Isaiah 7 (BOLCB2)

1 Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te. 2 Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. »Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe. 3 Boye, Yawe alobaki na Ezayi : « Kende, yo elongo na Sheari-Yashubi, mwana na yo ya mobali, kokutana na Akazi na suka ya nzela ya mayi oyo ekenda kino na liziba monene, na nzela ya bilanga ya moto oyo atiaka balangi na bilamba ; 4 loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia ! 5 Siri, Efrayimi mpe mwana mobali ya Remalia, basaleli yo likita mpo na kobebisa yo ; bazali koloba : 6 ‘ Tika ete tobundisa Yuda, tokata yango na biteni, tokabola yango biso na biso mpe totia mwana mobali ya Tabeli lokola mokonzi na yango. ’ 7 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi :Ekotikala kosalema te,ekotikala kokokisama te ! 8 Pamba te moto ya Siri ezali Damasi,mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini.Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano,Efrayimi ekobebisamampe ekozala lisusu na molongo ya mabota te. 9 Moto ya Efrayimi ezali Samari,mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia.Soki botelemi ngwi te na kondima na bino,bokolonga te kotelema liboso na bango ! › » 10 Yawe alobaki lisusu na Akazi : 11 — Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo. 12 Kasi Akazi alobaki :— Nakosenga te, nakoki komeka Yawe te. 13 Boye Ezayi alobaki :— Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ? 14 Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. » 15 Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu. 16 Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama. 17 Yawe akoyeisela yo, bato na yo mpe libota ya tata na yo mikolo oyo etikala nanu kozala te wuta Efrayimi ekabwana na Yuda : ezali nde mokonzi ya Asiri. 18 Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri ; 19 ekoya mpe ekovanda kati na mabwaku ya mozindo mpe na madusu ya mabanga, na banzete nyonso ya mike-mike mpe na matiti nyonso. 20 Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo. 21 Na mokolo wana, moko na moko akobokola mwana ngombe ya mwasi mpe bameme to bantaba mibale ya basi. 22 Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka ; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi. 23 Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube. 24 Bato bakokota kuna na matolotolo mpe na bambanzi, pamba te mokili ekotonda na basende mpe na banzube. 25 Bato bakoleka lisusu te na bangambo nyonso oyo bazalaki kosala bilanga na kongo, pamba te bakokoma kobanga basende mpe banzube ; ngombe ekokoma kolia kuna, mpe meme ekonyata-nyata mabele na yango.

In Other Versions

Isaiah 7 in the ANGEFD

Isaiah 7 in the ANTPNG2D

Isaiah 7 in the AS21

Isaiah 7 in the BAGH

Isaiah 7 in the BBPNG

Isaiah 7 in the BBT1E

Isaiah 7 in the BDS

Isaiah 7 in the BEV

Isaiah 7 in the BHAD

Isaiah 7 in the BIB

Isaiah 7 in the BLPT

Isaiah 7 in the BNT

Isaiah 7 in the BNTABOOT

Isaiah 7 in the BNTLV

Isaiah 7 in the BOATCB

Isaiah 7 in the BOATCB2

Isaiah 7 in the BOBCV

Isaiah 7 in the BOCNT

Isaiah 7 in the BOECS

Isaiah 7 in the BOGWICC

Isaiah 7 in the BOHCB

Isaiah 7 in the BOHCV

Isaiah 7 in the BOHLNT

Isaiah 7 in the BOHNTLTAL

Isaiah 7 in the BOICB

Isaiah 7 in the BOILNTAP

Isaiah 7 in the BOITCV

Isaiah 7 in the BOKCV

Isaiah 7 in the BOKCV2

Isaiah 7 in the BOKHWOG

Isaiah 7 in the BOKSSV

Isaiah 7 in the BOLCB

Isaiah 7 in the BOMCV

Isaiah 7 in the BONAV

Isaiah 7 in the BONCB

Isaiah 7 in the BONLT

Isaiah 7 in the BONUT2

Isaiah 7 in the BOPLNT

Isaiah 7 in the BOSCB

Isaiah 7 in the BOSNC

Isaiah 7 in the BOTLNT

Isaiah 7 in the BOVCB

Isaiah 7 in the BOYCB

Isaiah 7 in the BPBB

Isaiah 7 in the BPH

Isaiah 7 in the BSB

Isaiah 7 in the CCB

Isaiah 7 in the CUV

Isaiah 7 in the CUVS

Isaiah 7 in the DBT

Isaiah 7 in the DGDNT

Isaiah 7 in the DHNT

Isaiah 7 in the DNT

Isaiah 7 in the ELBE

Isaiah 7 in the EMTV

Isaiah 7 in the ESV

Isaiah 7 in the FBV

Isaiah 7 in the FEB

Isaiah 7 in the GGMNT

Isaiah 7 in the GNT

Isaiah 7 in the HARY

Isaiah 7 in the HNT

Isaiah 7 in the IRVA

Isaiah 7 in the IRVB

Isaiah 7 in the IRVG

Isaiah 7 in the IRVH

Isaiah 7 in the IRVK

Isaiah 7 in the IRVM

Isaiah 7 in the IRVM2

Isaiah 7 in the IRVO

Isaiah 7 in the IRVP

Isaiah 7 in the IRVT

Isaiah 7 in the IRVT2

Isaiah 7 in the IRVU

Isaiah 7 in the ISVN

Isaiah 7 in the JSNT

Isaiah 7 in the KAPI

Isaiah 7 in the KBT1ETNIK

Isaiah 7 in the KBV

Isaiah 7 in the KJV

Isaiah 7 in the KNFD

Isaiah 7 in the LBA

Isaiah 7 in the LBLA

Isaiah 7 in the LNT

Isaiah 7 in the LSV

Isaiah 7 in the MAAL

Isaiah 7 in the MBV

Isaiah 7 in the MBV2

Isaiah 7 in the MHNT

Isaiah 7 in the MKNFD

Isaiah 7 in the MNG

Isaiah 7 in the MNT

Isaiah 7 in the MNT2

Isaiah 7 in the MRS1T

Isaiah 7 in the NAA

Isaiah 7 in the NASB

Isaiah 7 in the NBLA

Isaiah 7 in the NBS

Isaiah 7 in the NBVTP

Isaiah 7 in the NET2

Isaiah 7 in the NIV11

Isaiah 7 in the NNT

Isaiah 7 in the NNT2

Isaiah 7 in the NNT3

Isaiah 7 in the PDDPT

Isaiah 7 in the PFNT

Isaiah 7 in the RMNT

Isaiah 7 in the SBIAS

Isaiah 7 in the SBIBS

Isaiah 7 in the SBIBS2

Isaiah 7 in the SBICS

Isaiah 7 in the SBIDS

Isaiah 7 in the SBIGS

Isaiah 7 in the SBIHS

Isaiah 7 in the SBIIS

Isaiah 7 in the SBIIS2

Isaiah 7 in the SBIIS3

Isaiah 7 in the SBIKS

Isaiah 7 in the SBIKS2

Isaiah 7 in the SBIMS

Isaiah 7 in the SBIOS

Isaiah 7 in the SBIPS

Isaiah 7 in the SBISS

Isaiah 7 in the SBITS

Isaiah 7 in the SBITS2

Isaiah 7 in the SBITS3

Isaiah 7 in the SBITS4

Isaiah 7 in the SBIUS

Isaiah 7 in the SBIVS

Isaiah 7 in the SBT

Isaiah 7 in the SBT1E

Isaiah 7 in the SCHL

Isaiah 7 in the SNT

Isaiah 7 in the SUSU

Isaiah 7 in the SUSU2

Isaiah 7 in the SYNO

Isaiah 7 in the TBIAOTANT

Isaiah 7 in the TBT1E

Isaiah 7 in the TBT1E2

Isaiah 7 in the TFTIP

Isaiah 7 in the TFTU

Isaiah 7 in the TGNTATF3T

Isaiah 7 in the THAI

Isaiah 7 in the TNFD

Isaiah 7 in the TNT

Isaiah 7 in the TNTIK

Isaiah 7 in the TNTIL

Isaiah 7 in the TNTIN

Isaiah 7 in the TNTIP

Isaiah 7 in the TNTIZ

Isaiah 7 in the TOMA

Isaiah 7 in the TTENT

Isaiah 7 in the UBG

Isaiah 7 in the UGV

Isaiah 7 in the UGV2

Isaiah 7 in the UGV3

Isaiah 7 in the VBL

Isaiah 7 in the VDCC

Isaiah 7 in the YALU

Isaiah 7 in the YAPE

Isaiah 7 in the YBVTP

Isaiah 7 in the ZBP