James 1 (BOLCB2)

1 Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto ; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko : Napesi bino mbote. 2 Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango. 3 Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema. 4 Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela. 5 Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te. 6 Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te ; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai. 7 Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo : 8 azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka. 9 Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye, 10 mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga. 11 Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso. 12 Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye. 13 Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba : « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe. 14 Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko. 15 Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu ; mpe lisumu ememaka na kufa. 16 Bandeko balingami, bomikosa te : 17 bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te. 18 Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso. 19 Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ; 20 pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe. 21 Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino. 22 Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba. 23 Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala 24 mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali. 25 Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala : moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala. 26 Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te. 27 Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali : kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.

In Other Versions

James 1 in the ANGEFD

James 1 in the ANTPNG2D

James 1 in the AS21

James 1 in the BAGH

James 1 in the BBPNG

James 1 in the BBT1E

James 1 in the BDS

James 1 in the BEV

James 1 in the BHAD

James 1 in the BIB

James 1 in the BLPT

James 1 in the BNT

James 1 in the BNTABOOT

James 1 in the BNTLV

James 1 in the BOATCB

James 1 in the BOATCB2

James 1 in the BOBCV

James 1 in the BOCNT

James 1 in the BOECS

James 1 in the BOGWICC

James 1 in the BOHCB

James 1 in the BOHCV

James 1 in the BOHLNT

James 1 in the BOHNTLTAL

James 1 in the BOICB

James 1 in the BOILNTAP

James 1 in the BOITCV

James 1 in the BOKCV

James 1 in the BOKCV2

James 1 in the BOKHWOG

James 1 in the BOKSSV

James 1 in the BOLCB

James 1 in the BOMCV

James 1 in the BONAV

James 1 in the BONCB

James 1 in the BONLT

James 1 in the BONUT2

James 1 in the BOPLNT

James 1 in the BOSCB

James 1 in the BOSNC

James 1 in the BOTLNT

James 1 in the BOVCB

James 1 in the BOYCB

James 1 in the BPBB

James 1 in the BPH

James 1 in the BSB

James 1 in the CCB

James 1 in the CUV

James 1 in the CUVS

James 1 in the DBT

James 1 in the DGDNT

James 1 in the DHNT

James 1 in the DNT

James 1 in the ELBE

James 1 in the EMTV

James 1 in the ESV

James 1 in the FBV

James 1 in the FEB

James 1 in the GGMNT

James 1 in the GNT

James 1 in the HARY

James 1 in the HNT

James 1 in the IRVA

James 1 in the IRVB

James 1 in the IRVG

James 1 in the IRVH

James 1 in the IRVK

James 1 in the IRVM

James 1 in the IRVM2

James 1 in the IRVO

James 1 in the IRVP

James 1 in the IRVT

James 1 in the IRVT2

James 1 in the IRVU

James 1 in the ISVN

James 1 in the JSNT

James 1 in the KAPI

James 1 in the KBT1ETNIK

James 1 in the KBV

James 1 in the KJV

James 1 in the KNFD

James 1 in the LBA

James 1 in the LBLA

James 1 in the LNT

James 1 in the LSV

James 1 in the MAAL

James 1 in the MBV

James 1 in the MBV2

James 1 in the MHNT

James 1 in the MKNFD

James 1 in the MNG

James 1 in the MNT

James 1 in the MNT2

James 1 in the MRS1T

James 1 in the NAA

James 1 in the NASB

James 1 in the NBLA

James 1 in the NBS

James 1 in the NBVTP

James 1 in the NET2

James 1 in the NIV11

James 1 in the NNT

James 1 in the NNT2

James 1 in the NNT3

James 1 in the PDDPT

James 1 in the PFNT

James 1 in the RMNT

James 1 in the SBIAS

James 1 in the SBIBS

James 1 in the SBIBS2

James 1 in the SBICS

James 1 in the SBIDS

James 1 in the SBIGS

James 1 in the SBIHS

James 1 in the SBIIS

James 1 in the SBIIS2

James 1 in the SBIIS3

James 1 in the SBIKS

James 1 in the SBIKS2

James 1 in the SBIMS

James 1 in the SBIOS

James 1 in the SBIPS

James 1 in the SBISS

James 1 in the SBITS

James 1 in the SBITS2

James 1 in the SBITS3

James 1 in the SBITS4

James 1 in the SBIUS

James 1 in the SBIVS

James 1 in the SBT

James 1 in the SBT1E

James 1 in the SCHL

James 1 in the SNT

James 1 in the SUSU

James 1 in the SUSU2

James 1 in the SYNO

James 1 in the TBIAOTANT

James 1 in the TBT1E

James 1 in the TBT1E2

James 1 in the TFTIP

James 1 in the TFTU

James 1 in the TGNTATF3T

James 1 in the THAI

James 1 in the TNFD

James 1 in the TNT

James 1 in the TNTIK

James 1 in the TNTIL

James 1 in the TNTIN

James 1 in the TNTIP

James 1 in the TNTIZ

James 1 in the TOMA

James 1 in the TTENT

James 1 in the UBG

James 1 in the UGV

James 1 in the UGV2

James 1 in the UGV3

James 1 in the VBL

James 1 in the VDCC

James 1 in the YALU

James 1 in the YAPE

James 1 in the YBVTP

James 1 in the ZBP