Isaiah 49 (BOLCB2)

1 Boyoka ngai, bino bisanga ;boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika :Yawe abengaki ngaiwuta na libumu ya mama na ngai,azalaki kolobela kombo na ngaiwuta mbotama na ngai ; 2 akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi,abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye,akomisi ngai lokola tolotolompe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ; 3 alobaki na ngai :« Oh Isalaele, ozali mosali na ngai,nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. » 4 Kasi ngai, nalobaki :« Nabimisaki motoki na ngai se pamba,nasilisaki makasi na ngai na pambampe nazwaki litomba moko te.Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe,mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. » 5 Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngaiwuta na libumu ya mama na ngaimpo ete nazala mosali na Ye,mpo na kozongisa Jakobi epai na Yempe kosangisa Isalaele pene na Ye,pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawempe Nzambe na ngai azali makasi na ngai, 6 Ye, Yawe, alobi :« Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngaimpo na kotelemisa mabota ya Jakobimpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki.Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusumpo ete omema lobiko na Ngaikino na suka ya mokili. » 7 Tala liloba oyo Yawe,Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele,alobi epai na ye oyo atiolamimpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo,na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe :« Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema,bakambi bakomona yo mpe bakogumbama,likolo na Yawe oyo azali Sembo,Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. » 8 Tala liloba oyo Yawe alobi :« Na tango ya malamu, nakoyanola yo ;mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ;nakobatela yo mpe nakotombola yompo ete osala boyokani elongo na bato,osala ete mokili etombwamampe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ; 9 mpo ete oloba na bakangami : ‹ Bobima, ›mpe na bato oyo bazali kati na molili :‹ Bokoma bansomi ! › Boye bakozala lokola bibwele oyoezali kolia matiti pene ya nzela,mpe bakozwa bilei na bangomba nyonsooyo ebotaka matiti te. 10 Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ;molunge ya esobe to moyi makasiekomonisa bango pasi te,pamba te Ye oyo alingaka bangoakolakisa bango nzelampe akomema bango pene ya miluka. 11 Nakobongola bangomba na Ngai nyonso nzela,mpe nakokunda mabulu ya banzela na Ngai ya minene. 12 Tala, bakowuta penza mosika,ndambo moko na ngambo ya nor,ndambo mosusu na ngambo ya weste,mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. » 13 Oh likolo, ganga na esengo !Oh mabele, sepela !Oh bangomba, boyemba banzembo !Pamba te Yawe abondisi bato na Yempe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki. 14 Kasi Siona alobaki :« Yawe asundoli ngai,Nkolo na ngai abosani ngai ! » 15 Boni, mama akoki solo kobosanabebe na ye oyo azali komelisa mabele,to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?Ata soki akoki kobosana,ngai nakoki kobosana yo te ! 16 Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ;bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai. 17 Bana na yo bakozonga na lombangu,kasi babebisi na yo bakokende mosika na yo. 18 Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga :bana na yo nyonso basanganimpe bazali koya epai na yo.Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe,ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo,mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala. 19 Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga,bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te ;sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo,mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasibakozala mosika na yo. 20 Okanisaki ete ozangaki bana,kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo :« Esika oyo ezali penza moke mpo na biso ;pesa biso esika oyo eleki monenempo ete tokoka kovanda. » 21 Boye, okomilobela na motema :« Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ?Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te,nazalaki mowumbu mpe moto basundola.Bongo nani abokolaki bango ?Natikalaki kaka ngai moko,bongo bana oyo bawuti wapi ? » 22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :« Tala, nakotombola loboko na Ngai liboso ya bikolo,nakotelemisa bendele na Ngai liboso ya bato ;bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bangompe oyo ya basi, na mapeka na bango. 23 Bakonzi bakozala batata babokoli na yo,mpe basi na bango, basungi na yo ;bakofukama liboso na yona bilongi etala na mabele,bakolembola putulu ya makolo na yo.Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ;ete bato oyo batielaka Ngai motemabayokisamaka soni te. » 24 Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumbana maboko ya basoda ya mpikoto kokangola mokangamiwuta na maboko ya monyokoli na ye ? 25 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi :« Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko,mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli.Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo,mpe nakobikisa bana na yo. 26 Nakosala ete banyokoli na yobalia misuni na bango moko ;bakolangwa makila na bango mokondenge balangwaka masanga ya vino.Boye, moto nyonso akoyeba eteNgai Yawe, nazali Mobikisi na yo,Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »

In Other Versions

Isaiah 49 in the ANGEFD

Isaiah 49 in the ANTPNG2D

Isaiah 49 in the AS21

Isaiah 49 in the BAGH

Isaiah 49 in the BBPNG

Isaiah 49 in the BBT1E

Isaiah 49 in the BDS

Isaiah 49 in the BEV

Isaiah 49 in the BHAD

Isaiah 49 in the BIB

Isaiah 49 in the BLPT

Isaiah 49 in the BNT

Isaiah 49 in the BNTABOOT

Isaiah 49 in the BNTLV

Isaiah 49 in the BOATCB

Isaiah 49 in the BOATCB2

Isaiah 49 in the BOBCV

Isaiah 49 in the BOCNT

Isaiah 49 in the BOECS

Isaiah 49 in the BOGWICC

Isaiah 49 in the BOHCB

Isaiah 49 in the BOHCV

Isaiah 49 in the BOHLNT

Isaiah 49 in the BOHNTLTAL

Isaiah 49 in the BOICB

Isaiah 49 in the BOILNTAP

Isaiah 49 in the BOITCV

Isaiah 49 in the BOKCV

Isaiah 49 in the BOKCV2

Isaiah 49 in the BOKHWOG

Isaiah 49 in the BOKSSV

Isaiah 49 in the BOLCB

Isaiah 49 in the BOMCV

Isaiah 49 in the BONAV

Isaiah 49 in the BONCB

Isaiah 49 in the BONLT

Isaiah 49 in the BONUT2

Isaiah 49 in the BOPLNT

Isaiah 49 in the BOSCB

Isaiah 49 in the BOSNC

Isaiah 49 in the BOTLNT

Isaiah 49 in the BOVCB

Isaiah 49 in the BOYCB

Isaiah 49 in the BPBB

Isaiah 49 in the BPH

Isaiah 49 in the BSB

Isaiah 49 in the CCB

Isaiah 49 in the CUV

Isaiah 49 in the CUVS

Isaiah 49 in the DBT

Isaiah 49 in the DGDNT

Isaiah 49 in the DHNT

Isaiah 49 in the DNT

Isaiah 49 in the ELBE

Isaiah 49 in the EMTV

Isaiah 49 in the ESV

Isaiah 49 in the FBV

Isaiah 49 in the FEB

Isaiah 49 in the GGMNT

Isaiah 49 in the GNT

Isaiah 49 in the HARY

Isaiah 49 in the HNT

Isaiah 49 in the IRVA

Isaiah 49 in the IRVB

Isaiah 49 in the IRVG

Isaiah 49 in the IRVH

Isaiah 49 in the IRVK

Isaiah 49 in the IRVM

Isaiah 49 in the IRVM2

Isaiah 49 in the IRVO

Isaiah 49 in the IRVP

Isaiah 49 in the IRVT

Isaiah 49 in the IRVT2

Isaiah 49 in the IRVU

Isaiah 49 in the ISVN

Isaiah 49 in the JSNT

Isaiah 49 in the KAPI

Isaiah 49 in the KBT1ETNIK

Isaiah 49 in the KBV

Isaiah 49 in the KJV

Isaiah 49 in the KNFD

Isaiah 49 in the LBA

Isaiah 49 in the LBLA

Isaiah 49 in the LNT

Isaiah 49 in the LSV

Isaiah 49 in the MAAL

Isaiah 49 in the MBV

Isaiah 49 in the MBV2

Isaiah 49 in the MHNT

Isaiah 49 in the MKNFD

Isaiah 49 in the MNG

Isaiah 49 in the MNT

Isaiah 49 in the MNT2

Isaiah 49 in the MRS1T

Isaiah 49 in the NAA

Isaiah 49 in the NASB

Isaiah 49 in the NBLA

Isaiah 49 in the NBS

Isaiah 49 in the NBVTP

Isaiah 49 in the NET2

Isaiah 49 in the NIV11

Isaiah 49 in the NNT

Isaiah 49 in the NNT2

Isaiah 49 in the NNT3

Isaiah 49 in the PDDPT

Isaiah 49 in the PFNT

Isaiah 49 in the RMNT

Isaiah 49 in the SBIAS

Isaiah 49 in the SBIBS

Isaiah 49 in the SBIBS2

Isaiah 49 in the SBICS

Isaiah 49 in the SBIDS

Isaiah 49 in the SBIGS

Isaiah 49 in the SBIHS

Isaiah 49 in the SBIIS

Isaiah 49 in the SBIIS2

Isaiah 49 in the SBIIS3

Isaiah 49 in the SBIKS

Isaiah 49 in the SBIKS2

Isaiah 49 in the SBIMS

Isaiah 49 in the SBIOS

Isaiah 49 in the SBIPS

Isaiah 49 in the SBISS

Isaiah 49 in the SBITS

Isaiah 49 in the SBITS2

Isaiah 49 in the SBITS3

Isaiah 49 in the SBITS4

Isaiah 49 in the SBIUS

Isaiah 49 in the SBIVS

Isaiah 49 in the SBT

Isaiah 49 in the SBT1E

Isaiah 49 in the SCHL

Isaiah 49 in the SNT

Isaiah 49 in the SUSU

Isaiah 49 in the SUSU2

Isaiah 49 in the SYNO

Isaiah 49 in the TBIAOTANT

Isaiah 49 in the TBT1E

Isaiah 49 in the TBT1E2

Isaiah 49 in the TFTIP

Isaiah 49 in the TFTU

Isaiah 49 in the TGNTATF3T

Isaiah 49 in the THAI

Isaiah 49 in the TNFD

Isaiah 49 in the TNT

Isaiah 49 in the TNTIK

Isaiah 49 in the TNTIL

Isaiah 49 in the TNTIN

Isaiah 49 in the TNTIP

Isaiah 49 in the TNTIZ

Isaiah 49 in the TOMA

Isaiah 49 in the TTENT

Isaiah 49 in the UBG

Isaiah 49 in the UGV

Isaiah 49 in the UGV2

Isaiah 49 in the UGV3

Isaiah 49 in the VBL

Isaiah 49 in the VDCC

Isaiah 49 in the YALU

Isaiah 49 in the YAPE

Isaiah 49 in the YBVTP

Isaiah 49 in the ZBP