alobaki na ngai : 17 « Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele ; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai. 18 Soki Ngai nalobi na moto mabe : ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo. 19 Kasi soki, yo, okebisi moto wana ya mabe, mpe atiki mabe na ye te to abongwani na nzela na ye ya mabe te, akokufa solo na masumu na ye, mpe yo okobikisa bomoi na yo. 20 Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo. 21 Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. » 22 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai : « Telema mpe kende na lubwaku ; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. » 23 Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna : ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele. 24 Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai : « Kende komikangela kati na ndako na yo. 25 Yo, mwana na moto, bakokanga yo basinga, bakolinga-linga yo mpo ete okoka te kobima kati na bato. 26 Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki. 27 Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. »

In Other Versions

Ezekiel 3 in the ANGEFD

Ezekiel 3 in the ANTPNG2D

Ezekiel 3 in the AS21

Ezekiel 3 in the BAGH

Ezekiel 3 in the BBPNG

Ezekiel 3 in the BBT1E

Ezekiel 3 in the BDS

Ezekiel 3 in the BEV

Ezekiel 3 in the BHAD

Ezekiel 3 in the BIB

Ezekiel 3 in the BLPT

Ezekiel 3 in the BNT

Ezekiel 3 in the BNTABOOT

Ezekiel 3 in the BNTLV

Ezekiel 3 in the BOATCB

Ezekiel 3 in the BOATCB2

Ezekiel 3 in the BOBCV

Ezekiel 3 in the BOCNT

Ezekiel 3 in the BOECS

Ezekiel 3 in the BOGWICC

Ezekiel 3 in the BOHCB

Ezekiel 3 in the BOHCV

Ezekiel 3 in the BOHLNT

Ezekiel 3 in the BOHNTLTAL

Ezekiel 3 in the BOICB

Ezekiel 3 in the BOILNTAP

Ezekiel 3 in the BOITCV

Ezekiel 3 in the BOKCV

Ezekiel 3 in the BOKCV2

Ezekiel 3 in the BOKHWOG

Ezekiel 3 in the BOKSSV

Ezekiel 3 in the BOLCB

Ezekiel 3 in the BOMCV

Ezekiel 3 in the BONAV

Ezekiel 3 in the BONCB

Ezekiel 3 in the BONLT

Ezekiel 3 in the BONUT2

Ezekiel 3 in the BOPLNT

Ezekiel 3 in the BOSCB

Ezekiel 3 in the BOSNC

Ezekiel 3 in the BOTLNT

Ezekiel 3 in the BOVCB

Ezekiel 3 in the BOYCB

Ezekiel 3 in the BPBB

Ezekiel 3 in the BPH

Ezekiel 3 in the BSB

Ezekiel 3 in the CCB

Ezekiel 3 in the CUV

Ezekiel 3 in the CUVS

Ezekiel 3 in the DBT

Ezekiel 3 in the DGDNT

Ezekiel 3 in the DHNT

Ezekiel 3 in the DNT

Ezekiel 3 in the ELBE

Ezekiel 3 in the EMTV

Ezekiel 3 in the ESV

Ezekiel 3 in the FBV

Ezekiel 3 in the FEB

Ezekiel 3 in the GGMNT

Ezekiel 3 in the GNT

Ezekiel 3 in the HARY

Ezekiel 3 in the HNT

Ezekiel 3 in the IRVA

Ezekiel 3 in the IRVB

Ezekiel 3 in the IRVG

Ezekiel 3 in the IRVH

Ezekiel 3 in the IRVK

Ezekiel 3 in the IRVM

Ezekiel 3 in the IRVM2

Ezekiel 3 in the IRVO

Ezekiel 3 in the IRVP

Ezekiel 3 in the IRVT

Ezekiel 3 in the IRVT2

Ezekiel 3 in the IRVU

Ezekiel 3 in the ISVN

Ezekiel 3 in the JSNT

Ezekiel 3 in the KAPI

Ezekiel 3 in the KBT1ETNIK

Ezekiel 3 in the KBV

Ezekiel 3 in the KJV

Ezekiel 3 in the KNFD

Ezekiel 3 in the LBA

Ezekiel 3 in the LBLA

Ezekiel 3 in the LNT

Ezekiel 3 in the LSV

Ezekiel 3 in the MAAL

Ezekiel 3 in the MBV

Ezekiel 3 in the MBV2

Ezekiel 3 in the MHNT

Ezekiel 3 in the MKNFD

Ezekiel 3 in the MNG

Ezekiel 3 in the MNT

Ezekiel 3 in the MNT2

Ezekiel 3 in the MRS1T

Ezekiel 3 in the NAA

Ezekiel 3 in the NASB

Ezekiel 3 in the NBLA

Ezekiel 3 in the NBS

Ezekiel 3 in the NBVTP

Ezekiel 3 in the NET2

Ezekiel 3 in the NIV11

Ezekiel 3 in the NNT

Ezekiel 3 in the NNT2

Ezekiel 3 in the NNT3

Ezekiel 3 in the PDDPT

Ezekiel 3 in the PFNT

Ezekiel 3 in the RMNT

Ezekiel 3 in the SBIAS

Ezekiel 3 in the SBIBS

Ezekiel 3 in the SBIBS2

Ezekiel 3 in the SBICS

Ezekiel 3 in the SBIDS

Ezekiel 3 in the SBIGS

Ezekiel 3 in the SBIHS

Ezekiel 3 in the SBIIS

Ezekiel 3 in the SBIIS2

Ezekiel 3 in the SBIIS3

Ezekiel 3 in the SBIKS

Ezekiel 3 in the SBIKS2

Ezekiel 3 in the SBIMS

Ezekiel 3 in the SBIOS

Ezekiel 3 in the SBIPS

Ezekiel 3 in the SBISS

Ezekiel 3 in the SBITS

Ezekiel 3 in the SBITS2

Ezekiel 3 in the SBITS3

Ezekiel 3 in the SBITS4

Ezekiel 3 in the SBIUS

Ezekiel 3 in the SBIVS

Ezekiel 3 in the SBT

Ezekiel 3 in the SBT1E

Ezekiel 3 in the SCHL

Ezekiel 3 in the SNT

Ezekiel 3 in the SUSU

Ezekiel 3 in the SUSU2

Ezekiel 3 in the SYNO

Ezekiel 3 in the TBIAOTANT

Ezekiel 3 in the TBT1E

Ezekiel 3 in the TBT1E2

Ezekiel 3 in the TFTIP

Ezekiel 3 in the TFTU

Ezekiel 3 in the TGNTATF3T

Ezekiel 3 in the THAI

Ezekiel 3 in the TNFD

Ezekiel 3 in the TNT

Ezekiel 3 in the TNTIK

Ezekiel 3 in the TNTIL

Ezekiel 3 in the TNTIN

Ezekiel 3 in the TNTIP

Ezekiel 3 in the TNTIZ

Ezekiel 3 in the TOMA

Ezekiel 3 in the TTENT

Ezekiel 3 in the UBG

Ezekiel 3 in the UGV

Ezekiel 3 in the UGV2

Ezekiel 3 in the UGV3

Ezekiel 3 in the VBL

Ezekiel 3 in the VDCC

Ezekiel 3 in the YALU

Ezekiel 3 in the YAPE

Ezekiel 3 in the YBVTP

Ezekiel 3 in the ZBP