Jeremiah 19 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobi :— Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe ; 2 bimela na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, na liboso ya ekuke ya ndako epai wapi basalaka mbeki ; mpe kuna, okosakola maloba oyo nakoyebisa yo. 3 Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo. 4 Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te, 5 batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala ; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te ; 6 yango wana, na mikolo ekoya, elobi Yawe, bakobenga lisusu te esika oyo : ‹ Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, › kasi bakokoma kobenga yango : ‹ Lubwaku oyo babomelaka bato. › 7 Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. 8 Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso. 9 Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango. 10 Boye, buka mbeki na miso ya bato oyo bozali kokende na bango nzela moko 11 mpe loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te. 12 Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti. 13 Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › » 14 Jeremi azongaki wuta na Tofeti epai wapi Yawe atindaki ye mpo na kosakola, atelemaki na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe alobaki na bato nyonso : 15 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. »

In Other Versions

Jeremiah 19 in the ANGEFD

Jeremiah 19 in the ANTPNG2D

Jeremiah 19 in the AS21

Jeremiah 19 in the BAGH

Jeremiah 19 in the BBPNG

Jeremiah 19 in the BBT1E

Jeremiah 19 in the BDS

Jeremiah 19 in the BEV

Jeremiah 19 in the BHAD

Jeremiah 19 in the BIB

Jeremiah 19 in the BLPT

Jeremiah 19 in the BNT

Jeremiah 19 in the BNTABOOT

Jeremiah 19 in the BNTLV

Jeremiah 19 in the BOATCB

Jeremiah 19 in the BOATCB2

Jeremiah 19 in the BOBCV

Jeremiah 19 in the BOCNT

Jeremiah 19 in the BOECS

Jeremiah 19 in the BOGWICC

Jeremiah 19 in the BOHCB

Jeremiah 19 in the BOHCV

Jeremiah 19 in the BOHLNT

Jeremiah 19 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 19 in the BOICB

Jeremiah 19 in the BOILNTAP

Jeremiah 19 in the BOITCV

Jeremiah 19 in the BOKCV

Jeremiah 19 in the BOKCV2

Jeremiah 19 in the BOKHWOG

Jeremiah 19 in the BOKSSV

Jeremiah 19 in the BOLCB

Jeremiah 19 in the BOMCV

Jeremiah 19 in the BONAV

Jeremiah 19 in the BONCB

Jeremiah 19 in the BONLT

Jeremiah 19 in the BONUT2

Jeremiah 19 in the BOPLNT

Jeremiah 19 in the BOSCB

Jeremiah 19 in the BOSNC

Jeremiah 19 in the BOTLNT

Jeremiah 19 in the BOVCB

Jeremiah 19 in the BOYCB

Jeremiah 19 in the BPBB

Jeremiah 19 in the BPH

Jeremiah 19 in the BSB

Jeremiah 19 in the CCB

Jeremiah 19 in the CUV

Jeremiah 19 in the CUVS

Jeremiah 19 in the DBT

Jeremiah 19 in the DGDNT

Jeremiah 19 in the DHNT

Jeremiah 19 in the DNT

Jeremiah 19 in the ELBE

Jeremiah 19 in the EMTV

Jeremiah 19 in the ESV

Jeremiah 19 in the FBV

Jeremiah 19 in the FEB

Jeremiah 19 in the GGMNT

Jeremiah 19 in the GNT

Jeremiah 19 in the HARY

Jeremiah 19 in the HNT

Jeremiah 19 in the IRVA

Jeremiah 19 in the IRVB

Jeremiah 19 in the IRVG

Jeremiah 19 in the IRVH

Jeremiah 19 in the IRVK

Jeremiah 19 in the IRVM

Jeremiah 19 in the IRVM2

Jeremiah 19 in the IRVO

Jeremiah 19 in the IRVP

Jeremiah 19 in the IRVT

Jeremiah 19 in the IRVT2

Jeremiah 19 in the IRVU

Jeremiah 19 in the ISVN

Jeremiah 19 in the JSNT

Jeremiah 19 in the KAPI

Jeremiah 19 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 19 in the KBV

Jeremiah 19 in the KJV

Jeremiah 19 in the KNFD

Jeremiah 19 in the LBA

Jeremiah 19 in the LBLA

Jeremiah 19 in the LNT

Jeremiah 19 in the LSV

Jeremiah 19 in the MAAL

Jeremiah 19 in the MBV

Jeremiah 19 in the MBV2

Jeremiah 19 in the MHNT

Jeremiah 19 in the MKNFD

Jeremiah 19 in the MNG

Jeremiah 19 in the MNT

Jeremiah 19 in the MNT2

Jeremiah 19 in the MRS1T

Jeremiah 19 in the NAA

Jeremiah 19 in the NASB

Jeremiah 19 in the NBLA

Jeremiah 19 in the NBS

Jeremiah 19 in the NBVTP

Jeremiah 19 in the NET2

Jeremiah 19 in the NIV11

Jeremiah 19 in the NNT

Jeremiah 19 in the NNT2

Jeremiah 19 in the NNT3

Jeremiah 19 in the PDDPT

Jeremiah 19 in the PFNT

Jeremiah 19 in the RMNT

Jeremiah 19 in the SBIAS

Jeremiah 19 in the SBIBS

Jeremiah 19 in the SBIBS2

Jeremiah 19 in the SBICS

Jeremiah 19 in the SBIDS

Jeremiah 19 in the SBIGS

Jeremiah 19 in the SBIHS

Jeremiah 19 in the SBIIS

Jeremiah 19 in the SBIIS2

Jeremiah 19 in the SBIIS3

Jeremiah 19 in the SBIKS

Jeremiah 19 in the SBIKS2

Jeremiah 19 in the SBIMS

Jeremiah 19 in the SBIOS

Jeremiah 19 in the SBIPS

Jeremiah 19 in the SBISS

Jeremiah 19 in the SBITS

Jeremiah 19 in the SBITS2

Jeremiah 19 in the SBITS3

Jeremiah 19 in the SBITS4

Jeremiah 19 in the SBIUS

Jeremiah 19 in the SBIVS

Jeremiah 19 in the SBT

Jeremiah 19 in the SBT1E

Jeremiah 19 in the SCHL

Jeremiah 19 in the SNT

Jeremiah 19 in the SUSU

Jeremiah 19 in the SUSU2

Jeremiah 19 in the SYNO

Jeremiah 19 in the TBIAOTANT

Jeremiah 19 in the TBT1E

Jeremiah 19 in the TBT1E2

Jeremiah 19 in the TFTIP

Jeremiah 19 in the TFTU

Jeremiah 19 in the TGNTATF3T

Jeremiah 19 in the THAI

Jeremiah 19 in the TNFD

Jeremiah 19 in the TNT

Jeremiah 19 in the TNTIK

Jeremiah 19 in the TNTIL

Jeremiah 19 in the TNTIN

Jeremiah 19 in the TNTIP

Jeremiah 19 in the TNTIZ

Jeremiah 19 in the TOMA

Jeremiah 19 in the TTENT

Jeremiah 19 in the UBG

Jeremiah 19 in the UGV

Jeremiah 19 in the UGV2

Jeremiah 19 in the UGV3

Jeremiah 19 in the VBL

Jeremiah 19 in the VDCC

Jeremiah 19 in the YALU

Jeremiah 19 in the YAPE

Jeremiah 19 in the YBVTP

Jeremiah 19 in the ZBP