Judges 13 (BOLCB2)

1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia. 2 Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te. 3 Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali. 4 Sik’oyo, sala keba ! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo ; 5 pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. » 6 Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye. 7 Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › » 8 Bongo Manoa asambelaki Yawe : « Oh Nkolo, nabondeli Yo : tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama ! » 9 Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te. 10 Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye : « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki ! » 11 Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki :— Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ?Azongisaki :— Iyo, ezali ngai. 12 Manoa atunaki ye :— Tango maloba na yo ekokokisama, mibeko nini tosengeli kotosa mpo na bomoi ya mwana ? Mpe ye mwana asengeli kosala nini ? 13 Anjelu na Yawe azongiselaki Manoa :— Mwasi na yo asengeli kosala makambo nyonso oyo nayebisaki ye. 14 Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo ; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye. 15 Manoa alobaki na Anjelu na Yawe :— Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba. 16 Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa :— Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te ; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe.Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe. 17 Manoa atunaki Anjelu na Yawe :— Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama ? 18 Anjelu na Yawe azongiselaki ye :— Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai ? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa. 19 Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa. 20 Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele. 21 Tango Anjelu na Yawe alimwaki na miso ya Manoa mpe ya mwasi na ye, Manoa asosolaki ete ezalaki Anjelu ya Yawe. 22 Manoa alobaki na mwasi na ye :— Solo, tokufi na biso, pamba te tomoni Nzambe ! 23 Kasi mwasi na ye azongisaki :— Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo. 24 Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye. 25 Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli.

In Other Versions

Judges 13 in the ANGEFD

Judges 13 in the ANTPNG2D

Judges 13 in the AS21

Judges 13 in the BAGH

Judges 13 in the BBPNG

Judges 13 in the BBT1E

Judges 13 in the BDS

Judges 13 in the BEV

Judges 13 in the BHAD

Judges 13 in the BIB

Judges 13 in the BLPT

Judges 13 in the BNT

Judges 13 in the BNTABOOT

Judges 13 in the BNTLV

Judges 13 in the BOATCB

Judges 13 in the BOATCB2

Judges 13 in the BOBCV

Judges 13 in the BOCNT

Judges 13 in the BOECS

Judges 13 in the BOGWICC

Judges 13 in the BOHCB

Judges 13 in the BOHCV

Judges 13 in the BOHLNT

Judges 13 in the BOHNTLTAL

Judges 13 in the BOICB

Judges 13 in the BOILNTAP

Judges 13 in the BOITCV

Judges 13 in the BOKCV

Judges 13 in the BOKCV2

Judges 13 in the BOKHWOG

Judges 13 in the BOKSSV

Judges 13 in the BOLCB

Judges 13 in the BOMCV

Judges 13 in the BONAV

Judges 13 in the BONCB

Judges 13 in the BONLT

Judges 13 in the BONUT2

Judges 13 in the BOPLNT

Judges 13 in the BOSCB

Judges 13 in the BOSNC

Judges 13 in the BOTLNT

Judges 13 in the BOVCB

Judges 13 in the BOYCB

Judges 13 in the BPBB

Judges 13 in the BPH

Judges 13 in the BSB

Judges 13 in the CCB

Judges 13 in the CUV

Judges 13 in the CUVS

Judges 13 in the DBT

Judges 13 in the DGDNT

Judges 13 in the DHNT

Judges 13 in the DNT

Judges 13 in the ELBE

Judges 13 in the EMTV

Judges 13 in the ESV

Judges 13 in the FBV

Judges 13 in the FEB

Judges 13 in the GGMNT

Judges 13 in the GNT

Judges 13 in the HARY

Judges 13 in the HNT

Judges 13 in the IRVA

Judges 13 in the IRVB

Judges 13 in the IRVG

Judges 13 in the IRVH

Judges 13 in the IRVK

Judges 13 in the IRVM

Judges 13 in the IRVM2

Judges 13 in the IRVO

Judges 13 in the IRVP

Judges 13 in the IRVT

Judges 13 in the IRVT2

Judges 13 in the IRVU

Judges 13 in the ISVN

Judges 13 in the JSNT

Judges 13 in the KAPI

Judges 13 in the KBT1ETNIK

Judges 13 in the KBV

Judges 13 in the KJV

Judges 13 in the KNFD

Judges 13 in the LBA

Judges 13 in the LBLA

Judges 13 in the LNT

Judges 13 in the LSV

Judges 13 in the MAAL

Judges 13 in the MBV

Judges 13 in the MBV2

Judges 13 in the MHNT

Judges 13 in the MKNFD

Judges 13 in the MNG

Judges 13 in the MNT

Judges 13 in the MNT2

Judges 13 in the MRS1T

Judges 13 in the NAA

Judges 13 in the NASB

Judges 13 in the NBLA

Judges 13 in the NBS

Judges 13 in the NBVTP

Judges 13 in the NET2

Judges 13 in the NIV11

Judges 13 in the NNT

Judges 13 in the NNT2

Judges 13 in the NNT3

Judges 13 in the PDDPT

Judges 13 in the PFNT

Judges 13 in the RMNT

Judges 13 in the SBIAS

Judges 13 in the SBIBS

Judges 13 in the SBIBS2

Judges 13 in the SBICS

Judges 13 in the SBIDS

Judges 13 in the SBIGS

Judges 13 in the SBIHS

Judges 13 in the SBIIS

Judges 13 in the SBIIS2

Judges 13 in the SBIIS3

Judges 13 in the SBIKS

Judges 13 in the SBIKS2

Judges 13 in the SBIMS

Judges 13 in the SBIOS

Judges 13 in the SBIPS

Judges 13 in the SBISS

Judges 13 in the SBITS

Judges 13 in the SBITS2

Judges 13 in the SBITS3

Judges 13 in the SBITS4

Judges 13 in the SBIUS

Judges 13 in the SBIVS

Judges 13 in the SBT

Judges 13 in the SBT1E

Judges 13 in the SCHL

Judges 13 in the SNT

Judges 13 in the SUSU

Judges 13 in the SUSU2

Judges 13 in the SYNO

Judges 13 in the TBIAOTANT

Judges 13 in the TBT1E

Judges 13 in the TBT1E2

Judges 13 in the TFTIP

Judges 13 in the TFTU

Judges 13 in the TGNTATF3T

Judges 13 in the THAI

Judges 13 in the TNFD

Judges 13 in the TNT

Judges 13 in the TNTIK

Judges 13 in the TNTIL

Judges 13 in the TNTIN

Judges 13 in the TNTIP

Judges 13 in the TNTIZ

Judges 13 in the TOMA

Judges 13 in the TTENT

Judges 13 in the UBG

Judges 13 in the UGV

Judges 13 in the UGV2

Judges 13 in the UGV3

Judges 13 in the VBL

Judges 13 in the VDCC

Judges 13 in the YALU

Judges 13 in the YAPE

Judges 13 in the YBVTP

Judges 13 in the ZBP