Genesis 11 (BOLCB2)

1 Na tango wana, bato ya mokili mobimba bazalaki koloba monoko moko mpe bazalaki na elobeli moko. 2 Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna. 3 Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. »Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela. 4 Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. » 5 Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga. 6 Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! 7 Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. » 8 Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba. 9 Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba. 10 Tala libota ya Semi : Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi. 11 Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 12 Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. » 13 Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 14 Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi. 15 Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 16 Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi. 17 Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 18 Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu. 19 Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 20 Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi. 21 Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 22 Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori. 23 Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 24 Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera. 25 Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. 26 Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani. 27 Tala libota ya Tera : Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti. 28 Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki. 29 Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » 30 Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te. 31 Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna. 32 Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.

In Other Versions

Genesis 11 in the ANGEFD

Genesis 11 in the ANTPNG2D

Genesis 11 in the AS21

Genesis 11 in the BAGH

Genesis 11 in the BBPNG

Genesis 11 in the BBT1E

Genesis 11 in the BDS

Genesis 11 in the BEV

Genesis 11 in the BHAD

Genesis 11 in the BIB

Genesis 11 in the BLPT

Genesis 11 in the BNT

Genesis 11 in the BNTABOOT

Genesis 11 in the BNTLV

Genesis 11 in the BOATCB

Genesis 11 in the BOATCB2

Genesis 11 in the BOBCV

Genesis 11 in the BOCNT

Genesis 11 in the BOECS

Genesis 11 in the BOGWICC

Genesis 11 in the BOHCB

Genesis 11 in the BOHCV

Genesis 11 in the BOHLNT

Genesis 11 in the BOHNTLTAL

Genesis 11 in the BOICB

Genesis 11 in the BOILNTAP

Genesis 11 in the BOITCV

Genesis 11 in the BOKCV

Genesis 11 in the BOKCV2

Genesis 11 in the BOKHWOG

Genesis 11 in the BOKSSV

Genesis 11 in the BOLCB

Genesis 11 in the BOMCV

Genesis 11 in the BONAV

Genesis 11 in the BONCB

Genesis 11 in the BONLT

Genesis 11 in the BONUT2

Genesis 11 in the BOPLNT

Genesis 11 in the BOSCB

Genesis 11 in the BOSNC

Genesis 11 in the BOTLNT

Genesis 11 in the BOVCB

Genesis 11 in the BOYCB

Genesis 11 in the BPBB

Genesis 11 in the BPH

Genesis 11 in the BSB

Genesis 11 in the CCB

Genesis 11 in the CUV

Genesis 11 in the CUVS

Genesis 11 in the DBT

Genesis 11 in the DGDNT

Genesis 11 in the DHNT

Genesis 11 in the DNT

Genesis 11 in the ELBE

Genesis 11 in the EMTV

Genesis 11 in the ESV

Genesis 11 in the FBV

Genesis 11 in the FEB

Genesis 11 in the GGMNT

Genesis 11 in the GNT

Genesis 11 in the HARY

Genesis 11 in the HNT

Genesis 11 in the IRVA

Genesis 11 in the IRVB

Genesis 11 in the IRVG

Genesis 11 in the IRVH

Genesis 11 in the IRVK

Genesis 11 in the IRVM

Genesis 11 in the IRVM2

Genesis 11 in the IRVO

Genesis 11 in the IRVP

Genesis 11 in the IRVT

Genesis 11 in the IRVT2

Genesis 11 in the IRVU

Genesis 11 in the ISVN

Genesis 11 in the JSNT

Genesis 11 in the KAPI

Genesis 11 in the KBT1ETNIK

Genesis 11 in the KBV

Genesis 11 in the KJV

Genesis 11 in the KNFD

Genesis 11 in the LBA

Genesis 11 in the LBLA

Genesis 11 in the LNT

Genesis 11 in the LSV

Genesis 11 in the MAAL

Genesis 11 in the MBV

Genesis 11 in the MBV2

Genesis 11 in the MHNT

Genesis 11 in the MKNFD

Genesis 11 in the MNG

Genesis 11 in the MNT

Genesis 11 in the MNT2

Genesis 11 in the MRS1T

Genesis 11 in the NAA

Genesis 11 in the NASB

Genesis 11 in the NBLA

Genesis 11 in the NBS

Genesis 11 in the NBVTP

Genesis 11 in the NET2

Genesis 11 in the NIV11

Genesis 11 in the NNT

Genesis 11 in the NNT2

Genesis 11 in the NNT3

Genesis 11 in the PDDPT

Genesis 11 in the PFNT

Genesis 11 in the RMNT

Genesis 11 in the SBIAS

Genesis 11 in the SBIBS

Genesis 11 in the SBIBS2

Genesis 11 in the SBICS

Genesis 11 in the SBIDS

Genesis 11 in the SBIGS

Genesis 11 in the SBIHS

Genesis 11 in the SBIIS

Genesis 11 in the SBIIS2

Genesis 11 in the SBIIS3

Genesis 11 in the SBIKS

Genesis 11 in the SBIKS2

Genesis 11 in the SBIMS

Genesis 11 in the SBIOS

Genesis 11 in the SBIPS

Genesis 11 in the SBISS

Genesis 11 in the SBITS

Genesis 11 in the SBITS2

Genesis 11 in the SBITS3

Genesis 11 in the SBITS4

Genesis 11 in the SBIUS

Genesis 11 in the SBIVS

Genesis 11 in the SBT

Genesis 11 in the SBT1E

Genesis 11 in the SCHL

Genesis 11 in the SNT

Genesis 11 in the SUSU

Genesis 11 in the SUSU2

Genesis 11 in the SYNO

Genesis 11 in the TBIAOTANT

Genesis 11 in the TBT1E

Genesis 11 in the TBT1E2

Genesis 11 in the TFTIP

Genesis 11 in the TFTU

Genesis 11 in the TGNTATF3T

Genesis 11 in the THAI

Genesis 11 in the TNFD

Genesis 11 in the TNT

Genesis 11 in the TNTIK

Genesis 11 in the TNTIL

Genesis 11 in the TNTIN

Genesis 11 in the TNTIP

Genesis 11 in the TNTIZ

Genesis 11 in the TOMA

Genesis 11 in the TTENT

Genesis 11 in the UBG

Genesis 11 in the UGV

Genesis 11 in the UGV2

Genesis 11 in the UGV3

Genesis 11 in the VBL

Genesis 11 in the VDCC

Genesis 11 in the YALU

Genesis 11 in the YAPE

Genesis 11 in the YBVTP

Genesis 11 in the ZBP