Joshua 18 (BOLCB2)

1 Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani. 2 Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele. 3 Jozue alobaki na bana ya Isalaele : « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino ? 4 Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota ; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai. 5 Bakokabola mokili yango na biteni sambo ; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor. 6 Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino. 7 Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. » 8 Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo : « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. » 9 Boye, bato oyo bakendeki, batambolaki kati na mokili, bakataki bandelo na yango mpe batiaki yango na mokanda, engumba na engumba, mpe bakabolaki mokili mobimba na biteni sambo ; bongo na sima, bazongaki na Silo, na molako epai ya Jozue. 10 Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango. 11 Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi. 12 Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni. 13 Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se. 14 Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste. 15 Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa. 16 Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli. 17 Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi ; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni. 18 Elekaki na mopanzi ya ngambo ya nor, liboso ya Beti-Araba, mpe ekitaki kino na etando ya Araba. 19 Mondelo yango elekelaki na mopanzi ya Beti-Ogila, na ngambo ya nor, mpe esukaki na eteni ya mabele oyo ekota na mayi ya ebale monene ya Barozo, na ngambo ya nor, na suka ya ngambo ya sude ya Yordani. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya sude. 20 Ebale ya Yordani ekomaki mondelo na yango na ngambo ya este.Yango nde ezalaki bandelo ya libula ya mabota ya bakitani ya Benjame na bangambo nyonso. 21 Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango :Jeriko, Beti-Ogila, Emeki-Ketsitsi, 22 Beti-Araba, Tsemarayimi, Beteli, 23 Avimi, Para, Ofira, 24 Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike. 25 Gabaoni, Rama, Beyeroti, 26 Mitsipe, Kefira, Motsa, 27 Rekemi, Yiripeyeli, Tareala, 28 Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike.Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango.

In Other Versions

Joshua 18 in the ANGEFD

Joshua 18 in the ANTPNG2D

Joshua 18 in the AS21

Joshua 18 in the BAGH

Joshua 18 in the BBPNG

Joshua 18 in the BBT1E

Joshua 18 in the BDS

Joshua 18 in the BEV

Joshua 18 in the BHAD

Joshua 18 in the BIB

Joshua 18 in the BLPT

Joshua 18 in the BNT

Joshua 18 in the BNTABOOT

Joshua 18 in the BNTLV

Joshua 18 in the BOATCB

Joshua 18 in the BOATCB2

Joshua 18 in the BOBCV

Joshua 18 in the BOCNT

Joshua 18 in the BOECS

Joshua 18 in the BOGWICC

Joshua 18 in the BOHCB

Joshua 18 in the BOHCV

Joshua 18 in the BOHLNT

Joshua 18 in the BOHNTLTAL

Joshua 18 in the BOICB

Joshua 18 in the BOILNTAP

Joshua 18 in the BOITCV

Joshua 18 in the BOKCV

Joshua 18 in the BOKCV2

Joshua 18 in the BOKHWOG

Joshua 18 in the BOKSSV

Joshua 18 in the BOLCB

Joshua 18 in the BOMCV

Joshua 18 in the BONAV

Joshua 18 in the BONCB

Joshua 18 in the BONLT

Joshua 18 in the BONUT2

Joshua 18 in the BOPLNT

Joshua 18 in the BOSCB

Joshua 18 in the BOSNC

Joshua 18 in the BOTLNT

Joshua 18 in the BOVCB

Joshua 18 in the BOYCB

Joshua 18 in the BPBB

Joshua 18 in the BPH

Joshua 18 in the BSB

Joshua 18 in the CCB

Joshua 18 in the CUV

Joshua 18 in the CUVS

Joshua 18 in the DBT

Joshua 18 in the DGDNT

Joshua 18 in the DHNT

Joshua 18 in the DNT

Joshua 18 in the ELBE

Joshua 18 in the EMTV

Joshua 18 in the ESV

Joshua 18 in the FBV

Joshua 18 in the FEB

Joshua 18 in the GGMNT

Joshua 18 in the GNT

Joshua 18 in the HARY

Joshua 18 in the HNT

Joshua 18 in the IRVA

Joshua 18 in the IRVB

Joshua 18 in the IRVG

Joshua 18 in the IRVH

Joshua 18 in the IRVK

Joshua 18 in the IRVM

Joshua 18 in the IRVM2

Joshua 18 in the IRVO

Joshua 18 in the IRVP

Joshua 18 in the IRVT

Joshua 18 in the IRVT2

Joshua 18 in the IRVU

Joshua 18 in the ISVN

Joshua 18 in the JSNT

Joshua 18 in the KAPI

Joshua 18 in the KBT1ETNIK

Joshua 18 in the KBV

Joshua 18 in the KJV

Joshua 18 in the KNFD

Joshua 18 in the LBA

Joshua 18 in the LBLA

Joshua 18 in the LNT

Joshua 18 in the LSV

Joshua 18 in the MAAL

Joshua 18 in the MBV

Joshua 18 in the MBV2

Joshua 18 in the MHNT

Joshua 18 in the MKNFD

Joshua 18 in the MNG

Joshua 18 in the MNT

Joshua 18 in the MNT2

Joshua 18 in the MRS1T

Joshua 18 in the NAA

Joshua 18 in the NASB

Joshua 18 in the NBLA

Joshua 18 in the NBS

Joshua 18 in the NBVTP

Joshua 18 in the NET2

Joshua 18 in the NIV11

Joshua 18 in the NNT

Joshua 18 in the NNT2

Joshua 18 in the NNT3

Joshua 18 in the PDDPT

Joshua 18 in the PFNT

Joshua 18 in the RMNT

Joshua 18 in the SBIAS

Joshua 18 in the SBIBS

Joshua 18 in the SBIBS2

Joshua 18 in the SBICS

Joshua 18 in the SBIDS

Joshua 18 in the SBIGS

Joshua 18 in the SBIHS

Joshua 18 in the SBIIS

Joshua 18 in the SBIIS2

Joshua 18 in the SBIIS3

Joshua 18 in the SBIKS

Joshua 18 in the SBIKS2

Joshua 18 in the SBIMS

Joshua 18 in the SBIOS

Joshua 18 in the SBIPS

Joshua 18 in the SBISS

Joshua 18 in the SBITS

Joshua 18 in the SBITS2

Joshua 18 in the SBITS3

Joshua 18 in the SBITS4

Joshua 18 in the SBIUS

Joshua 18 in the SBIVS

Joshua 18 in the SBT

Joshua 18 in the SBT1E

Joshua 18 in the SCHL

Joshua 18 in the SNT

Joshua 18 in the SUSU

Joshua 18 in the SUSU2

Joshua 18 in the SYNO

Joshua 18 in the TBIAOTANT

Joshua 18 in the TBT1E

Joshua 18 in the TBT1E2

Joshua 18 in the TFTIP

Joshua 18 in the TFTU

Joshua 18 in the TGNTATF3T

Joshua 18 in the THAI

Joshua 18 in the TNFD

Joshua 18 in the TNT

Joshua 18 in the TNTIK

Joshua 18 in the TNTIL

Joshua 18 in the TNTIN

Joshua 18 in the TNTIP

Joshua 18 in the TNTIZ

Joshua 18 in the TOMA

Joshua 18 in the TTENT

Joshua 18 in the UBG

Joshua 18 in the UGV

Joshua 18 in the UGV2

Joshua 18 in the UGV3

Joshua 18 in the VBL

Joshua 18 in the VDCC

Joshua 18 in the YALU

Joshua 18 in the YAPE

Joshua 18 in the YBVTP

Joshua 18 in the ZBP