Hebrews 3 (BOLCB2)
1 Yango wana, bandeko basantu, bino oyo Nzambe abenga mpo na kozwa bomengo ya Likolo, botalela kaka Yesu oyo biso tozali kondima lokola Ntoma mpe Mokonzi ya Banganga-Nzambe. 2 Solo, azali sembo na miso ya Nzambe oyo aponaki Ye, ndenge Moyize azalaki sembo kati na Ndako mobimba ya Nzambe. 3 Yesu amonanaki ete akoki mpo na kozwa lokumu monene koleka Moyize ; ndenge moko mpe motongi ndako azali na lokumu monene koleka ndako yango moko. 4 Pamba te, ezali na ndako moko te oyo ezangi motongi ; nzokande Nzambe azali motongi ya biloko nyonso. 5 Moyize azalaki sembo lokola mosali kati na Ndako mobimba ya Nzambe, mpo na kotatola na tina na makambo oyo Nzambe akoloba na mikolo oyo ezalaki kolanda. 6 Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso. 7 Yango wana, kolanda ndenge Molimo Mosantu alobi :« Lelo, soki boyoki mongongo na Ye, 8 boyeisa mitema na bino mabanga te,ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe,na mokolo ya komekama kati na esobe 9 epai wapi batata na bino bamekaki ngaimpe balukaki kotala mozindo ya motema na ngaiatako bamonaki misala na ngai 10 mibu tuku minei.Yango wana, natombokelaki bato ya ekeke wanampe nalobaki :‹ Mitema na bango ezali kobeba tango nyonso,mpe bayebaki banzela na ngai te. › 11 Boye, kati na kanda na ngai, nakataki seleka :‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › » 12 Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ; 13 kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga. 14 Pamba te tozali solo lisanga na Klisto soki tosimbi makasi, kino na suka, elikya oyo tozwaki wuta na ebandeli, 15 kolanda ndenge elobama :« Lelo, soki boyoki mongongo na Ye,boyeisa mitema na bino mabanga te,ndenge bosalaki tango botombokelaki Nzambe. » 16 Banani bayokaki mongongo ya Nzambe mpe batombokelaki Ye ? Ezali te bato nyonso oyo Moyize abimisaki na Ejipito ? 17 Asilikelaki banani mibu tuku minei ? Ezali te bato oyo basalaki masumu, oyo bibembe na bango ekweyaki kati na esobe ? 18 Epai ya banani Nzambe akataki seleka ete bakokota te kati na bopemi na Ye ? Ezali te epai ya bato oyo baboyaki kotosa Ye ? 19 Boye, tomoni ete balongaki te kokota mpo ete bazangaki kondima.
In Other Versions
Hebrews 3 in the ANGEFD
Hebrews 3 in the ANTPNG2D
Hebrews 3 in the AS21
Hebrews 3 in the BAGH
Hebrews 3 in the BBPNG
Hebrews 3 in the BBT1E
Hebrews 3 in the BDS
Hebrews 3 in the BEV
Hebrews 3 in the BHAD
Hebrews 3 in the BIB
Hebrews 3 in the BLPT
Hebrews 3 in the BNT
Hebrews 3 in the BNTABOOT
Hebrews 3 in the BNTLV
Hebrews 3 in the BOATCB
Hebrews 3 in the BOATCB2
Hebrews 3 in the BOBCV
Hebrews 3 in the BOCNT
Hebrews 3 in the BOECS
Hebrews 3 in the BOGWICC
Hebrews 3 in the BOHCB
Hebrews 3 in the BOHCV
Hebrews 3 in the BOHLNT
Hebrews 3 in the BOHNTLTAL
Hebrews 3 in the BOICB
Hebrews 3 in the BOILNTAP
Hebrews 3 in the BOITCV
Hebrews 3 in the BOKCV
Hebrews 3 in the BOKCV2
Hebrews 3 in the BOKHWOG
Hebrews 3 in the BOKSSV
Hebrews 3 in the BOLCB
Hebrews 3 in the BOMCV
Hebrews 3 in the BONAV
Hebrews 3 in the BONCB
Hebrews 3 in the BONLT
Hebrews 3 in the BONUT2
Hebrews 3 in the BOPLNT
Hebrews 3 in the BOSCB
Hebrews 3 in the BOSNC
Hebrews 3 in the BOTLNT
Hebrews 3 in the BOVCB
Hebrews 3 in the BOYCB
Hebrews 3 in the BPBB
Hebrews 3 in the BPH
Hebrews 3 in the BSB
Hebrews 3 in the CCB
Hebrews 3 in the CUV
Hebrews 3 in the CUVS
Hebrews 3 in the DBT
Hebrews 3 in the DGDNT
Hebrews 3 in the DHNT
Hebrews 3 in the DNT
Hebrews 3 in the ELBE
Hebrews 3 in the EMTV
Hebrews 3 in the ESV
Hebrews 3 in the FBV
Hebrews 3 in the FEB
Hebrews 3 in the GGMNT
Hebrews 3 in the GNT
Hebrews 3 in the HARY
Hebrews 3 in the HNT
Hebrews 3 in the IRVA
Hebrews 3 in the IRVB
Hebrews 3 in the IRVG
Hebrews 3 in the IRVH
Hebrews 3 in the IRVK
Hebrews 3 in the IRVM
Hebrews 3 in the IRVM2
Hebrews 3 in the IRVO
Hebrews 3 in the IRVP
Hebrews 3 in the IRVT
Hebrews 3 in the IRVT2
Hebrews 3 in the IRVU
Hebrews 3 in the ISVN
Hebrews 3 in the JSNT
Hebrews 3 in the KAPI
Hebrews 3 in the KBT1ETNIK
Hebrews 3 in the KBV
Hebrews 3 in the KJV
Hebrews 3 in the KNFD
Hebrews 3 in the LBA
Hebrews 3 in the LBLA
Hebrews 3 in the LNT
Hebrews 3 in the LSV
Hebrews 3 in the MAAL
Hebrews 3 in the MBV
Hebrews 3 in the MBV2
Hebrews 3 in the MHNT
Hebrews 3 in the MKNFD
Hebrews 3 in the MNG
Hebrews 3 in the MNT
Hebrews 3 in the MNT2
Hebrews 3 in the MRS1T
Hebrews 3 in the NAA
Hebrews 3 in the NASB
Hebrews 3 in the NBLA
Hebrews 3 in the NBS
Hebrews 3 in the NBVTP
Hebrews 3 in the NET2
Hebrews 3 in the NIV11
Hebrews 3 in the NNT
Hebrews 3 in the NNT2
Hebrews 3 in the NNT3
Hebrews 3 in the PDDPT
Hebrews 3 in the PFNT
Hebrews 3 in the RMNT
Hebrews 3 in the SBIAS
Hebrews 3 in the SBIBS
Hebrews 3 in the SBIBS2
Hebrews 3 in the SBICS
Hebrews 3 in the SBIDS
Hebrews 3 in the SBIGS
Hebrews 3 in the SBIHS
Hebrews 3 in the SBIIS
Hebrews 3 in the SBIIS2
Hebrews 3 in the SBIIS3
Hebrews 3 in the SBIKS
Hebrews 3 in the SBIKS2
Hebrews 3 in the SBIMS
Hebrews 3 in the SBIOS
Hebrews 3 in the SBIPS
Hebrews 3 in the SBISS
Hebrews 3 in the SBITS
Hebrews 3 in the SBITS2
Hebrews 3 in the SBITS3
Hebrews 3 in the SBITS4
Hebrews 3 in the SBIUS
Hebrews 3 in the SBIVS
Hebrews 3 in the SBT
Hebrews 3 in the SBT1E
Hebrews 3 in the SCHL
Hebrews 3 in the SNT
Hebrews 3 in the SUSU
Hebrews 3 in the SUSU2
Hebrews 3 in the SYNO
Hebrews 3 in the TBIAOTANT
Hebrews 3 in the TBT1E
Hebrews 3 in the TBT1E2
Hebrews 3 in the TFTIP
Hebrews 3 in the TFTU
Hebrews 3 in the TGNTATF3T
Hebrews 3 in the THAI
Hebrews 3 in the TNFD
Hebrews 3 in the TNT
Hebrews 3 in the TNTIK
Hebrews 3 in the TNTIL
Hebrews 3 in the TNTIN
Hebrews 3 in the TNTIP
Hebrews 3 in the TNTIZ
Hebrews 3 in the TOMA
Hebrews 3 in the TTENT
Hebrews 3 in the UBG
Hebrews 3 in the UGV
Hebrews 3 in the UGV2
Hebrews 3 in the UGV3
Hebrews 3 in the VBL
Hebrews 3 in the VDCC
Hebrews 3 in the YALU
Hebrews 3 in the YAPE
Hebrews 3 in the YBVTP
Hebrews 3 in the ZBP