Matthew 11 (BOLCB2)

1 Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango. 2 Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye 3 kotuna epai ya Yesu :— Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? 4 Yesu azongiselaki bango : — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka : 5 bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola. 6 Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai ! 7 Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango : — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ? 8 Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi. 9 Kasi bino, bokendeki penza kotala nini kati na esobe ? Mosakoli ? Solo, nazali koloba na bino penza ya solo : aleki kutu ata mosakoli. 10 Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye : « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo mpo na kobongisela Yo nzela. » 11 Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene. 12 Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna. 13 Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane. 14 Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya. 15 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! 16 Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu : 17 « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ; toyembelaki bino banzembo ya matanga, kasi bolelaki-lelaki te. » 18 Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! » 19 Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo. 20 Bongo Yesu apamelaki bingumba epai wapi asalaki mingi kati na bikamwa na Ye, pamba te bavandi na yango babongolaki mitema te. 21 Alobaki : — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu ! 22 Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni. 23 Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo. 24 Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome. 25 Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike ! 26 Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo ! 27 Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata. 28 Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi. 29 Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. 30 Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.

In Other Versions

Matthew 11 in the ANGEFD

Matthew 11 in the ANTPNG2D

Matthew 11 in the AS21

Matthew 11 in the BAGH

Matthew 11 in the BBPNG

Matthew 11 in the BBT1E

Matthew 11 in the BDS

Matthew 11 in the BEV

Matthew 11 in the BHAD

Matthew 11 in the BIB

Matthew 11 in the BLPT

Matthew 11 in the BNT

Matthew 11 in the BNTABOOT

Matthew 11 in the BNTLV

Matthew 11 in the BOATCB

Matthew 11 in the BOATCB2

Matthew 11 in the BOBCV

Matthew 11 in the BOCNT

Matthew 11 in the BOECS

Matthew 11 in the BOGWICC

Matthew 11 in the BOHCB

Matthew 11 in the BOHCV

Matthew 11 in the BOHLNT

Matthew 11 in the BOHNTLTAL

Matthew 11 in the BOICB

Matthew 11 in the BOILNTAP

Matthew 11 in the BOITCV

Matthew 11 in the BOKCV

Matthew 11 in the BOKCV2

Matthew 11 in the BOKHWOG

Matthew 11 in the BOKSSV

Matthew 11 in the BOLCB

Matthew 11 in the BOMCV

Matthew 11 in the BONAV

Matthew 11 in the BONCB

Matthew 11 in the BONLT

Matthew 11 in the BONUT2

Matthew 11 in the BOPLNT

Matthew 11 in the BOSCB

Matthew 11 in the BOSNC

Matthew 11 in the BOTLNT

Matthew 11 in the BOVCB

Matthew 11 in the BOYCB

Matthew 11 in the BPBB

Matthew 11 in the BPH

Matthew 11 in the BSB

Matthew 11 in the CCB

Matthew 11 in the CUV

Matthew 11 in the CUVS

Matthew 11 in the DBT

Matthew 11 in the DGDNT

Matthew 11 in the DHNT

Matthew 11 in the DNT

Matthew 11 in the ELBE

Matthew 11 in the EMTV

Matthew 11 in the ESV

Matthew 11 in the FBV

Matthew 11 in the FEB

Matthew 11 in the GGMNT

Matthew 11 in the GNT

Matthew 11 in the HARY

Matthew 11 in the HNT

Matthew 11 in the IRVA

Matthew 11 in the IRVB

Matthew 11 in the IRVG

Matthew 11 in the IRVH

Matthew 11 in the IRVK

Matthew 11 in the IRVM

Matthew 11 in the IRVM2

Matthew 11 in the IRVO

Matthew 11 in the IRVP

Matthew 11 in the IRVT

Matthew 11 in the IRVT2

Matthew 11 in the IRVU

Matthew 11 in the ISVN

Matthew 11 in the JSNT

Matthew 11 in the KAPI

Matthew 11 in the KBT1ETNIK

Matthew 11 in the KBV

Matthew 11 in the KJV

Matthew 11 in the KNFD

Matthew 11 in the LBA

Matthew 11 in the LBLA

Matthew 11 in the LNT

Matthew 11 in the LSV

Matthew 11 in the MAAL

Matthew 11 in the MBV

Matthew 11 in the MBV2

Matthew 11 in the MHNT

Matthew 11 in the MKNFD

Matthew 11 in the MNG

Matthew 11 in the MNT

Matthew 11 in the MNT2

Matthew 11 in the MRS1T

Matthew 11 in the NAA

Matthew 11 in the NASB

Matthew 11 in the NBLA

Matthew 11 in the NBS

Matthew 11 in the NBVTP

Matthew 11 in the NET2

Matthew 11 in the NIV11

Matthew 11 in the NNT

Matthew 11 in the NNT2

Matthew 11 in the NNT3

Matthew 11 in the PDDPT

Matthew 11 in the PFNT

Matthew 11 in the RMNT

Matthew 11 in the SBIAS

Matthew 11 in the SBIBS

Matthew 11 in the SBIBS2

Matthew 11 in the SBICS

Matthew 11 in the SBIDS

Matthew 11 in the SBIGS

Matthew 11 in the SBIHS

Matthew 11 in the SBIIS

Matthew 11 in the SBIIS2

Matthew 11 in the SBIIS3

Matthew 11 in the SBIKS

Matthew 11 in the SBIKS2

Matthew 11 in the SBIMS

Matthew 11 in the SBIOS

Matthew 11 in the SBIPS

Matthew 11 in the SBISS

Matthew 11 in the SBITS

Matthew 11 in the SBITS2

Matthew 11 in the SBITS3

Matthew 11 in the SBITS4

Matthew 11 in the SBIUS

Matthew 11 in the SBIVS

Matthew 11 in the SBT

Matthew 11 in the SBT1E

Matthew 11 in the SCHL

Matthew 11 in the SNT

Matthew 11 in the SUSU

Matthew 11 in the SUSU2

Matthew 11 in the SYNO

Matthew 11 in the TBIAOTANT

Matthew 11 in the TBT1E

Matthew 11 in the TBT1E2

Matthew 11 in the TFTIP

Matthew 11 in the TFTU

Matthew 11 in the TGNTATF3T

Matthew 11 in the THAI

Matthew 11 in the TNFD

Matthew 11 in the TNT

Matthew 11 in the TNTIK

Matthew 11 in the TNTIL

Matthew 11 in the TNTIN

Matthew 11 in the TNTIP

Matthew 11 in the TNTIZ

Matthew 11 in the TOMA

Matthew 11 in the TTENT

Matthew 11 in the UBG

Matthew 11 in the UGV

Matthew 11 in the UGV2

Matthew 11 in the UGV3

Matthew 11 in the VBL

Matthew 11 in the VDCC

Matthew 11 in the YALU

Matthew 11 in the YAPE

Matthew 11 in the YBVTP

Matthew 11 in the ZBP