Leviticus 10 (BOLCB2)

1 Bana mibali ya Aron, Nadabi mpe Abiyu, bazwaki moko na moko mbabola na ye ; batiaki yango makala ya moto mpe batiaki ansa na likolo ya makala yango. Lokola bakokisaki te kolanda oyo basengelaki kosala, bamemaki moto ya mopaya liboso ya Yawe. 2 Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko. 3 Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › »Aron alobaki ata liloba moko te. 4 Moyize abengisaki Mishaeli mpe Elitsafani, bana mibali ya Uzieli, noko ya Aron. Alobaki na bango : « Boya kolongola bibembe ya bandeko na bino liboso ya Esika ya bule mpe bomema yango na libanda ya molako. » 5 Basalaki ndenge kaka Moyize alobaki na bango : bapusanaki mpe bamemaki bibembe elongo na banzambala na bango na libanda ya molako. 6 Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto. 7 Kasi bino, bosengeli te kolongwa liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bokokufa ; pamba te bapakola bino mafuta mpo na kosala mosala ya Yawe. »Aron mpe bana na ye batosaki makambo oyo Moyize alobaki na bango. 8 Yawe alobaki na Aron : 9 « Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino, 10 mpo ete boyeba kokesenisa eloko ya bule mpe eloko oyo ezangi bule, eloko ya peto mpe eloko ya mbindo ; 11 lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. » 12 Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bokobanda kozwa likabo oyo ekotikala, oyo ekozika te na moto, mpe bokobanda kolia yango pembeni ya etumbelo ; bokotia yango ezanga levire, pamba te ezali eteni ya bule koleka. 13 Bokolia yango na Esika ya bule, pamba te yango nde epesameli yo mpe bana mibali na yo kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, ndenge kaka atindaki ngai. 14 Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe. 15 Bana ya Isalaele bakobonza elongo na biteni ya mafuta bazikisa na moto : tolo mpe mopende ya banyama oyo batombolaka liboso ya Yawe. Ekokoma ya yo mpe ya bana mibali na yo mpo na libela, ndenge kaka Yawe atindaki ngai. » 16 Bongo, tango Moyize atunaki ntaba ya mobali oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu, ayokaki ete basilaki kotumba yango na moto. Boye asilikelaki Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron, mpe atunaki bango : 17 — Mpo na nini boliaki te mosuni ya mbeka mpo na masumu na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule ? Yawe apesaki bino yango mpo ete bokangola lisanga ya Isalaele na masumu na bango mpe bosala liboso ya Yawe mosala ya bolimbisi masumu na bango. 18 Lokola makila ya mbeka yango ekotaki te kati na Esika ya bule, bosengelaki kolia mosuni na yango na Esika ya bule kolanda ndenge nalobaki na tina na yango. 19 Aron azongiselaki Moyize :— Na mokolo oyo bana na ngai babonzelaki Yawe mbeka na bango mpo na masumu mpe mbeka na bango ya kotumba, oyebi malamu makambo oyo ekweyelaki ngai. Soki, na mokolo lokola oyo wana, ngai naliaki mosuni ya mbeka mpo na masumu, Yawe akokaki na Ye kondima ete ngai nasala likambo ya bongo ? 20 Moyize ayokaki eyano oyo mpe amonaki ete ezali malamu.

In Other Versions

Leviticus 10 in the ANGEFD

Leviticus 10 in the ANTPNG2D

Leviticus 10 in the AS21

Leviticus 10 in the BAGH

Leviticus 10 in the BBPNG

Leviticus 10 in the BBT1E

Leviticus 10 in the BDS

Leviticus 10 in the BEV

Leviticus 10 in the BHAD

Leviticus 10 in the BIB

Leviticus 10 in the BLPT

Leviticus 10 in the BNT

Leviticus 10 in the BNTABOOT

Leviticus 10 in the BNTLV

Leviticus 10 in the BOATCB

Leviticus 10 in the BOATCB2

Leviticus 10 in the BOBCV

Leviticus 10 in the BOCNT

Leviticus 10 in the BOECS

Leviticus 10 in the BOGWICC

Leviticus 10 in the BOHCB

Leviticus 10 in the BOHCV

Leviticus 10 in the BOHLNT

Leviticus 10 in the BOHNTLTAL

Leviticus 10 in the BOICB

Leviticus 10 in the BOILNTAP

Leviticus 10 in the BOITCV

Leviticus 10 in the BOKCV

Leviticus 10 in the BOKCV2

Leviticus 10 in the BOKHWOG

Leviticus 10 in the BOKSSV

Leviticus 10 in the BOLCB

Leviticus 10 in the BOMCV

Leviticus 10 in the BONAV

Leviticus 10 in the BONCB

Leviticus 10 in the BONLT

Leviticus 10 in the BONUT2

Leviticus 10 in the BOPLNT

Leviticus 10 in the BOSCB

Leviticus 10 in the BOSNC

Leviticus 10 in the BOTLNT

Leviticus 10 in the BOVCB

Leviticus 10 in the BOYCB

Leviticus 10 in the BPBB

Leviticus 10 in the BPH

Leviticus 10 in the BSB

Leviticus 10 in the CCB

Leviticus 10 in the CUV

Leviticus 10 in the CUVS

Leviticus 10 in the DBT

Leviticus 10 in the DGDNT

Leviticus 10 in the DHNT

Leviticus 10 in the DNT

Leviticus 10 in the ELBE

Leviticus 10 in the EMTV

Leviticus 10 in the ESV

Leviticus 10 in the FBV

Leviticus 10 in the FEB

Leviticus 10 in the GGMNT

Leviticus 10 in the GNT

Leviticus 10 in the HARY

Leviticus 10 in the HNT

Leviticus 10 in the IRVA

Leviticus 10 in the IRVB

Leviticus 10 in the IRVG

Leviticus 10 in the IRVH

Leviticus 10 in the IRVK

Leviticus 10 in the IRVM

Leviticus 10 in the IRVM2

Leviticus 10 in the IRVO

Leviticus 10 in the IRVP

Leviticus 10 in the IRVT

Leviticus 10 in the IRVT2

Leviticus 10 in the IRVU

Leviticus 10 in the ISVN

Leviticus 10 in the JSNT

Leviticus 10 in the KAPI

Leviticus 10 in the KBT1ETNIK

Leviticus 10 in the KBV

Leviticus 10 in the KJV

Leviticus 10 in the KNFD

Leviticus 10 in the LBA

Leviticus 10 in the LBLA

Leviticus 10 in the LNT

Leviticus 10 in the LSV

Leviticus 10 in the MAAL

Leviticus 10 in the MBV

Leviticus 10 in the MBV2

Leviticus 10 in the MHNT

Leviticus 10 in the MKNFD

Leviticus 10 in the MNG

Leviticus 10 in the MNT

Leviticus 10 in the MNT2

Leviticus 10 in the MRS1T

Leviticus 10 in the NAA

Leviticus 10 in the NASB

Leviticus 10 in the NBLA

Leviticus 10 in the NBS

Leviticus 10 in the NBVTP

Leviticus 10 in the NET2

Leviticus 10 in the NIV11

Leviticus 10 in the NNT

Leviticus 10 in the NNT2

Leviticus 10 in the NNT3

Leviticus 10 in the PDDPT

Leviticus 10 in the PFNT

Leviticus 10 in the RMNT

Leviticus 10 in the SBIAS

Leviticus 10 in the SBIBS

Leviticus 10 in the SBIBS2

Leviticus 10 in the SBICS

Leviticus 10 in the SBIDS

Leviticus 10 in the SBIGS

Leviticus 10 in the SBIHS

Leviticus 10 in the SBIIS

Leviticus 10 in the SBIIS2

Leviticus 10 in the SBIIS3

Leviticus 10 in the SBIKS

Leviticus 10 in the SBIKS2

Leviticus 10 in the SBIMS

Leviticus 10 in the SBIOS

Leviticus 10 in the SBIPS

Leviticus 10 in the SBISS

Leviticus 10 in the SBITS

Leviticus 10 in the SBITS2

Leviticus 10 in the SBITS3

Leviticus 10 in the SBITS4

Leviticus 10 in the SBIUS

Leviticus 10 in the SBIVS

Leviticus 10 in the SBT

Leviticus 10 in the SBT1E

Leviticus 10 in the SCHL

Leviticus 10 in the SNT

Leviticus 10 in the SUSU

Leviticus 10 in the SUSU2

Leviticus 10 in the SYNO

Leviticus 10 in the TBIAOTANT

Leviticus 10 in the TBT1E

Leviticus 10 in the TBT1E2

Leviticus 10 in the TFTIP

Leviticus 10 in the TFTU

Leviticus 10 in the TGNTATF3T

Leviticus 10 in the THAI

Leviticus 10 in the TNFD

Leviticus 10 in the TNT

Leviticus 10 in the TNTIK

Leviticus 10 in the TNTIL

Leviticus 10 in the TNTIN

Leviticus 10 in the TNTIP

Leviticus 10 in the TNTIZ

Leviticus 10 in the TOMA

Leviticus 10 in the TTENT

Leviticus 10 in the UBG

Leviticus 10 in the UGV

Leviticus 10 in the UGV2

Leviticus 10 in the UGV3

Leviticus 10 in the VBL

Leviticus 10 in the VDCC

Leviticus 10 in the YALU

Leviticus 10 in the YAPE

Leviticus 10 in the YBVTP

Leviticus 10 in the ZBP