Matthew 9 (BOLCB2)

1 Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye. 2 Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami. 3 Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema :— Moto oyo azali kotiola Nzambe ! 4 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ? 5 Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? » 6 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.Bongo alobaki na ebosono : — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo. 7 Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye. 8 Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato. 9 Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu. 10 Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye. 11 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu :— Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ? 12 Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. 13 Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu. 14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu :— Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ? 15 Yesu azongiselaki bango : — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei. 16 Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka. 17 Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu. 18 Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye :— Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi. 19 Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango. 20 Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye, 21 pamba te azalaki komilobela :— Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai. 22 Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo.Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye. 23 Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele. 24 Alobaki na bango : — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi.Kasi bato bakomaki kotiola Ye. 25 Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki. 26 Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba. 27 Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga :— Mwana ya Davidi, yokela biso mawa ! 28 Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango : — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ?Bazongisaki :— Iyo, Nkolo ! 29 Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki : — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino ! 30 Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango : — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino. 31 Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba. 32 Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te. 33 Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki :— Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te ! 34 Kasi Bafarizeo bazalaki koloba :— Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe. 35 Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge. 36 Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli. 37 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke ! 38 Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

In Other Versions

Matthew 9 in the ANGEFD

Matthew 9 in the ANTPNG2D

Matthew 9 in the AS21

Matthew 9 in the BAGH

Matthew 9 in the BBPNG

Matthew 9 in the BBT1E

Matthew 9 in the BDS

Matthew 9 in the BEV

Matthew 9 in the BHAD

Matthew 9 in the BIB

Matthew 9 in the BLPT

Matthew 9 in the BNT

Matthew 9 in the BNTABOOT

Matthew 9 in the BNTLV

Matthew 9 in the BOATCB

Matthew 9 in the BOATCB2

Matthew 9 in the BOBCV

Matthew 9 in the BOCNT

Matthew 9 in the BOECS

Matthew 9 in the BOGWICC

Matthew 9 in the BOHCB

Matthew 9 in the BOHCV

Matthew 9 in the BOHLNT

Matthew 9 in the BOHNTLTAL

Matthew 9 in the BOICB

Matthew 9 in the BOILNTAP

Matthew 9 in the BOITCV

Matthew 9 in the BOKCV

Matthew 9 in the BOKCV2

Matthew 9 in the BOKHWOG

Matthew 9 in the BOKSSV

Matthew 9 in the BOLCB

Matthew 9 in the BOMCV

Matthew 9 in the BONAV

Matthew 9 in the BONCB

Matthew 9 in the BONLT

Matthew 9 in the BONUT2

Matthew 9 in the BOPLNT

Matthew 9 in the BOSCB

Matthew 9 in the BOSNC

Matthew 9 in the BOTLNT

Matthew 9 in the BOVCB

Matthew 9 in the BOYCB

Matthew 9 in the BPBB

Matthew 9 in the BPH

Matthew 9 in the BSB

Matthew 9 in the CCB

Matthew 9 in the CUV

Matthew 9 in the CUVS

Matthew 9 in the DBT

Matthew 9 in the DGDNT

Matthew 9 in the DHNT

Matthew 9 in the DNT

Matthew 9 in the ELBE

Matthew 9 in the EMTV

Matthew 9 in the ESV

Matthew 9 in the FBV

Matthew 9 in the FEB

Matthew 9 in the GGMNT

Matthew 9 in the GNT

Matthew 9 in the HARY

Matthew 9 in the HNT

Matthew 9 in the IRVA

Matthew 9 in the IRVB

Matthew 9 in the IRVG

Matthew 9 in the IRVH

Matthew 9 in the IRVK

Matthew 9 in the IRVM

Matthew 9 in the IRVM2

Matthew 9 in the IRVO

Matthew 9 in the IRVP

Matthew 9 in the IRVT

Matthew 9 in the IRVT2

Matthew 9 in the IRVU

Matthew 9 in the ISVN

Matthew 9 in the JSNT

Matthew 9 in the KAPI

Matthew 9 in the KBT1ETNIK

Matthew 9 in the KBV

Matthew 9 in the KJV

Matthew 9 in the KNFD

Matthew 9 in the LBA

Matthew 9 in the LBLA

Matthew 9 in the LNT

Matthew 9 in the LSV

Matthew 9 in the MAAL

Matthew 9 in the MBV

Matthew 9 in the MBV2

Matthew 9 in the MHNT

Matthew 9 in the MKNFD

Matthew 9 in the MNG

Matthew 9 in the MNT

Matthew 9 in the MNT2

Matthew 9 in the MRS1T

Matthew 9 in the NAA

Matthew 9 in the NASB

Matthew 9 in the NBLA

Matthew 9 in the NBS

Matthew 9 in the NBVTP

Matthew 9 in the NET2

Matthew 9 in the NIV11

Matthew 9 in the NNT

Matthew 9 in the NNT2

Matthew 9 in the NNT3

Matthew 9 in the PDDPT

Matthew 9 in the PFNT

Matthew 9 in the RMNT

Matthew 9 in the SBIAS

Matthew 9 in the SBIBS

Matthew 9 in the SBIBS2

Matthew 9 in the SBICS

Matthew 9 in the SBIDS

Matthew 9 in the SBIGS

Matthew 9 in the SBIHS

Matthew 9 in the SBIIS

Matthew 9 in the SBIIS2

Matthew 9 in the SBIIS3

Matthew 9 in the SBIKS

Matthew 9 in the SBIKS2

Matthew 9 in the SBIMS

Matthew 9 in the SBIOS

Matthew 9 in the SBIPS

Matthew 9 in the SBISS

Matthew 9 in the SBITS

Matthew 9 in the SBITS2

Matthew 9 in the SBITS3

Matthew 9 in the SBITS4

Matthew 9 in the SBIUS

Matthew 9 in the SBIVS

Matthew 9 in the SBT

Matthew 9 in the SBT1E

Matthew 9 in the SCHL

Matthew 9 in the SNT

Matthew 9 in the SUSU

Matthew 9 in the SUSU2

Matthew 9 in the SYNO

Matthew 9 in the TBIAOTANT

Matthew 9 in the TBT1E

Matthew 9 in the TBT1E2

Matthew 9 in the TFTIP

Matthew 9 in the TFTU

Matthew 9 in the TGNTATF3T

Matthew 9 in the THAI

Matthew 9 in the TNFD

Matthew 9 in the TNT

Matthew 9 in the TNTIK

Matthew 9 in the TNTIL

Matthew 9 in the TNTIN

Matthew 9 in the TNTIP

Matthew 9 in the TNTIZ

Matthew 9 in the TOMA

Matthew 9 in the TTENT

Matthew 9 in the UBG

Matthew 9 in the UGV

Matthew 9 in the UGV2

Matthew 9 in the UGV3

Matthew 9 in the VBL

Matthew 9 in the VDCC

Matthew 9 in the YALU

Matthew 9 in the YAPE

Matthew 9 in the YBVTP

Matthew 9 in the ZBP