John 14 (BOLCB2)

1 Yesu alobaki : — Tika ete mitema na bino etungisama te ! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai. 2 Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ? 3 Mpe, sima na Ngai kobongisa yango, nakozonga mpe nakozwa bino mpo ete bozala elongo na Ngai ; mpe mpo ete bino mpe bozala na esika oyo Ngai nazali. 4 Boyebi nzela ya esika oyo nazali kokende. 5 Toma alobaki na Yesu :— Te, Nkolo ! Toyebi te esika oyo ozali kokende ; bongo tokoyeba nzela na yango ndenge nini ? 6 Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te. 7 Soki boyebaki Ngai, bolingaki mpe koyeba Tata na Ngai ; mpe kobanda sik’oyo, boyebi Ye mpe bomoni Ye. 8 Filipo alobaki na Yesu :— Nkolo, lakisa biso Tata ; tozali na posa ya eloko mosusu te. 9 Yesu azongiselaki ye : — Ah Filipo ! Kala nyonso oyo nazalaka elongo na bino, oyebaka na yo kaka Ngai te ? Moto oyo amoni Ngai amoni Tata. Bongo ndenge nini olobi : « Lakisa biso Tata ? » 10 Ondimi te ete nazali kati na Tata, mpe ete Tata azali kati na Ngai ? Maloba oyo nayebisaka bino, nalobaka yango te na bokonzi na Ngai moko ; ezali Tata oyo azali kati na Ngai nde azali kokokisa bongo misala na Ye. 11 Bondima Ngai : nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na Ngai. Soki te, bondima ata mpo na misala oyo bomoni Ngai kosala. 12 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo andimi Ngai akosala misala oyo nazali kosala ; akosala kutu misala oyo eleki minene, pamba te nazali kokende epai ya Tata. 13 Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana. 14 Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango. 15 Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai. 16 Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso, 17 Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino. 18 Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino. 19 Etikali kaka tango moke, mokili ekomona Ngai lisusu te ; kasi bino, bokomona Ngai. Mpo ete nazali na bomoi, bino mpe bokozala na bomoi. 20 Tango mokolo yango ekokoma, bokososola ete nazali kati na Tata na ngai ; bokososola lisusu ete bozali kati na Ngai, mpe Ngai nazali kati na bino. 21 Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye. 22 Yuda (Yuda Isikarioti te) atunaki Yesu :— Nkolo, mpo na nini komimonisa epai na biso, kasi epai ya mokili te ? 23 Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye. 24 Kasi moto oyo alingaka Ngai te, akobatela mpe maloba na Ngai te. Nzokande, Liloba oyo bozali koyoka ezali ya Ngai te, kasi ezali Liloba ya Tata oyo atindaki Ngai. 25 Nayebisi bino makambo oyo nyonso, wana nazali nanu elongo na bino. 26 Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino. 27 Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te ! 28 Boyoki Ngai koloba na bino ete nakeyi, mpe lisusu ete nakozongela bino. Soki bozalaki kolinga Ngai, bolingaki kosepela na kokende na Ngai epai ya Tata, pamba te Tata aleki Ngai na monene. 29 Nayebisi bino makambo yango sik’oyo, liboso ete esalema, mpo ete bokoka kondima, na mokolo oyo ekosalema. 30 Kobanda sik’oyo, nakoloba na bino lisusu mingi te, pamba te mokonzi ya mokili oyo azali koya. Ezali te mpo ete azali na nguya moko te likolo na Ngai, 31 kasi ezali mpo ete mokili eyeba ete nalingaka Tata, mpe ete nazali kosala kolanda ndenge atindaki Ngai. Botelema ; tolongwa awa.

In Other Versions

John 14 in the ANGEFD

John 14 in the ANTPNG2D

John 14 in the AS21

John 14 in the BAGH

John 14 in the BBPNG

John 14 in the BBT1E

John 14 in the BDS

John 14 in the BEV

John 14 in the BHAD

John 14 in the BIB

John 14 in the BLPT

John 14 in the BNT

John 14 in the BNTABOOT

John 14 in the BNTLV

John 14 in the BOATCB

John 14 in the BOATCB2

John 14 in the BOBCV

John 14 in the BOCNT

John 14 in the BOECS

John 14 in the BOGWICC

John 14 in the BOHCB

John 14 in the BOHCV

John 14 in the BOHLNT

John 14 in the BOHNTLTAL

John 14 in the BOICB

John 14 in the BOILNTAP

John 14 in the BOITCV

John 14 in the BOKCV

John 14 in the BOKCV2

John 14 in the BOKHWOG

John 14 in the BOKSSV

John 14 in the BOLCB

John 14 in the BOMCV

John 14 in the BONAV

John 14 in the BONCB

John 14 in the BONLT

John 14 in the BONUT2

John 14 in the BOPLNT

John 14 in the BOSCB

John 14 in the BOSNC

John 14 in the BOTLNT

John 14 in the BOVCB

John 14 in the BOYCB

John 14 in the BPBB

John 14 in the BPH

John 14 in the BSB

John 14 in the CCB

John 14 in the CUV

John 14 in the CUVS

John 14 in the DBT

John 14 in the DGDNT

John 14 in the DHNT

John 14 in the DNT

John 14 in the ELBE

John 14 in the EMTV

John 14 in the ESV

John 14 in the FBV

John 14 in the FEB

John 14 in the GGMNT

John 14 in the GNT

John 14 in the HARY

John 14 in the HNT

John 14 in the IRVA

John 14 in the IRVB

John 14 in the IRVG

John 14 in the IRVH

John 14 in the IRVK

John 14 in the IRVM

John 14 in the IRVM2

John 14 in the IRVO

John 14 in the IRVP

John 14 in the IRVT

John 14 in the IRVT2

John 14 in the IRVU

John 14 in the ISVN

John 14 in the JSNT

John 14 in the KAPI

John 14 in the KBT1ETNIK

John 14 in the KBV

John 14 in the KJV

John 14 in the KNFD

John 14 in the LBA

John 14 in the LBLA

John 14 in the LNT

John 14 in the LSV

John 14 in the MAAL

John 14 in the MBV

John 14 in the MBV2

John 14 in the MHNT

John 14 in the MKNFD

John 14 in the MNG

John 14 in the MNT

John 14 in the MNT2

John 14 in the MRS1T

John 14 in the NAA

John 14 in the NASB

John 14 in the NBLA

John 14 in the NBS

John 14 in the NBVTP

John 14 in the NET2

John 14 in the NIV11

John 14 in the NNT

John 14 in the NNT2

John 14 in the NNT3

John 14 in the PDDPT

John 14 in the PFNT

John 14 in the RMNT

John 14 in the SBIAS

John 14 in the SBIBS

John 14 in the SBIBS2

John 14 in the SBICS

John 14 in the SBIDS

John 14 in the SBIGS

John 14 in the SBIHS

John 14 in the SBIIS

John 14 in the SBIIS2

John 14 in the SBIIS3

John 14 in the SBIKS

John 14 in the SBIKS2

John 14 in the SBIMS

John 14 in the SBIOS

John 14 in the SBIPS

John 14 in the SBISS

John 14 in the SBITS

John 14 in the SBITS2

John 14 in the SBITS3

John 14 in the SBITS4

John 14 in the SBIUS

John 14 in the SBIVS

John 14 in the SBT

John 14 in the SBT1E

John 14 in the SCHL

John 14 in the SNT

John 14 in the SUSU

John 14 in the SUSU2

John 14 in the SYNO

John 14 in the TBIAOTANT

John 14 in the TBT1E

John 14 in the TBT1E2

John 14 in the TFTIP

John 14 in the TFTU

John 14 in the TGNTATF3T

John 14 in the THAI

John 14 in the TNFD

John 14 in the TNT

John 14 in the TNTIK

John 14 in the TNTIL

John 14 in the TNTIN

John 14 in the TNTIP

John 14 in the TNTIZ

John 14 in the TOMA

John 14 in the TTENT

John 14 in the UBG

John 14 in the UGV

John 14 in the UGV2

John 14 in the UGV3

John 14 in the VBL

John 14 in the VDCC

John 14 in the YALU

John 14 in the YAPE

John 14 in the YBVTP

John 14 in the ZBP