Luke 18 (BOLCB2)

1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te. 2 Alobaki : — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te. 3 Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. » 4 Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te, 5 kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. » 6 Nkolo abakisaki : — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo ! 7 Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ? 8 Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ? 9 Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo : 10 — Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako. 11 Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo. 12 Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. » 13 Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! » 14 Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye. 15 Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango. 16 Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike. 17 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango. 18 Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu :— Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? 19 Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. 20 Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. » 21 Mokambi yango azongisaki : — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai. 22 Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai. 23 Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. 24 Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! 25 Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga ; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe. 26 Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki :— Bongo nani penza akoki kobikisama ? 27 Yesu azongisaki : — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe. 28 Petelo alobaki na Yesu :— Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo ! 29 Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba, 30 akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko. 31 Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama. 32 Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi, 33 bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa. 34 Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela. 35 Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga. 36 Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki :— Likambo nini oyo ezali kosalema ? 37 Balobaki na ye :— Yesu ya Nazareti azali koleka ! 38 Agangaki :— Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! 39 Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka :— Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! 40 Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye : 41 — Olingi nasala nini mpo na yo ?Mokufi miso azongisaki :— Nkolo, nalingi komona. 42 Yesu alobaki na ye : — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo. 43 Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.

In Other Versions

Luke 18 in the ANGEFD

Luke 18 in the ANTPNG2D

Luke 18 in the AS21

Luke 18 in the BAGH

Luke 18 in the BBPNG

Luke 18 in the BBT1E

Luke 18 in the BDS

Luke 18 in the BEV

Luke 18 in the BHAD

Luke 18 in the BIB

Luke 18 in the BLPT

Luke 18 in the BNT

Luke 18 in the BNTABOOT

Luke 18 in the BNTLV

Luke 18 in the BOATCB

Luke 18 in the BOATCB2

Luke 18 in the BOBCV

Luke 18 in the BOCNT

Luke 18 in the BOECS

Luke 18 in the BOGWICC

Luke 18 in the BOHCB

Luke 18 in the BOHCV

Luke 18 in the BOHLNT

Luke 18 in the BOHNTLTAL

Luke 18 in the BOICB

Luke 18 in the BOILNTAP

Luke 18 in the BOITCV

Luke 18 in the BOKCV

Luke 18 in the BOKCV2

Luke 18 in the BOKHWOG

Luke 18 in the BOKSSV

Luke 18 in the BOLCB

Luke 18 in the BOMCV

Luke 18 in the BONAV

Luke 18 in the BONCB

Luke 18 in the BONLT

Luke 18 in the BONUT2

Luke 18 in the BOPLNT

Luke 18 in the BOSCB

Luke 18 in the BOSNC

Luke 18 in the BOTLNT

Luke 18 in the BOVCB

Luke 18 in the BOYCB

Luke 18 in the BPBB

Luke 18 in the BPH

Luke 18 in the BSB

Luke 18 in the CCB

Luke 18 in the CUV

Luke 18 in the CUVS

Luke 18 in the DBT

Luke 18 in the DGDNT

Luke 18 in the DHNT

Luke 18 in the DNT

Luke 18 in the ELBE

Luke 18 in the EMTV

Luke 18 in the ESV

Luke 18 in the FBV

Luke 18 in the FEB

Luke 18 in the GGMNT

Luke 18 in the GNT

Luke 18 in the HARY

Luke 18 in the HNT

Luke 18 in the IRVA

Luke 18 in the IRVB

Luke 18 in the IRVG

Luke 18 in the IRVH

Luke 18 in the IRVK

Luke 18 in the IRVM

Luke 18 in the IRVM2

Luke 18 in the IRVO

Luke 18 in the IRVP

Luke 18 in the IRVT

Luke 18 in the IRVT2

Luke 18 in the IRVU

Luke 18 in the ISVN

Luke 18 in the JSNT

Luke 18 in the KAPI

Luke 18 in the KBT1ETNIK

Luke 18 in the KBV

Luke 18 in the KJV

Luke 18 in the KNFD

Luke 18 in the LBA

Luke 18 in the LBLA

Luke 18 in the LNT

Luke 18 in the LSV

Luke 18 in the MAAL

Luke 18 in the MBV

Luke 18 in the MBV2

Luke 18 in the MHNT

Luke 18 in the MKNFD

Luke 18 in the MNG

Luke 18 in the MNT

Luke 18 in the MNT2

Luke 18 in the MRS1T

Luke 18 in the NAA

Luke 18 in the NASB

Luke 18 in the NBLA

Luke 18 in the NBS

Luke 18 in the NBVTP

Luke 18 in the NET2

Luke 18 in the NIV11

Luke 18 in the NNT

Luke 18 in the NNT2

Luke 18 in the NNT3

Luke 18 in the PDDPT

Luke 18 in the PFNT

Luke 18 in the RMNT

Luke 18 in the SBIAS

Luke 18 in the SBIBS

Luke 18 in the SBIBS2

Luke 18 in the SBICS

Luke 18 in the SBIDS

Luke 18 in the SBIGS

Luke 18 in the SBIHS

Luke 18 in the SBIIS

Luke 18 in the SBIIS2

Luke 18 in the SBIIS3

Luke 18 in the SBIKS

Luke 18 in the SBIKS2

Luke 18 in the SBIMS

Luke 18 in the SBIOS

Luke 18 in the SBIPS

Luke 18 in the SBISS

Luke 18 in the SBITS

Luke 18 in the SBITS2

Luke 18 in the SBITS3

Luke 18 in the SBITS4

Luke 18 in the SBIUS

Luke 18 in the SBIVS

Luke 18 in the SBT

Luke 18 in the SBT1E

Luke 18 in the SCHL

Luke 18 in the SNT

Luke 18 in the SUSU

Luke 18 in the SUSU2

Luke 18 in the SYNO

Luke 18 in the TBIAOTANT

Luke 18 in the TBT1E

Luke 18 in the TBT1E2

Luke 18 in the TFTIP

Luke 18 in the TFTU

Luke 18 in the TGNTATF3T

Luke 18 in the THAI

Luke 18 in the TNFD

Luke 18 in the TNT

Luke 18 in the TNTIK

Luke 18 in the TNTIL

Luke 18 in the TNTIN

Luke 18 in the TNTIP

Luke 18 in the TNTIZ

Luke 18 in the TOMA

Luke 18 in the TTENT

Luke 18 in the UBG

Luke 18 in the UGV

Luke 18 in the UGV2

Luke 18 in the UGV3

Luke 18 in the VBL

Luke 18 in the VDCC

Luke 18 in the YALU

Luke 18 in the YAPE

Luke 18 in the YBVTP

Luke 18 in the ZBP