Isaiah 44 (BOLCB2)

1 Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai,Isalaele oyo naponaki ! 2 Tala liloba oyo Yawe alobi,Ye oyo asalaki yo,abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yompe asungaka yo :Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ;yo, Yeshuruni, oyo naponaki. 3 Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka,mpe bibale, na mabele ya kokawuka ;nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yompe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo. 4 Bakokola malamu kati na matiti ya mobesulokola banzete ya pepiliye pene ya ebale. 5 Moto moko akoloba : ‹ Nazali ya Yawe, ›mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi,kino mosusu akokoma na loboko na ye :‹ Nazali ya Yawe, ›mpe akozwa kombo ya Isalaele. 6 Tala liloba oyo Yawe,Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele,Mokonzi ya mampinga, alobi :Nazali ebandeli mpe nazali suka ;Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. 7 Nani azali lokola Ngai ? Tika ete atatola yango ;tika ete aloba mpe abimisa liboso na Ngaimakambo oyo esalema wuta kala,wuta tango nasala bato oyo,mpe makambo oyo ekoya !Solo, tika ete basakola makambo oyo ekoya ! 8 Bolenga te, bobanga mpe te.Boni, natatolaki yango te ?Nasakolaki yango te wuta kala ?Bozali batatoli na Ngai.Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ?Te, ezali na Libanga mosusu te,nayebi ata moko te. » 9 Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba,mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ;esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka tempe eyebaka ata eloko moko te ;boye, bayokisama soni. 10 Nani asala nzambe to ekeko ya ebendempo ete ezala ata na litomba moko te mpo na ye ? 11 Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni ;basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso !Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana ;bakokweya na somo mpe na soni. 12 Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo,asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto ;asalaka ekeko na martompe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye ;nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye ;soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye ! 13 Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi,akomaka elilingi na ekomeli ya motane,asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi,abongisaka mondelo na yango na limempe apesaka yango lolenge ya moto,ndenge kaka moto azalaka kitoko,mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule. 14 Akataka banzete ya sedele ;mpe tango mosusu, banzete ya sipele to ya sheni ;atikaka yango ekola kati na banzete ya zambampe alonaka nzete ya pen oyo mvula ekokolisa. 15 Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto,akataka yango mpo na koyetola mototo mpo na kobelisa mapa ;kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka ;asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka. 16 Akotia ndambo ya nzete yango na moto,bongo akolamba na yango mosuni,akotumba mosuni na yempe akolia yango kino akotonda ;akokoma lisusu koyoka molunge mpe akoloba :« Ah, nayoki molunge, namoni moto epeli makasi ! » 17 Mpe na ndambo oyo etikali,oyo asalaki na yango nzambe,nzambe na ye ya ekeko,akofukamela yango mpe akosambela yango ;akosambela yango mpe akoloba :« Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai ! » 18 Bayebi eloko moko te,bazali na bososoli te ;miso na bango ekangama, emonaka te ;mitema na bango ezali makasi, esosolaka te. 19 Moko te akanisaka,moko mpe te azalaka na boyebimpe na mayele mpo na koloba :« Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto,nabelisaki mapa na makala na yango ya moto,natumbaki mosuni mpe naliaki yango.Bongo mpo na oyo etikali,nasala na yango penza likambo ya nkele boye ?Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? » 20 Makanisi na ye ekangama na putulu,motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ;akokoka te komikangola mpe koloba :« Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobaliezali lokuta te ? » 21 « Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo,pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai.Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai ;oh Isalaele, nakobosana yo te. 22 Nalongoli mabe na yo lokola lipata,masumu na yo lokola lipata ya tongo.Zonga epai na Ngai,pamba te nasili kosikola yo. » 23 Oh Lola, yemba banzembo ya esengo,pamba te Yawe nde asali bongo !Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo !Oh bino bangomba,bazamba mpe banzete nyonso kati na yango,boyemba banzembo ya elonga !Pamba te Yawe asikolaki Jakobi,amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele. 24 « Tala liloba oyo Yawe alobi,Ye oyo azali Mosikoli na yo,oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo :Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso,Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa,Ngai moko nde natandaki mabele. 25 Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ;natie mobulu kati na molimo ya batooyo balobaka makambo ekoya,nakweyisi boyebi ya bato ya bwanyampe nakomisi mayele na bango liboma. 26 Nakokisi maloba ya mosali na Ngaimpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi :‹ Bato bakovanda kati na yo ; ›na tina na bingumba ya Yuda :‹ Ekotongama lisusu, ›mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana :‹ Nakobongisa yango lisusu. › 27 Nalobi na ebale monene :‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo ! › 28 Nalobi na tina na Sirisi :‹ Azali mobateli oyo naponi,akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai.Akoloba na tina na Yelusalemi :‘ Tika ete etongama lisusu, ’mpe na tina na Tempelo :‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › »

In Other Versions

Isaiah 44 in the ANGEFD

Isaiah 44 in the ANTPNG2D

Isaiah 44 in the AS21

Isaiah 44 in the BAGH

Isaiah 44 in the BBPNG

Isaiah 44 in the BBT1E

Isaiah 44 in the BDS

Isaiah 44 in the BEV

Isaiah 44 in the BHAD

Isaiah 44 in the BIB

Isaiah 44 in the BLPT

Isaiah 44 in the BNT

Isaiah 44 in the BNTABOOT

Isaiah 44 in the BNTLV

Isaiah 44 in the BOATCB

Isaiah 44 in the BOATCB2

Isaiah 44 in the BOBCV

Isaiah 44 in the BOCNT

Isaiah 44 in the BOECS

Isaiah 44 in the BOGWICC

Isaiah 44 in the BOHCB

Isaiah 44 in the BOHCV

Isaiah 44 in the BOHLNT

Isaiah 44 in the BOHNTLTAL

Isaiah 44 in the BOICB

Isaiah 44 in the BOILNTAP

Isaiah 44 in the BOITCV

Isaiah 44 in the BOKCV

Isaiah 44 in the BOKCV2

Isaiah 44 in the BOKHWOG

Isaiah 44 in the BOKSSV

Isaiah 44 in the BOLCB

Isaiah 44 in the BOMCV

Isaiah 44 in the BONAV

Isaiah 44 in the BONCB

Isaiah 44 in the BONLT

Isaiah 44 in the BONUT2

Isaiah 44 in the BOPLNT

Isaiah 44 in the BOSCB

Isaiah 44 in the BOSNC

Isaiah 44 in the BOTLNT

Isaiah 44 in the BOVCB

Isaiah 44 in the BOYCB

Isaiah 44 in the BPBB

Isaiah 44 in the BPH

Isaiah 44 in the BSB

Isaiah 44 in the CCB

Isaiah 44 in the CUV

Isaiah 44 in the CUVS

Isaiah 44 in the DBT

Isaiah 44 in the DGDNT

Isaiah 44 in the DHNT

Isaiah 44 in the DNT

Isaiah 44 in the ELBE

Isaiah 44 in the EMTV

Isaiah 44 in the ESV

Isaiah 44 in the FBV

Isaiah 44 in the FEB

Isaiah 44 in the GGMNT

Isaiah 44 in the GNT

Isaiah 44 in the HARY

Isaiah 44 in the HNT

Isaiah 44 in the IRVA

Isaiah 44 in the IRVB

Isaiah 44 in the IRVG

Isaiah 44 in the IRVH

Isaiah 44 in the IRVK

Isaiah 44 in the IRVM

Isaiah 44 in the IRVM2

Isaiah 44 in the IRVO

Isaiah 44 in the IRVP

Isaiah 44 in the IRVT

Isaiah 44 in the IRVT2

Isaiah 44 in the IRVU

Isaiah 44 in the ISVN

Isaiah 44 in the JSNT

Isaiah 44 in the KAPI

Isaiah 44 in the KBT1ETNIK

Isaiah 44 in the KBV

Isaiah 44 in the KJV

Isaiah 44 in the KNFD

Isaiah 44 in the LBA

Isaiah 44 in the LBLA

Isaiah 44 in the LNT

Isaiah 44 in the LSV

Isaiah 44 in the MAAL

Isaiah 44 in the MBV

Isaiah 44 in the MBV2

Isaiah 44 in the MHNT

Isaiah 44 in the MKNFD

Isaiah 44 in the MNG

Isaiah 44 in the MNT

Isaiah 44 in the MNT2

Isaiah 44 in the MRS1T

Isaiah 44 in the NAA

Isaiah 44 in the NASB

Isaiah 44 in the NBLA

Isaiah 44 in the NBS

Isaiah 44 in the NBVTP

Isaiah 44 in the NET2

Isaiah 44 in the NIV11

Isaiah 44 in the NNT

Isaiah 44 in the NNT2

Isaiah 44 in the NNT3

Isaiah 44 in the PDDPT

Isaiah 44 in the PFNT

Isaiah 44 in the RMNT

Isaiah 44 in the SBIAS

Isaiah 44 in the SBIBS

Isaiah 44 in the SBIBS2

Isaiah 44 in the SBICS

Isaiah 44 in the SBIDS

Isaiah 44 in the SBIGS

Isaiah 44 in the SBIHS

Isaiah 44 in the SBIIS

Isaiah 44 in the SBIIS2

Isaiah 44 in the SBIIS3

Isaiah 44 in the SBIKS

Isaiah 44 in the SBIKS2

Isaiah 44 in the SBIMS

Isaiah 44 in the SBIOS

Isaiah 44 in the SBIPS

Isaiah 44 in the SBISS

Isaiah 44 in the SBITS

Isaiah 44 in the SBITS2

Isaiah 44 in the SBITS3

Isaiah 44 in the SBITS4

Isaiah 44 in the SBIUS

Isaiah 44 in the SBIVS

Isaiah 44 in the SBT

Isaiah 44 in the SBT1E

Isaiah 44 in the SCHL

Isaiah 44 in the SNT

Isaiah 44 in the SUSU

Isaiah 44 in the SUSU2

Isaiah 44 in the SYNO

Isaiah 44 in the TBIAOTANT

Isaiah 44 in the TBT1E

Isaiah 44 in the TBT1E2

Isaiah 44 in the TFTIP

Isaiah 44 in the TFTU

Isaiah 44 in the TGNTATF3T

Isaiah 44 in the THAI

Isaiah 44 in the TNFD

Isaiah 44 in the TNT

Isaiah 44 in the TNTIK

Isaiah 44 in the TNTIL

Isaiah 44 in the TNTIN

Isaiah 44 in the TNTIP

Isaiah 44 in the TNTIZ

Isaiah 44 in the TOMA

Isaiah 44 in the TTENT

Isaiah 44 in the UBG

Isaiah 44 in the UGV

Isaiah 44 in the UGV2

Isaiah 44 in the UGV3

Isaiah 44 in the VBL

Isaiah 44 in the VDCC

Isaiah 44 in the YALU

Isaiah 44 in the YAPE

Isaiah 44 in the YBVTP

Isaiah 44 in the ZBP