Luke 24 (BOLCB2)

1 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. 2 Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. 3 Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. 4 Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. 5 Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango :— Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ? 6 Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : 7 « Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. » 8 Boye, bakanisaki maloba ya Yesu. 9 Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. 10 Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, 11 kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te. 12 Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema. 13 Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale. 14 Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema. 15 Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko. 16 Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu. 17 Alobaki na bango : — Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ?Batelemaki, bilongi mawa-mawa. 18 Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye :— Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo ! 19 Yesu atunaki bango : — Makambo nini ?Bazongisaki :— Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso. 20 Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu. 21 Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki. 22 Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo, 23 kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi. 24 Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te. 25 Yesu alobaki na bango : — Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba ! 26 Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ? 27 Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso. 28 Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29 Kasi bango babondelaki Ye makasi :— Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota.Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango. 30 Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango. 31 Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango. 32 Batunanaki :— Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ? 33 Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango, 34 oyo balobaki na bango :— Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona ! 35 Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni. 36 Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : — Tika ete kimia ezala na bino ! 37 Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima. 38 Yesu atunaki bango : — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ? 39 Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango. 40 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. 41 Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : — Bozali awa na eloko ya kolia ? 42 Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. 43 Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango. 44 Bongo alobaki na bango : — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. » 45 Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi. 46 Alobaki na bango : — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ; 47 mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. » 48 Bino nde bozali batatoli ya makambo yango. 49 Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo. 50 Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango. 51 Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo. 52 Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. 53 Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.

In Other Versions

Luke 24 in the ANGEFD

Luke 24 in the ANTPNG2D

Luke 24 in the AS21

Luke 24 in the BAGH

Luke 24 in the BBPNG

Luke 24 in the BBT1E

Luke 24 in the BDS

Luke 24 in the BEV

Luke 24 in the BHAD

Luke 24 in the BIB

Luke 24 in the BLPT

Luke 24 in the BNT

Luke 24 in the BNTABOOT

Luke 24 in the BNTLV

Luke 24 in the BOATCB

Luke 24 in the BOATCB2

Luke 24 in the BOBCV

Luke 24 in the BOCNT

Luke 24 in the BOECS

Luke 24 in the BOGWICC

Luke 24 in the BOHCB

Luke 24 in the BOHCV

Luke 24 in the BOHLNT

Luke 24 in the BOHNTLTAL

Luke 24 in the BOICB

Luke 24 in the BOILNTAP

Luke 24 in the BOITCV

Luke 24 in the BOKCV

Luke 24 in the BOKCV2

Luke 24 in the BOKHWOG

Luke 24 in the BOKSSV

Luke 24 in the BOLCB

Luke 24 in the BOMCV

Luke 24 in the BONAV

Luke 24 in the BONCB

Luke 24 in the BONLT

Luke 24 in the BONUT2

Luke 24 in the BOPLNT

Luke 24 in the BOSCB

Luke 24 in the BOSNC

Luke 24 in the BOTLNT

Luke 24 in the BOVCB

Luke 24 in the BOYCB

Luke 24 in the BPBB

Luke 24 in the BPH

Luke 24 in the BSB

Luke 24 in the CCB

Luke 24 in the CUV

Luke 24 in the CUVS

Luke 24 in the DBT

Luke 24 in the DGDNT

Luke 24 in the DHNT

Luke 24 in the DNT

Luke 24 in the ELBE

Luke 24 in the EMTV

Luke 24 in the ESV

Luke 24 in the FBV

Luke 24 in the FEB

Luke 24 in the GGMNT

Luke 24 in the GNT

Luke 24 in the HARY

Luke 24 in the HNT

Luke 24 in the IRVA

Luke 24 in the IRVB

Luke 24 in the IRVG

Luke 24 in the IRVH

Luke 24 in the IRVK

Luke 24 in the IRVM

Luke 24 in the IRVM2

Luke 24 in the IRVO

Luke 24 in the IRVP

Luke 24 in the IRVT

Luke 24 in the IRVT2

Luke 24 in the IRVU

Luke 24 in the ISVN

Luke 24 in the JSNT

Luke 24 in the KAPI

Luke 24 in the KBT1ETNIK

Luke 24 in the KBV

Luke 24 in the KJV

Luke 24 in the KNFD

Luke 24 in the LBA

Luke 24 in the LBLA

Luke 24 in the LNT

Luke 24 in the LSV

Luke 24 in the MAAL

Luke 24 in the MBV

Luke 24 in the MBV2

Luke 24 in the MHNT

Luke 24 in the MKNFD

Luke 24 in the MNG

Luke 24 in the MNT

Luke 24 in the MNT2

Luke 24 in the MRS1T

Luke 24 in the NAA

Luke 24 in the NASB

Luke 24 in the NBLA

Luke 24 in the NBS

Luke 24 in the NBVTP

Luke 24 in the NET2

Luke 24 in the NIV11

Luke 24 in the NNT

Luke 24 in the NNT2

Luke 24 in the NNT3

Luke 24 in the PDDPT

Luke 24 in the PFNT

Luke 24 in the RMNT

Luke 24 in the SBIAS

Luke 24 in the SBIBS

Luke 24 in the SBIBS2

Luke 24 in the SBICS

Luke 24 in the SBIDS

Luke 24 in the SBIGS

Luke 24 in the SBIHS

Luke 24 in the SBIIS

Luke 24 in the SBIIS2

Luke 24 in the SBIIS3

Luke 24 in the SBIKS

Luke 24 in the SBIKS2

Luke 24 in the SBIMS

Luke 24 in the SBIOS

Luke 24 in the SBIPS

Luke 24 in the SBISS

Luke 24 in the SBITS

Luke 24 in the SBITS2

Luke 24 in the SBITS3

Luke 24 in the SBITS4

Luke 24 in the SBIUS

Luke 24 in the SBIVS

Luke 24 in the SBT

Luke 24 in the SBT1E

Luke 24 in the SCHL

Luke 24 in the SNT

Luke 24 in the SUSU

Luke 24 in the SUSU2

Luke 24 in the SYNO

Luke 24 in the TBIAOTANT

Luke 24 in the TBT1E

Luke 24 in the TBT1E2

Luke 24 in the TFTIP

Luke 24 in the TFTU

Luke 24 in the TGNTATF3T

Luke 24 in the THAI

Luke 24 in the TNFD

Luke 24 in the TNT

Luke 24 in the TNTIK

Luke 24 in the TNTIL

Luke 24 in the TNTIN

Luke 24 in the TNTIP

Luke 24 in the TNTIZ

Luke 24 in the TOMA

Luke 24 in the TTENT

Luke 24 in the UBG

Luke 24 in the UGV

Luke 24 in the UGV2

Luke 24 in the UGV3

Luke 24 in the VBL

Luke 24 in the VDCC

Luke 24 in the YALU

Luke 24 in the YAPE

Luke 24 in the YBVTP

Luke 24 in the ZBP