Jeremiah 26 (BOLCB2)

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : 2 « Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te. 3 Tango mosusu bakoyoka, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; bongo Ngai nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kotindela bango pasi likolo ya misala na bango ya mabe. 4 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Soki boyokeli Ngai te, soki boboyi kotosa malakisi oyo napesaki bino 5 mpe boboyi kotosa maloba ya basali na Ngai, basakoli, oyo nazalaki kotindela bino tango na tango atako boboyaki koyokela bango, 6 nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › » 7 Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bazalaki koyoka Jeremi koloba maloba oyo kati na Tempelo ya Yawe. 8 Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa ! 9 Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo ; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te ? »Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe. 10 Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe. 11 Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino ! » 12 Jeremi alobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Yawe atindi ngai kosakola mpo na Ndako mpe engumba oyo, makambo nyonso oyo bosili koyoka. 13 Bobongola sik’oyo bizaleli mpe misala na bino, mpe botosa Yawe, Nzambe na bino ; mpe Yawe akobongola mokano oyo asilaki kozwa, mpe akotindela bino lisusu te pasi oyo alakaki bino. 14 Bongo mpo na ngai, nazali na maboko na bino, bosala ngai makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu mpe sembo. 15 Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te ; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. » 16 Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. » 17 Ndambo ya bakambi ya mokili batelemaki mpe balobaki na lisanga mobimba ya bato : 18 « Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga,Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga,mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. › 19 Boni, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, to moto mosusu kati na Yuda abomaki ye ? Ezekiasi atosaki Yawe te mpe asalelaki mosakoli Mishe ngolu te ? Yawe abongolaki mokano na Ye te ya kotindela bango pasi oyo alakaki ? Tokomibendela biso moko pasi ya makasi na pamba. » 20 Nzokande, Iri, mwana mobali ya Shemaya, moto ya Kiriati-Yearimi, azalaki mpe kosakola na Kombo na Yawe. Azalaki kaka kosakola makambo moko na Jeremi na tina na engumba mpe mokili oyo. 21 Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito. 22 Mokonzi Yeoyakimi atindaki Elinatani, mwana mobali ya Akibori, na Ejipito elongo na bato mosusu. 23 Babimisaki Iri na Ejipito mpe bamemaki ye epai ya mokonzi Yeoyakimi oyo abomaki ye na mopanga mpe apesaki mitindo ete babwaka ebembe na ye kati na kunda oyo bakundaka bato pamba. 24 Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi ; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye.

In Other Versions

Jeremiah 26 in the ANGEFD

Jeremiah 26 in the ANTPNG2D

Jeremiah 26 in the AS21

Jeremiah 26 in the BAGH

Jeremiah 26 in the BBPNG

Jeremiah 26 in the BBT1E

Jeremiah 26 in the BDS

Jeremiah 26 in the BEV

Jeremiah 26 in the BHAD

Jeremiah 26 in the BIB

Jeremiah 26 in the BLPT

Jeremiah 26 in the BNT

Jeremiah 26 in the BNTABOOT

Jeremiah 26 in the BNTLV

Jeremiah 26 in the BOATCB

Jeremiah 26 in the BOATCB2

Jeremiah 26 in the BOBCV

Jeremiah 26 in the BOCNT

Jeremiah 26 in the BOECS

Jeremiah 26 in the BOGWICC

Jeremiah 26 in the BOHCB

Jeremiah 26 in the BOHCV

Jeremiah 26 in the BOHLNT

Jeremiah 26 in the BOHNTLTAL

Jeremiah 26 in the BOICB

Jeremiah 26 in the BOILNTAP

Jeremiah 26 in the BOITCV

Jeremiah 26 in the BOKCV

Jeremiah 26 in the BOKCV2

Jeremiah 26 in the BOKHWOG

Jeremiah 26 in the BOKSSV

Jeremiah 26 in the BOLCB

Jeremiah 26 in the BOMCV

Jeremiah 26 in the BONAV

Jeremiah 26 in the BONCB

Jeremiah 26 in the BONLT

Jeremiah 26 in the BONUT2

Jeremiah 26 in the BOPLNT

Jeremiah 26 in the BOSCB

Jeremiah 26 in the BOSNC

Jeremiah 26 in the BOTLNT

Jeremiah 26 in the BOVCB

Jeremiah 26 in the BOYCB

Jeremiah 26 in the BPBB

Jeremiah 26 in the BPH

Jeremiah 26 in the BSB

Jeremiah 26 in the CCB

Jeremiah 26 in the CUV

Jeremiah 26 in the CUVS

Jeremiah 26 in the DBT

Jeremiah 26 in the DGDNT

Jeremiah 26 in the DHNT

Jeremiah 26 in the DNT

Jeremiah 26 in the ELBE

Jeremiah 26 in the EMTV

Jeremiah 26 in the ESV

Jeremiah 26 in the FBV

Jeremiah 26 in the FEB

Jeremiah 26 in the GGMNT

Jeremiah 26 in the GNT

Jeremiah 26 in the HARY

Jeremiah 26 in the HNT

Jeremiah 26 in the IRVA

Jeremiah 26 in the IRVB

Jeremiah 26 in the IRVG

Jeremiah 26 in the IRVH

Jeremiah 26 in the IRVK

Jeremiah 26 in the IRVM

Jeremiah 26 in the IRVM2

Jeremiah 26 in the IRVO

Jeremiah 26 in the IRVP

Jeremiah 26 in the IRVT

Jeremiah 26 in the IRVT2

Jeremiah 26 in the IRVU

Jeremiah 26 in the ISVN

Jeremiah 26 in the JSNT

Jeremiah 26 in the KAPI

Jeremiah 26 in the KBT1ETNIK

Jeremiah 26 in the KBV

Jeremiah 26 in the KJV

Jeremiah 26 in the KNFD

Jeremiah 26 in the LBA

Jeremiah 26 in the LBLA

Jeremiah 26 in the LNT

Jeremiah 26 in the LSV

Jeremiah 26 in the MAAL

Jeremiah 26 in the MBV

Jeremiah 26 in the MBV2

Jeremiah 26 in the MHNT

Jeremiah 26 in the MKNFD

Jeremiah 26 in the MNG

Jeremiah 26 in the MNT

Jeremiah 26 in the MNT2

Jeremiah 26 in the MRS1T

Jeremiah 26 in the NAA

Jeremiah 26 in the NASB

Jeremiah 26 in the NBLA

Jeremiah 26 in the NBS

Jeremiah 26 in the NBVTP

Jeremiah 26 in the NET2

Jeremiah 26 in the NIV11

Jeremiah 26 in the NNT

Jeremiah 26 in the NNT2

Jeremiah 26 in the NNT3

Jeremiah 26 in the PDDPT

Jeremiah 26 in the PFNT

Jeremiah 26 in the RMNT

Jeremiah 26 in the SBIAS

Jeremiah 26 in the SBIBS

Jeremiah 26 in the SBIBS2

Jeremiah 26 in the SBICS

Jeremiah 26 in the SBIDS

Jeremiah 26 in the SBIGS

Jeremiah 26 in the SBIHS

Jeremiah 26 in the SBIIS

Jeremiah 26 in the SBIIS2

Jeremiah 26 in the SBIIS3

Jeremiah 26 in the SBIKS

Jeremiah 26 in the SBIKS2

Jeremiah 26 in the SBIMS

Jeremiah 26 in the SBIOS

Jeremiah 26 in the SBIPS

Jeremiah 26 in the SBISS

Jeremiah 26 in the SBITS

Jeremiah 26 in the SBITS2

Jeremiah 26 in the SBITS3

Jeremiah 26 in the SBITS4

Jeremiah 26 in the SBIUS

Jeremiah 26 in the SBIVS

Jeremiah 26 in the SBT

Jeremiah 26 in the SBT1E

Jeremiah 26 in the SCHL

Jeremiah 26 in the SNT

Jeremiah 26 in the SUSU

Jeremiah 26 in the SUSU2

Jeremiah 26 in the SYNO

Jeremiah 26 in the TBIAOTANT

Jeremiah 26 in the TBT1E

Jeremiah 26 in the TBT1E2

Jeremiah 26 in the TFTIP

Jeremiah 26 in the TFTU

Jeremiah 26 in the TGNTATF3T

Jeremiah 26 in the THAI

Jeremiah 26 in the TNFD

Jeremiah 26 in the TNT

Jeremiah 26 in the TNTIK

Jeremiah 26 in the TNTIL

Jeremiah 26 in the TNTIN

Jeremiah 26 in the TNTIP

Jeremiah 26 in the TNTIZ

Jeremiah 26 in the TOMA

Jeremiah 26 in the TTENT

Jeremiah 26 in the UBG

Jeremiah 26 in the UGV

Jeremiah 26 in the UGV2

Jeremiah 26 in the UGV3

Jeremiah 26 in the VBL

Jeremiah 26 in the VDCC

Jeremiah 26 in the YALU

Jeremiah 26 in the YAPE

Jeremiah 26 in the YBVTP

Jeremiah 26 in the ZBP