Mark 11 (BOLCB2)

1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale, 2 alobaki na bango : — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa. 3 Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? » Bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »Mpe na mbala moko, akotinda yango awa. 4 Bakendeki mpe bakutaki mwana ya ane ekangama na libanda, pembeni ya ekuke ; mpe bafungolaki yango. 5 Ndambo ya bato oyo bazalaki wana batunaki :— Nini ezwi bino mpo ete bofungola mwana oyo ya ane ? 6 Bayekoli bazongiselaki bango ndenge kaka Yesu alobaki na bango, mpe bato yango batikaki bayekoli kokende elongo na yango. 7 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. 8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu batandaki bitape ya mobesu, oyo bawutaki kokata na likolo ya banzete kati na bilanga. 9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga :« Ozana ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! 10 Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama,bokonzi ya Davidi, tata na biso ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! » 11 Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale. 12 Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala. 13 Na mosika, amonaki nzete moko ya figi etonda na makasa ; apusanaki pene na yango mpo na kotala soki ezali na mbuma. Kasi tango akomaki pene, amonaki kaka makasa mpo ete ezalaki eleko ya bambuma ya figi te. 14 Yesu alobaki na nzete yango : « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! »Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango. 15 Tango bakomaki na Yelusalemi, Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe akomaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe kosomba kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga ; 16 mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kotambola kati na lopango ya tempelo ete bamema biloko. 17 Bongo akomaki koteya bango : « Boni, ekomama te : ‹ Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso ? › Kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi ! » 18 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye. 19 Tango pokwa ekomaki, Yesu mpe bayekoli na Ye babimaki na engumba. 20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, wana bazalaki koleka, bamonaki ete nzete ya figi ekawuki kino na misisa. 21 Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu :— Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki ! 22 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Bozala na kondima kati na Nzambe. 23 Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale ; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama. 24 Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama. 25 Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [ 26 Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali kati na Likolo mpe akolimbisa masumu na bino te.] 27 Bakendeki lisusu na Yelusalemi. Wana Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye : 28 — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Mpe nani apesi Yo bokonzi ya kosala yango ? 29 Yesu azongiselaki bango : — Nazali kotuna bino motuna moko kaka. Bopesa Ngai nanu eyano, bongo Ngai nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango. 30 Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Boyebisa Ngai ! 31 Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi ete ewutaki na Nzambe, akotuna biso lisusu : bongo mpo na nini bondimaki ye te ? 32 Soki mpe tolobi ete ewutaki na bato, wana… »Solo, bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli. 33 Boye, bazongiselaki Yesu :— Toyebi te !Yesu mpe alobaki na bango : — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.

In Other Versions

Mark 11 in the ANGEFD

Mark 11 in the ANTPNG2D

Mark 11 in the AS21

Mark 11 in the BAGH

Mark 11 in the BBPNG

Mark 11 in the BBT1E

Mark 11 in the BDS

Mark 11 in the BEV

Mark 11 in the BHAD

Mark 11 in the BIB

Mark 11 in the BLPT

Mark 11 in the BNT

Mark 11 in the BNTABOOT

Mark 11 in the BNTLV

Mark 11 in the BOATCB

Mark 11 in the BOATCB2

Mark 11 in the BOBCV

Mark 11 in the BOCNT

Mark 11 in the BOECS

Mark 11 in the BOGWICC

Mark 11 in the BOHCB

Mark 11 in the BOHCV

Mark 11 in the BOHLNT

Mark 11 in the BOHNTLTAL

Mark 11 in the BOICB

Mark 11 in the BOILNTAP

Mark 11 in the BOITCV

Mark 11 in the BOKCV

Mark 11 in the BOKCV2

Mark 11 in the BOKHWOG

Mark 11 in the BOKSSV

Mark 11 in the BOLCB

Mark 11 in the BOMCV

Mark 11 in the BONAV

Mark 11 in the BONCB

Mark 11 in the BONLT

Mark 11 in the BONUT2

Mark 11 in the BOPLNT

Mark 11 in the BOSCB

Mark 11 in the BOSNC

Mark 11 in the BOTLNT

Mark 11 in the BOVCB

Mark 11 in the BOYCB

Mark 11 in the BPBB

Mark 11 in the BPH

Mark 11 in the BSB

Mark 11 in the CCB

Mark 11 in the CUV

Mark 11 in the CUVS

Mark 11 in the DBT

Mark 11 in the DGDNT

Mark 11 in the DHNT

Mark 11 in the DNT

Mark 11 in the ELBE

Mark 11 in the EMTV

Mark 11 in the ESV

Mark 11 in the FBV

Mark 11 in the FEB

Mark 11 in the GGMNT

Mark 11 in the GNT

Mark 11 in the HARY

Mark 11 in the HNT

Mark 11 in the IRVA

Mark 11 in the IRVB

Mark 11 in the IRVG

Mark 11 in the IRVH

Mark 11 in the IRVK

Mark 11 in the IRVM

Mark 11 in the IRVM2

Mark 11 in the IRVO

Mark 11 in the IRVP

Mark 11 in the IRVT

Mark 11 in the IRVT2

Mark 11 in the IRVU

Mark 11 in the ISVN

Mark 11 in the JSNT

Mark 11 in the KAPI

Mark 11 in the KBT1ETNIK

Mark 11 in the KBV

Mark 11 in the KJV

Mark 11 in the KNFD

Mark 11 in the LBA

Mark 11 in the LBLA

Mark 11 in the LNT

Mark 11 in the LSV

Mark 11 in the MAAL

Mark 11 in the MBV

Mark 11 in the MBV2

Mark 11 in the MHNT

Mark 11 in the MKNFD

Mark 11 in the MNG

Mark 11 in the MNT

Mark 11 in the MNT2

Mark 11 in the MRS1T

Mark 11 in the NAA

Mark 11 in the NASB

Mark 11 in the NBLA

Mark 11 in the NBS

Mark 11 in the NBVTP

Mark 11 in the NET2

Mark 11 in the NIV11

Mark 11 in the NNT

Mark 11 in the NNT2

Mark 11 in the NNT3

Mark 11 in the PDDPT

Mark 11 in the PFNT

Mark 11 in the RMNT

Mark 11 in the SBIAS

Mark 11 in the SBIBS

Mark 11 in the SBIBS2

Mark 11 in the SBICS

Mark 11 in the SBIDS

Mark 11 in the SBIGS

Mark 11 in the SBIHS

Mark 11 in the SBIIS

Mark 11 in the SBIIS2

Mark 11 in the SBIIS3

Mark 11 in the SBIKS

Mark 11 in the SBIKS2

Mark 11 in the SBIMS

Mark 11 in the SBIOS

Mark 11 in the SBIPS

Mark 11 in the SBISS

Mark 11 in the SBITS

Mark 11 in the SBITS2

Mark 11 in the SBITS3

Mark 11 in the SBITS4

Mark 11 in the SBIUS

Mark 11 in the SBIVS

Mark 11 in the SBT

Mark 11 in the SBT1E

Mark 11 in the SCHL

Mark 11 in the SNT

Mark 11 in the SUSU

Mark 11 in the SUSU2

Mark 11 in the SYNO

Mark 11 in the TBIAOTANT

Mark 11 in the TBT1E

Mark 11 in the TBT1E2

Mark 11 in the TFTIP

Mark 11 in the TFTU

Mark 11 in the TGNTATF3T

Mark 11 in the THAI

Mark 11 in the TNFD

Mark 11 in the TNT

Mark 11 in the TNTIK

Mark 11 in the TNTIL

Mark 11 in the TNTIN

Mark 11 in the TNTIP

Mark 11 in the TNTIZ

Mark 11 in the TOMA

Mark 11 in the TTENT

Mark 11 in the UBG

Mark 11 in the UGV

Mark 11 in the UGV2

Mark 11 in the UGV3

Mark 11 in the VBL

Mark 11 in the VDCC

Mark 11 in the YALU

Mark 11 in the YAPE

Mark 11 in the YBVTP

Mark 11 in the ZBP