Isaiah 10 (BOLCB2)

1 Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo,na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato ! 2 Bapimelaka bato pamba bosembompe babotolaka makoki ya babola,mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibalimpe ya bana bitike. 3 Bokosala nini na mokolo ya kosambisama,tango pasi ekowuta mosika ?Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ?Esika nini bokobomba bomengo na bino ? 4 Eloko kaka bokotikala na yango :kokitisa elongi na se elongo na bato ya bolokoto kokufa elongo na bato oyo babomi.Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te,loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama. 5 Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ;nzete oyo ezali na loboko na yeezali nde esalelo ya kanda na Ngai ! 6 Natindi ye mpo ete atelemelaekolo oyo eyebi Yawe tempe bato oyo bapesaka Ngai kanda,mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bangompe anyata bango lokola potopoto ya balabala. 7 Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te,akanisaka yango bongo te ;akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele. 8 Azali koloba :« Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonsondenge moko na bakonzi te ? 9 Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ?Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ?Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ? 10 Soki loboko na Ngai esukisaki bikolooyo esambelaka banzambe ya bikeko,bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebelekoleka Yelusalemi mpe Samari, 11 nakokoka te penza kosala Yelusalemielongo na banzambe na yango ya bikekondenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko ? » 12 Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye. 13 Pamba te azalaki koloba :‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonsona makasi mpe na bwanya na ngai moko,pamba te nazali mayele ;napusaki bandelo ya bikolo,nabotolaki bomengo na bango lokola elombe,nalongaki bakonzi na bango. 14 Loboko na ngai ekamataki bomengo na bangondenge bakamataka zala ya ndeke ;mpe ndenge bato balokotaka maki batika,ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba :moko te eningisaki lipaputo efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › » 15 Boni, epasola ekoki solo komimatisaliboso ya moto oyo asalelaka yango ;si ya mabaya ekoki solo komikumisaliboso ya moto oyo asalelaka yango ?Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yangoto etape ya nzete kotombola nzete na yango ? 16 Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,akotindela basoda na ye ya mbingabokono oyo ekondisaka nzoto.Na se ya nkembo na Ye,bakopelisa moto lokola fulu ya moto. 17 Pole ya Isalaele ekokoma moto,Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto ;kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisabasende mpe banzube ya Asiri, 18 akozikisa nye bazamba na yango ya minenempe bilanga na yango ya kitokondenge mobeli akondaka. 19 Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete mokeoyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango. 20 Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango ; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele. 21 Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya. 22 Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela. 23 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba. 24 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :« Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona,bozala na somo te ya bato ya Asirioyo bazali kobeta bino fimbumpe kotombola nzete mpo na kobeta binondenge bato ya Ejipito bazalaki kosala. 25 Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosilampe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bangompo na kobebisa bango. » 26 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito. 27 Na mokolo wana,bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na binompe na ekangiseli na bakingo na bino.Tango mokumba yango ekolongwa,ekotika esika na bomengo. 28 Tala bango wana bazali koya na Ayati,bazali koleka na lubwaku ya Migironi,babombi biloko na bango na Mikimasi. 29 Baleki kati na bangomba mpe balobi :« Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. »Bato ya Rama bakomi kolenga na somo,mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi. 30 Oh bato ya Galimi, boganga makasi !Oh Layisi, sala keba !Oh engumba Anatoti, mawa na yo ! 31 Bato ya Madimena bakimi,bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo ; 32 Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi,bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko,mpe na ngomba moke ya Yelusalemi. 33 Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga,akokata bitape ya banzete na nguya monene,akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi,akokomisa yango mikuse. 34 Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba :Libani ekokweya liboso ya Elombe.

In Other Versions

Isaiah 10 in the ANGEFD

Isaiah 10 in the ANTPNG2D

Isaiah 10 in the AS21

Isaiah 10 in the BAGH

Isaiah 10 in the BBPNG

Isaiah 10 in the BBT1E

Isaiah 10 in the BDS

Isaiah 10 in the BEV

Isaiah 10 in the BHAD

Isaiah 10 in the BIB

Isaiah 10 in the BLPT

Isaiah 10 in the BNT

Isaiah 10 in the BNTABOOT

Isaiah 10 in the BNTLV

Isaiah 10 in the BOATCB

Isaiah 10 in the BOATCB2

Isaiah 10 in the BOBCV

Isaiah 10 in the BOCNT

Isaiah 10 in the BOECS

Isaiah 10 in the BOGWICC

Isaiah 10 in the BOHCB

Isaiah 10 in the BOHCV

Isaiah 10 in the BOHLNT

Isaiah 10 in the BOHNTLTAL

Isaiah 10 in the BOICB

Isaiah 10 in the BOILNTAP

Isaiah 10 in the BOITCV

Isaiah 10 in the BOKCV

Isaiah 10 in the BOKCV2

Isaiah 10 in the BOKHWOG

Isaiah 10 in the BOKSSV

Isaiah 10 in the BOLCB

Isaiah 10 in the BOMCV

Isaiah 10 in the BONAV

Isaiah 10 in the BONCB

Isaiah 10 in the BONLT

Isaiah 10 in the BONUT2

Isaiah 10 in the BOPLNT

Isaiah 10 in the BOSCB

Isaiah 10 in the BOSNC

Isaiah 10 in the BOTLNT

Isaiah 10 in the BOVCB

Isaiah 10 in the BOYCB

Isaiah 10 in the BPBB

Isaiah 10 in the BPH

Isaiah 10 in the BSB

Isaiah 10 in the CCB

Isaiah 10 in the CUV

Isaiah 10 in the CUVS

Isaiah 10 in the DBT

Isaiah 10 in the DGDNT

Isaiah 10 in the DHNT

Isaiah 10 in the DNT

Isaiah 10 in the ELBE

Isaiah 10 in the EMTV

Isaiah 10 in the ESV

Isaiah 10 in the FBV

Isaiah 10 in the FEB

Isaiah 10 in the GGMNT

Isaiah 10 in the GNT

Isaiah 10 in the HARY

Isaiah 10 in the HNT

Isaiah 10 in the IRVA

Isaiah 10 in the IRVB

Isaiah 10 in the IRVG

Isaiah 10 in the IRVH

Isaiah 10 in the IRVK

Isaiah 10 in the IRVM

Isaiah 10 in the IRVM2

Isaiah 10 in the IRVO

Isaiah 10 in the IRVP

Isaiah 10 in the IRVT

Isaiah 10 in the IRVT2

Isaiah 10 in the IRVU

Isaiah 10 in the ISVN

Isaiah 10 in the JSNT

Isaiah 10 in the KAPI

Isaiah 10 in the KBT1ETNIK

Isaiah 10 in the KBV

Isaiah 10 in the KJV

Isaiah 10 in the KNFD

Isaiah 10 in the LBA

Isaiah 10 in the LBLA

Isaiah 10 in the LNT

Isaiah 10 in the LSV

Isaiah 10 in the MAAL

Isaiah 10 in the MBV

Isaiah 10 in the MBV2

Isaiah 10 in the MHNT

Isaiah 10 in the MKNFD

Isaiah 10 in the MNG

Isaiah 10 in the MNT

Isaiah 10 in the MNT2

Isaiah 10 in the MRS1T

Isaiah 10 in the NAA

Isaiah 10 in the NASB

Isaiah 10 in the NBLA

Isaiah 10 in the NBS

Isaiah 10 in the NBVTP

Isaiah 10 in the NET2

Isaiah 10 in the NIV11

Isaiah 10 in the NNT

Isaiah 10 in the NNT2

Isaiah 10 in the NNT3

Isaiah 10 in the PDDPT

Isaiah 10 in the PFNT

Isaiah 10 in the RMNT

Isaiah 10 in the SBIAS

Isaiah 10 in the SBIBS

Isaiah 10 in the SBIBS2

Isaiah 10 in the SBICS

Isaiah 10 in the SBIDS

Isaiah 10 in the SBIGS

Isaiah 10 in the SBIHS

Isaiah 10 in the SBIIS

Isaiah 10 in the SBIIS2

Isaiah 10 in the SBIIS3

Isaiah 10 in the SBIKS

Isaiah 10 in the SBIKS2

Isaiah 10 in the SBIMS

Isaiah 10 in the SBIOS

Isaiah 10 in the SBIPS

Isaiah 10 in the SBISS

Isaiah 10 in the SBITS

Isaiah 10 in the SBITS2

Isaiah 10 in the SBITS3

Isaiah 10 in the SBITS4

Isaiah 10 in the SBIUS

Isaiah 10 in the SBIVS

Isaiah 10 in the SBT

Isaiah 10 in the SBT1E

Isaiah 10 in the SCHL

Isaiah 10 in the SNT

Isaiah 10 in the SUSU

Isaiah 10 in the SUSU2

Isaiah 10 in the SYNO

Isaiah 10 in the TBIAOTANT

Isaiah 10 in the TBT1E

Isaiah 10 in the TBT1E2

Isaiah 10 in the TFTIP

Isaiah 10 in the TFTU

Isaiah 10 in the TGNTATF3T

Isaiah 10 in the THAI

Isaiah 10 in the TNFD

Isaiah 10 in the TNT

Isaiah 10 in the TNTIK

Isaiah 10 in the TNTIL

Isaiah 10 in the TNTIN

Isaiah 10 in the TNTIP

Isaiah 10 in the TNTIZ

Isaiah 10 in the TOMA

Isaiah 10 in the TTENT

Isaiah 10 in the UBG

Isaiah 10 in the UGV

Isaiah 10 in the UGV2

Isaiah 10 in the UGV3

Isaiah 10 in the VBL

Isaiah 10 in the VDCC

Isaiah 10 in the YALU

Isaiah 10 in the YAPE

Isaiah 10 in the YBVTP

Isaiah 10 in the ZBP