John 18 (BOLCB2)

1 Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye. 2 Yuda oyo asilaki komibongisa mpo na kokaba Yesu ayebaki esika yango malamu, pamba te Yesu azalaki kokende kuna mbala mingi elongo na bayekoli na Ye. 3 Boye Yuda akendeki na elanga yango mpe amemaki lisanga ya basoda mpe ya bakengeli oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bapesaki ye. Bato yango basimbaki minda, banzete oyo ezalaki kopela moto mpe bibundeli. 4 Lokola Yesu ayebaki makambo nyonso oyo esengeli kokomela Ye, akendeki kokutana na bango mpe atunaki bango : — Bozali koluka nani ? 5 Bazongisaki :— Yesu ya Nazareti.Yesu alobaki na bango : — Ezali Ngai oyo.Mpe Yuda oyo atekaki Yesu epai na bango azalaki wana elongo na bango. 6 Tango Yesu alobaki na bango : « Ezali Ngai oyo, » bazongaki na sima mpe bakweyaki na mabele. 7 Yesu atunaki bango lisusu : — Bozali koluka nani ?Bazongisaki :— Yesu ya Nazareti. 8 Yesu alobaki na bango : — Nasili koloba na bino ete ezali Ngai. Soki ezali Ngai nde bozali koluka, botika bato mosusu kokende. 9 Ezali bongo nde esengelaki kokokisama, liloba oyo Yesu alobaki : « Kati na bato oyo opesaki ngai, nabungisi ata moko te. » 10 Lokola Simona Petelo azalaki na mopanga, abimisaki yango wuta na ebombelo na yango, abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kombo ya mosali yango ezalaki Malikisi. 11 Kasi Yesu alobaki na Petelo : — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango. Boni, nasengeli te komela kopo ya pasi, oyo Tata apesi Ngai ? 12 Lisanga ya basoda, mokonzi na bango mpe bakengeli ya Bayuda bakamataki Yesu mpe bakangaki Ye basinga ; 13 bamemaki Ye liboso epai ya Ana oyo azalaki tata-bokilo ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, na mobu wana. 14 Ezalaki mpe Kayifa wana nde apesaki Bayuda toli oyo : « Eleki malamu ete moto moko akufa mpo na bato nyonso. » 15 Simona Petelo mpe moyekoli mosusu bazalaki kolanda Yesu. Moyekoli yango ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe akotaki elongo na Yesu na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. 16 Petelo azalaki kozela libanda, na liboso ya ekuke. Moyekoli wana, oyo ayebanaki na mokonzi ya Banganga-Nzambe, abimaki, asololaki na mwasi mokengeli ekuke mpe akotisaki Petelo. 17 Mwasi mosali oyo azalaki kokengela ekuke atunaki Petelo :— Boni, yo mpe ozali te moko kati na bayekoli ya moto wana ?Petelo azongisaki :— Nazali moyekoli na ye te. 18 Lokola malili ezalaki, basali mpe bakengeli bapelisaki moto mpe batelemaki pembeni-pembeni mpo na koyetola. Petelo mpe azalaki wana elongo na bango mpo na koyetola. 19 Mokonzi ya Banganga-Nzambe apesaki Yesu mituna na tina na bayekoli na Ye mpe na tina na mateya na Ye. 20 Yesu azongiselaki ye : — Nazalaki koloba na polele penza na miso ya bato nyonso, nazalaki koteya tango nyonso kati na bandako ya mayangani mpe kati na Tempelo, epai wapi Bayuda nyonso basanganaka ; nalobaki eloko moko te na nkuku. 21 Mpo na nini ozali kotuna Ngai mituna ? Tuna epai ya bato oyo bayokaki Ngai koloba. Ezali bango nde bakoki koyeba malamu makambo oyo nazalaki koloba. 22 Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba :— Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ? 23 Yesu alobaki na ye : — Soki nalobi mabe, mabe yango ezali wapi ? Kasi soki nalobi na Ngai kaka solo, mpo na nini kobeta Ngai ? 24 Bongo Ana atindaki Yesu oyo azalaki kaka ya kokangama na basinga, epai ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe. 25 Wana Simona Petelo azalaki nanu koyetola moto, batunaki ye :— Yo mpe ozali te moko kati na bayekoli na ye ?Petelo awanganaki yango na koloba :— Te, nazali moyekoli na ye te. 26 Kasi moko kati na basali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe, ndeko mobali ya moto oyo Petelo akataki litoyi, alobaki :— Boni, ngai namonaki yo te elongo na ye kati na elanga ? 27 Kasi Petelo awanganaki yango lisusu ; mpe mbala moko, soso elelaki. 28 Bongo na tongo makasi, longwa na ndako ya Kayifa, bamemaki Yesu kati na ndako ya moyangeli oyo azalaki moto ya Rome. Kasi bango moko bato oyo bamemaki Yesu bakotaki te kati na ndako ya moyangeli, mpo ete bamikomisa mbindo te mpe mpo ete bazwa nzela ya kolia bilei ya Pasika. 29 Yango wana moyangeli Pilato abimaki na libanda mpe atunaki bango :— Bofundi moto oyo mpo na likambo nini ? 30 Bazongiselaki ye :— Soki moto oyo asalaki mabe te, tolingaki mpe koya te kotika ye na maboko na yo. 31 Pilato alobaki na bango :— Bokamata ye mpe bosambisa ye bino moko kolanda mibeko na bino.Bayuda bazongiselaki ye :— Biso tozali na ndingisa te ya kokatela moto etumbu ya kufa. 32 Ezali ndenge wana nde ekokisamaki maloba oyo Yesu alobaki mpo na kolakisa lolenge ya kufa oyo asengelaki kokufa. 33 Pilato azongaki kati na ndako ya moyangeli, abengaki Yesu mpe atunaki Ye :— Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? 34 Yesu azongisaki : — Boni, ezali na ndenge na yo moko nde olobi yango to bato mosusu nde bayebisi yo na tina na Ngai ? 35 Pilato atunaki Yesu :— Boni, okanisi ete ngai nazali Moyuda ? Ezali bato ya ekolo na yo moko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe nde bayei kotika yo na maboko na ngai. Osali nini ? 36 Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te. 37 Pilato atunaki :— Elingi koloba nini, ozali nde mokonzi ?Yesu azongisaki : — Yo nde olobi yango ete nazali mokonzi. Nabotamaki mpe nayaki kati na mokili mpo na kopesa litatoli na tina na solo. Moto oyo azali kati na solo ayokaka mongongo na Ngai. 38 Pilato atunaki Ye :— Solo ezali nini ?Sima na koloba maloba wana, Pilato abimaki lisusu na libanda epai wapi Bayuda bazalaki mpe alobaki na bango :— Nazwi ye na likambo moko te ya mabe mpo ete nakatela ye etumbu ya kufa. 39 Kasi lokola ezali momesano epai na bino ete nabimisa na boloko mokangami moko, na tango ya feti ya Pasika, bozwa sik’oyo mokano. Bolingi ete natika mokonzi ya Bayuda mpo ete akoma nsomi ? 40 Bango nyonso bazongisaki na koganga :— Te ! Ye te ! Bimisa nde Barabasi !Nzokande, Barabasi azalaki moyibi mpe mobomi bato.

In Other Versions

John 18 in the ANGEFD

John 18 in the ANTPNG2D

John 18 in the AS21

John 18 in the BAGH

John 18 in the BBPNG

John 18 in the BBT1E

John 18 in the BDS

John 18 in the BEV

John 18 in the BHAD

John 18 in the BIB

John 18 in the BLPT

John 18 in the BNT

John 18 in the BNTABOOT

John 18 in the BNTLV

John 18 in the BOATCB

John 18 in the BOATCB2

John 18 in the BOBCV

John 18 in the BOCNT

John 18 in the BOECS

John 18 in the BOGWICC

John 18 in the BOHCB

John 18 in the BOHCV

John 18 in the BOHLNT

John 18 in the BOHNTLTAL

John 18 in the BOICB

John 18 in the BOILNTAP

John 18 in the BOITCV

John 18 in the BOKCV

John 18 in the BOKCV2

John 18 in the BOKHWOG

John 18 in the BOKSSV

John 18 in the BOLCB

John 18 in the BOMCV

John 18 in the BONAV

John 18 in the BONCB

John 18 in the BONLT

John 18 in the BONUT2

John 18 in the BOPLNT

John 18 in the BOSCB

John 18 in the BOSNC

John 18 in the BOTLNT

John 18 in the BOVCB

John 18 in the BOYCB

John 18 in the BPBB

John 18 in the BPH

John 18 in the BSB

John 18 in the CCB

John 18 in the CUV

John 18 in the CUVS

John 18 in the DBT

John 18 in the DGDNT

John 18 in the DHNT

John 18 in the DNT

John 18 in the ELBE

John 18 in the EMTV

John 18 in the ESV

John 18 in the FBV

John 18 in the FEB

John 18 in the GGMNT

John 18 in the GNT

John 18 in the HARY

John 18 in the HNT

John 18 in the IRVA

John 18 in the IRVB

John 18 in the IRVG

John 18 in the IRVH

John 18 in the IRVK

John 18 in the IRVM

John 18 in the IRVM2

John 18 in the IRVO

John 18 in the IRVP

John 18 in the IRVT

John 18 in the IRVT2

John 18 in the IRVU

John 18 in the ISVN

John 18 in the JSNT

John 18 in the KAPI

John 18 in the KBT1ETNIK

John 18 in the KBV

John 18 in the KJV

John 18 in the KNFD

John 18 in the LBA

John 18 in the LBLA

John 18 in the LNT

John 18 in the LSV

John 18 in the MAAL

John 18 in the MBV

John 18 in the MBV2

John 18 in the MHNT

John 18 in the MKNFD

John 18 in the MNG

John 18 in the MNT

John 18 in the MNT2

John 18 in the MRS1T

John 18 in the NAA

John 18 in the NASB

John 18 in the NBLA

John 18 in the NBS

John 18 in the NBVTP

John 18 in the NET2

John 18 in the NIV11

John 18 in the NNT

John 18 in the NNT2

John 18 in the NNT3

John 18 in the PDDPT

John 18 in the PFNT

John 18 in the RMNT

John 18 in the SBIAS

John 18 in the SBIBS

John 18 in the SBIBS2

John 18 in the SBICS

John 18 in the SBIDS

John 18 in the SBIGS

John 18 in the SBIHS

John 18 in the SBIIS

John 18 in the SBIIS2

John 18 in the SBIIS3

John 18 in the SBIKS

John 18 in the SBIKS2

John 18 in the SBIMS

John 18 in the SBIOS

John 18 in the SBIPS

John 18 in the SBISS

John 18 in the SBITS

John 18 in the SBITS2

John 18 in the SBITS3

John 18 in the SBITS4

John 18 in the SBIUS

John 18 in the SBIVS

John 18 in the SBT

John 18 in the SBT1E

John 18 in the SCHL

John 18 in the SNT

John 18 in the SUSU

John 18 in the SUSU2

John 18 in the SYNO

John 18 in the TBIAOTANT

John 18 in the TBT1E

John 18 in the TBT1E2

John 18 in the TFTIP

John 18 in the TFTU

John 18 in the TGNTATF3T

John 18 in the THAI

John 18 in the TNFD

John 18 in the TNT

John 18 in the TNTIK

John 18 in the TNTIL

John 18 in the TNTIN

John 18 in the TNTIP

John 18 in the TNTIZ

John 18 in the TOMA

John 18 in the TTENT

John 18 in the UBG

John 18 in the UGV

John 18 in the UGV2

John 18 in the UGV3

John 18 in the VBL

John 18 in the VDCC

John 18 in the YALU

John 18 in the YAPE

John 18 in the YBVTP

John 18 in the ZBP