Judges 5 (BOLCB2)

1 Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo : 2 Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso,mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba,tika ete bokumisa Yawe ! 3 Bino bakonzi, boyoka !Bino bakambi, boyoka malamu !Nalingi koyembela Yawe,nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. 4 Eh Yawe, tango obimaki na Seiri,tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi,mabele eninganaki, likolo enyangwanaki,mapata esopaki mayi. 5 Bangomba eninganaki liboso ya Yawe,mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. 6 Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ;mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te,bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka. 7 Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te,ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki,kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele. 8 Tango baponaki banzambe ya sika,bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba,kasi ata nguba moko te to likonga moko teemonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele. 9 Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele,elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba.Bokumisa Yawe ! 10 Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe,bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi,bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa ! 11 Bokumisa mingongo ya bayembi,na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ;kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzolamisala ya bosembo ya Yawe,misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele.Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba. 12 Debora, lamuka ! Lamuka !Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba !Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo ;mwana mobali ya Abinoami ! 13 Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi,bato ya Yawe bakiti mpo na ngaikati na bilombe ya bitumba. 14 Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi.Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga.Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri,mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni. 15 Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ;ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbanguna makolo kino na lubwaku.Kasi kati na libota ya Ribeni,mitema etondaki mingi na makanisi. 16 Mpo na nini avandi kati na lopango ?Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele ?Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisatango pamba na kokanisa. 17 Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani.Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ?Aseri atikali pembeni ya ebale,avandi pembeni ya libongo na ye. 18 Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa,bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba,kuna na esika ya bitumba. 19 Bakonzi oyo bazali banguna bayakimpe babundisaki biso ;bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki,pene ya mayi ya Megido,kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata. 20 Wuta na likolo, minzoto ebundaki ;na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera. 21 Mayi moke ya Kishoni ememaki bango,mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni.Tika ete molimo na ngai etambola na nguya ! 22 Makolo ya bampunda enyataki mabele,na kopumbwa na mbangu makasi,na kolanda bankolo na yango, bato na nguya. 23 Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe.Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna !Pamba te bayei te kosunga Yawe ;bayei te kosunga bilombe ya bitumba ! 24 Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni,apambolama kati na basi nyonso !Tika ete apambolama kati na basi nyonsooyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo. 25 Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki ;kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo. 26 Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ;mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali.Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto,atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso. 27 Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki ;akweyaki na makolo na ye mpe akufaki. 28 Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa,na sima ya bibende, mpe abandaki koganga :« Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ?Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? » 29 Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye,mpe ye moko amilobeli : 30 « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba :Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko,bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi,mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? » 31 Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo !Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasilokola moyi ya midi !Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.

In Other Versions

Judges 5 in the ANGEFD

Judges 5 in the ANTPNG2D

Judges 5 in the AS21

Judges 5 in the BAGH

Judges 5 in the BBPNG

Judges 5 in the BBT1E

Judges 5 in the BDS

Judges 5 in the BEV

Judges 5 in the BHAD

Judges 5 in the BIB

Judges 5 in the BLPT

Judges 5 in the BNT

Judges 5 in the BNTABOOT

Judges 5 in the BNTLV

Judges 5 in the BOATCB

Judges 5 in the BOATCB2

Judges 5 in the BOBCV

Judges 5 in the BOCNT

Judges 5 in the BOECS

Judges 5 in the BOGWICC

Judges 5 in the BOHCB

Judges 5 in the BOHCV

Judges 5 in the BOHLNT

Judges 5 in the BOHNTLTAL

Judges 5 in the BOICB

Judges 5 in the BOILNTAP

Judges 5 in the BOITCV

Judges 5 in the BOKCV

Judges 5 in the BOKCV2

Judges 5 in the BOKHWOG

Judges 5 in the BOKSSV

Judges 5 in the BOLCB

Judges 5 in the BOMCV

Judges 5 in the BONAV

Judges 5 in the BONCB

Judges 5 in the BONLT

Judges 5 in the BONUT2

Judges 5 in the BOPLNT

Judges 5 in the BOSCB

Judges 5 in the BOSNC

Judges 5 in the BOTLNT

Judges 5 in the BOVCB

Judges 5 in the BOYCB

Judges 5 in the BPBB

Judges 5 in the BPH

Judges 5 in the BSB

Judges 5 in the CCB

Judges 5 in the CUV

Judges 5 in the CUVS

Judges 5 in the DBT

Judges 5 in the DGDNT

Judges 5 in the DHNT

Judges 5 in the DNT

Judges 5 in the ELBE

Judges 5 in the EMTV

Judges 5 in the ESV

Judges 5 in the FBV

Judges 5 in the FEB

Judges 5 in the GGMNT

Judges 5 in the GNT

Judges 5 in the HARY

Judges 5 in the HNT

Judges 5 in the IRVA

Judges 5 in the IRVB

Judges 5 in the IRVG

Judges 5 in the IRVH

Judges 5 in the IRVK

Judges 5 in the IRVM

Judges 5 in the IRVM2

Judges 5 in the IRVO

Judges 5 in the IRVP

Judges 5 in the IRVT

Judges 5 in the IRVT2

Judges 5 in the IRVU

Judges 5 in the ISVN

Judges 5 in the JSNT

Judges 5 in the KAPI

Judges 5 in the KBT1ETNIK

Judges 5 in the KBV

Judges 5 in the KJV

Judges 5 in the KNFD

Judges 5 in the LBA

Judges 5 in the LBLA

Judges 5 in the LNT

Judges 5 in the LSV

Judges 5 in the MAAL

Judges 5 in the MBV

Judges 5 in the MBV2

Judges 5 in the MHNT

Judges 5 in the MKNFD

Judges 5 in the MNG

Judges 5 in the MNT

Judges 5 in the MNT2

Judges 5 in the MRS1T

Judges 5 in the NAA

Judges 5 in the NASB

Judges 5 in the NBLA

Judges 5 in the NBS

Judges 5 in the NBVTP

Judges 5 in the NET2

Judges 5 in the NIV11

Judges 5 in the NNT

Judges 5 in the NNT2

Judges 5 in the NNT3

Judges 5 in the PDDPT

Judges 5 in the PFNT

Judges 5 in the RMNT

Judges 5 in the SBIAS

Judges 5 in the SBIBS

Judges 5 in the SBIBS2

Judges 5 in the SBICS

Judges 5 in the SBIDS

Judges 5 in the SBIGS

Judges 5 in the SBIHS

Judges 5 in the SBIIS

Judges 5 in the SBIIS2

Judges 5 in the SBIIS3

Judges 5 in the SBIKS

Judges 5 in the SBIKS2

Judges 5 in the SBIMS

Judges 5 in the SBIOS

Judges 5 in the SBIPS

Judges 5 in the SBISS

Judges 5 in the SBITS

Judges 5 in the SBITS2

Judges 5 in the SBITS3

Judges 5 in the SBITS4

Judges 5 in the SBIUS

Judges 5 in the SBIVS

Judges 5 in the SBT

Judges 5 in the SBT1E

Judges 5 in the SCHL

Judges 5 in the SNT

Judges 5 in the SUSU

Judges 5 in the SUSU2

Judges 5 in the SYNO

Judges 5 in the TBIAOTANT

Judges 5 in the TBT1E

Judges 5 in the TBT1E2

Judges 5 in the TFTIP

Judges 5 in the TFTU

Judges 5 in the TGNTATF3T

Judges 5 in the THAI

Judges 5 in the TNFD

Judges 5 in the TNT

Judges 5 in the TNTIK

Judges 5 in the TNTIL

Judges 5 in the TNTIN

Judges 5 in the TNTIP

Judges 5 in the TNTIZ

Judges 5 in the TOMA

Judges 5 in the TTENT

Judges 5 in the UBG

Judges 5 in the UGV

Judges 5 in the UGV2

Judges 5 in the UGV3

Judges 5 in the VBL

Judges 5 in the VDCC

Judges 5 in the YALU

Judges 5 in the YAPE

Judges 5 in the YBVTP

Judges 5 in the ZBP