Leviticus 15 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 2 « Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango : ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo. 3 Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo : 4 mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo. 5 Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 6 Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 7 Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa. 8 Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 9 Eloko nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akovandela likolo ya mpunda tango azali kosala mobembo, ekokoma mbindo. 10 Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa ; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 11 Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 12 Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango ; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi. 13 Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto. 14 Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe. 15 Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali. 16 Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa. 17 Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa. 18 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa. 19 Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa. 20 Eloko nyonso oyo akolalela na tango wana ekokoma mbindo, mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo. 21 Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa. 22 Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. 23 Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa. 24 Soki mobali moko asangisi na ye nzoto mpe makila na ye ya sanza ezwi mobali yango, akozala mbindo mikolo sambo. Bongo mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela, ekokoma mbindo. 25 Soki mwasi azali kobima makila mikolo ebele na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza te to azali kokoba kobima makila penza na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo nyonso oyo azali kobima makila lokola na mikolo oyo amonaka makila na ye ya sanza. 26 Mbeto nyonso oyo akolalela na tango oyo makila na ye ezali kokoba kobima, ekozala mbindo ; mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo lokola na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza. 27 Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi ; akozala mbindo kino na pokwa. 28 Soki apetolami na kobima makila na ye, asengeli kotanga mikolo sambo ; sima na yango, akokoma peto. 29 Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 30 Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mwasi yango liboso ya Yawe mpo na mbindo ya kobima makila na ye. 31 Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. › 32 Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ; 33 mpo na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza mpe mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi to mpo na mwasi oyo azali kobima makila, mpe mpo na mobali oyo asangisi nzoto na mwasi ya mbindo. »

In Other Versions

Leviticus 15 in the ANGEFD

Leviticus 15 in the ANTPNG2D

Leviticus 15 in the AS21

Leviticus 15 in the BAGH

Leviticus 15 in the BBPNG

Leviticus 15 in the BBT1E

Leviticus 15 in the BDS

Leviticus 15 in the BEV

Leviticus 15 in the BHAD

Leviticus 15 in the BIB

Leviticus 15 in the BLPT

Leviticus 15 in the BNT

Leviticus 15 in the BNTABOOT

Leviticus 15 in the BNTLV

Leviticus 15 in the BOATCB

Leviticus 15 in the BOATCB2

Leviticus 15 in the BOBCV

Leviticus 15 in the BOCNT

Leviticus 15 in the BOECS

Leviticus 15 in the BOGWICC

Leviticus 15 in the BOHCB

Leviticus 15 in the BOHCV

Leviticus 15 in the BOHLNT

Leviticus 15 in the BOHNTLTAL

Leviticus 15 in the BOICB

Leviticus 15 in the BOILNTAP

Leviticus 15 in the BOITCV

Leviticus 15 in the BOKCV

Leviticus 15 in the BOKCV2

Leviticus 15 in the BOKHWOG

Leviticus 15 in the BOKSSV

Leviticus 15 in the BOLCB

Leviticus 15 in the BOMCV

Leviticus 15 in the BONAV

Leviticus 15 in the BONCB

Leviticus 15 in the BONLT

Leviticus 15 in the BONUT2

Leviticus 15 in the BOPLNT

Leviticus 15 in the BOSCB

Leviticus 15 in the BOSNC

Leviticus 15 in the BOTLNT

Leviticus 15 in the BOVCB

Leviticus 15 in the BOYCB

Leviticus 15 in the BPBB

Leviticus 15 in the BPH

Leviticus 15 in the BSB

Leviticus 15 in the CCB

Leviticus 15 in the CUV

Leviticus 15 in the CUVS

Leviticus 15 in the DBT

Leviticus 15 in the DGDNT

Leviticus 15 in the DHNT

Leviticus 15 in the DNT

Leviticus 15 in the ELBE

Leviticus 15 in the EMTV

Leviticus 15 in the ESV

Leviticus 15 in the FBV

Leviticus 15 in the FEB

Leviticus 15 in the GGMNT

Leviticus 15 in the GNT

Leviticus 15 in the HARY

Leviticus 15 in the HNT

Leviticus 15 in the IRVA

Leviticus 15 in the IRVB

Leviticus 15 in the IRVG

Leviticus 15 in the IRVH

Leviticus 15 in the IRVK

Leviticus 15 in the IRVM

Leviticus 15 in the IRVM2

Leviticus 15 in the IRVO

Leviticus 15 in the IRVP

Leviticus 15 in the IRVT

Leviticus 15 in the IRVT2

Leviticus 15 in the IRVU

Leviticus 15 in the ISVN

Leviticus 15 in the JSNT

Leviticus 15 in the KAPI

Leviticus 15 in the KBT1ETNIK

Leviticus 15 in the KBV

Leviticus 15 in the KJV

Leviticus 15 in the KNFD

Leviticus 15 in the LBA

Leviticus 15 in the LBLA

Leviticus 15 in the LNT

Leviticus 15 in the LSV

Leviticus 15 in the MAAL

Leviticus 15 in the MBV

Leviticus 15 in the MBV2

Leviticus 15 in the MHNT

Leviticus 15 in the MKNFD

Leviticus 15 in the MNG

Leviticus 15 in the MNT

Leviticus 15 in the MNT2

Leviticus 15 in the MRS1T

Leviticus 15 in the NAA

Leviticus 15 in the NASB

Leviticus 15 in the NBLA

Leviticus 15 in the NBS

Leviticus 15 in the NBVTP

Leviticus 15 in the NET2

Leviticus 15 in the NIV11

Leviticus 15 in the NNT

Leviticus 15 in the NNT2

Leviticus 15 in the NNT3

Leviticus 15 in the PDDPT

Leviticus 15 in the PFNT

Leviticus 15 in the RMNT

Leviticus 15 in the SBIAS

Leviticus 15 in the SBIBS

Leviticus 15 in the SBIBS2

Leviticus 15 in the SBICS

Leviticus 15 in the SBIDS

Leviticus 15 in the SBIGS

Leviticus 15 in the SBIHS

Leviticus 15 in the SBIIS

Leviticus 15 in the SBIIS2

Leviticus 15 in the SBIIS3

Leviticus 15 in the SBIKS

Leviticus 15 in the SBIKS2

Leviticus 15 in the SBIMS

Leviticus 15 in the SBIOS

Leviticus 15 in the SBIPS

Leviticus 15 in the SBISS

Leviticus 15 in the SBITS

Leviticus 15 in the SBITS2

Leviticus 15 in the SBITS3

Leviticus 15 in the SBITS4

Leviticus 15 in the SBIUS

Leviticus 15 in the SBIVS

Leviticus 15 in the SBT

Leviticus 15 in the SBT1E

Leviticus 15 in the SCHL

Leviticus 15 in the SNT

Leviticus 15 in the SUSU

Leviticus 15 in the SUSU2

Leviticus 15 in the SYNO

Leviticus 15 in the TBIAOTANT

Leviticus 15 in the TBT1E

Leviticus 15 in the TBT1E2

Leviticus 15 in the TFTIP

Leviticus 15 in the TFTU

Leviticus 15 in the TGNTATF3T

Leviticus 15 in the THAI

Leviticus 15 in the TNFD

Leviticus 15 in the TNT

Leviticus 15 in the TNTIK

Leviticus 15 in the TNTIL

Leviticus 15 in the TNTIN

Leviticus 15 in the TNTIP

Leviticus 15 in the TNTIZ

Leviticus 15 in the TOMA

Leviticus 15 in the TTENT

Leviticus 15 in the UBG

Leviticus 15 in the UGV

Leviticus 15 in the UGV2

Leviticus 15 in the UGV3

Leviticus 15 in the VBL

Leviticus 15 in the VDCC

Leviticus 15 in the YALU

Leviticus 15 in the YAPE

Leviticus 15 in the YBVTP

Leviticus 15 in the ZBP