Genesis 14 (BOLCB2)

1 Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi, 2 bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari. 3 Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo. 4 Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye. 5 Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ; 6 bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe. 7 Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari. 8 Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi 9 mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano. 10 Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba. 11 Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia. 12 Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome. 13 Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami. 14 Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani. 15 Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi. 16 Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu. 17 Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba. 18 Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo 19 mpe apambolaki Abrami na maloba oyo :« Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo,Mokeli ya likolo mpe ya mokili,apambola Abrami ! 20 Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama,Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! »Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. 21 Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami :— Pesa ngai bato, kamata na yo biloko. 22 Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome :— Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili, 23 ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. » 24 Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango.

In Other Versions

Genesis 14 in the ANGEFD

Genesis 14 in the ANTPNG2D

Genesis 14 in the AS21

Genesis 14 in the BAGH

Genesis 14 in the BBPNG

Genesis 14 in the BBT1E

Genesis 14 in the BDS

Genesis 14 in the BEV

Genesis 14 in the BHAD

Genesis 14 in the BIB

Genesis 14 in the BLPT

Genesis 14 in the BNT

Genesis 14 in the BNTABOOT

Genesis 14 in the BNTLV

Genesis 14 in the BOATCB

Genesis 14 in the BOATCB2

Genesis 14 in the BOBCV

Genesis 14 in the BOCNT

Genesis 14 in the BOECS

Genesis 14 in the BOGWICC

Genesis 14 in the BOHCB

Genesis 14 in the BOHCV

Genesis 14 in the BOHLNT

Genesis 14 in the BOHNTLTAL

Genesis 14 in the BOICB

Genesis 14 in the BOILNTAP

Genesis 14 in the BOITCV

Genesis 14 in the BOKCV

Genesis 14 in the BOKCV2

Genesis 14 in the BOKHWOG

Genesis 14 in the BOKSSV

Genesis 14 in the BOLCB

Genesis 14 in the BOMCV

Genesis 14 in the BONAV

Genesis 14 in the BONCB

Genesis 14 in the BONLT

Genesis 14 in the BONUT2

Genesis 14 in the BOPLNT

Genesis 14 in the BOSCB

Genesis 14 in the BOSNC

Genesis 14 in the BOTLNT

Genesis 14 in the BOVCB

Genesis 14 in the BOYCB

Genesis 14 in the BPBB

Genesis 14 in the BPH

Genesis 14 in the BSB

Genesis 14 in the CCB

Genesis 14 in the CUV

Genesis 14 in the CUVS

Genesis 14 in the DBT

Genesis 14 in the DGDNT

Genesis 14 in the DHNT

Genesis 14 in the DNT

Genesis 14 in the ELBE

Genesis 14 in the EMTV

Genesis 14 in the ESV

Genesis 14 in the FBV

Genesis 14 in the FEB

Genesis 14 in the GGMNT

Genesis 14 in the GNT

Genesis 14 in the HARY

Genesis 14 in the HNT

Genesis 14 in the IRVA

Genesis 14 in the IRVB

Genesis 14 in the IRVG

Genesis 14 in the IRVH

Genesis 14 in the IRVK

Genesis 14 in the IRVM

Genesis 14 in the IRVM2

Genesis 14 in the IRVO

Genesis 14 in the IRVP

Genesis 14 in the IRVT

Genesis 14 in the IRVT2

Genesis 14 in the IRVU

Genesis 14 in the ISVN

Genesis 14 in the JSNT

Genesis 14 in the KAPI

Genesis 14 in the KBT1ETNIK

Genesis 14 in the KBV

Genesis 14 in the KJV

Genesis 14 in the KNFD

Genesis 14 in the LBA

Genesis 14 in the LBLA

Genesis 14 in the LNT

Genesis 14 in the LSV

Genesis 14 in the MAAL

Genesis 14 in the MBV

Genesis 14 in the MBV2

Genesis 14 in the MHNT

Genesis 14 in the MKNFD

Genesis 14 in the MNG

Genesis 14 in the MNT

Genesis 14 in the MNT2

Genesis 14 in the MRS1T

Genesis 14 in the NAA

Genesis 14 in the NASB

Genesis 14 in the NBLA

Genesis 14 in the NBS

Genesis 14 in the NBVTP

Genesis 14 in the NET2

Genesis 14 in the NIV11

Genesis 14 in the NNT

Genesis 14 in the NNT2

Genesis 14 in the NNT3

Genesis 14 in the PDDPT

Genesis 14 in the PFNT

Genesis 14 in the RMNT

Genesis 14 in the SBIAS

Genesis 14 in the SBIBS

Genesis 14 in the SBIBS2

Genesis 14 in the SBICS

Genesis 14 in the SBIDS

Genesis 14 in the SBIGS

Genesis 14 in the SBIHS

Genesis 14 in the SBIIS

Genesis 14 in the SBIIS2

Genesis 14 in the SBIIS3

Genesis 14 in the SBIKS

Genesis 14 in the SBIKS2

Genesis 14 in the SBIMS

Genesis 14 in the SBIOS

Genesis 14 in the SBIPS

Genesis 14 in the SBISS

Genesis 14 in the SBITS

Genesis 14 in the SBITS2

Genesis 14 in the SBITS3

Genesis 14 in the SBITS4

Genesis 14 in the SBIUS

Genesis 14 in the SBIVS

Genesis 14 in the SBT

Genesis 14 in the SBT1E

Genesis 14 in the SCHL

Genesis 14 in the SNT

Genesis 14 in the SUSU

Genesis 14 in the SUSU2

Genesis 14 in the SYNO

Genesis 14 in the TBIAOTANT

Genesis 14 in the TBT1E

Genesis 14 in the TBT1E2

Genesis 14 in the TFTIP

Genesis 14 in the TFTU

Genesis 14 in the TGNTATF3T

Genesis 14 in the THAI

Genesis 14 in the TNFD

Genesis 14 in the TNT

Genesis 14 in the TNTIK

Genesis 14 in the TNTIL

Genesis 14 in the TNTIN

Genesis 14 in the TNTIP

Genesis 14 in the TNTIZ

Genesis 14 in the TOMA

Genesis 14 in the TTENT

Genesis 14 in the UBG

Genesis 14 in the UGV

Genesis 14 in the UGV2

Genesis 14 in the UGV3

Genesis 14 in the VBL

Genesis 14 in the VDCC

Genesis 14 in the YALU

Genesis 14 in the YAPE

Genesis 14 in the YBVTP

Genesis 14 in the ZBP