Mark 14 (BOLCB2)

1 Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ; 2 pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. » 3 Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu. 4 Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki :— Mpo na nini kobebisa malasi oyo na pamba kaka boye ? 5 Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola !Bazalaki kopamela mwasi yango makasi. 6 Kasi Yesu alobaki : — Botika ye ! Mpo na nini kotungisa ye ? Asali Ngai likambo moko ya malamu. 7 Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te. 8 Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai. 9 Nazali koloba na bino penza ya solo : Esika nyonso bakosakola Sango Malamu kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye. 10 Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango. 11 Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu. 12 Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye :— Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ? 13 Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango : — Bokende kati na engumba, bokokutana na moto moko amemi eloku ya mayi ; bolanda ye 14 mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › » 15 Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso. 16 Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika. 17 Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale. 18 Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai. 19 Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga :— Ezali ngai ? 20 Yesu azongisaki : — Ezali moko kati na bino, zomi na mibale, oyo azali kolia sani moko elongo na Ngai. 21 Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te. 22 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki : — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa. 23 Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango. 24 Bongo alobaki na bango : — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele. 25 Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe. 26 Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive. 27 Yesu alobaki na bango : — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. » 28 Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino. 29 Petelo alobaki na Ye :— Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te. 30 Yesu azongiselaki ye : — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. 31 Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki :— Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te.Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko. 32 Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Botikala awa, wana Ngai nakosambela. 33 Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ; 34 alobaki na bango : — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela. 35 Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye. 36 Azalaki kobondela : — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. 37 Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi.Alobaki na Petelo : — Simona, ozali kolala ? Okokaki te kosenzela mpo na ngonga moko ? 38 Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu. 39 Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko. 40 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye. 41 Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu. 42 Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya. 43 Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango. 44 Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. » 45 Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye :— Moteyi !Mpe apesaki Ye beze. 46 Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye. 47 Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi. 48 Yesu alobaki na bango : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? 49 Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama. 50 Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki. 51 Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu ; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye, 52 asundolaki liputa mpe akimaki. 53 Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki. 54 Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto. 55 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ; 56 pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te. 57 Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba : 58 « Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › » 59 Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta. 60 Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna :— Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ? 61 Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te.Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu :— Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ? 62 Yesu azongisaki : — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo. 63 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki :— Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? 64 Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ?Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa. 65 Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye :— Sakola !Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata. 66 Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana, 67 amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye :— Yo mpe ozalaki elongo na Yesu, moto ya Nazareti ! 68 Kasi Petelo awanganaki ; alobaki :— Nayebi te ! Nazali kutu kososola te makambo oyo ozali koloba !Bongo abimaki mpe akendeki kotelema pembeni, na ekuke ya lopango ; mpe soso elelaki. 69 Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana :— Moto oyo azali moko kati na bango ! 70 Petelo awanganaki lisusu.Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo :— Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile. 71 Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe :— Nayebi te moto oyo bozali kolobela ! 72 Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. » Mpe alelaki makasi.

In Other Versions

Mark 14 in the ANGEFD

Mark 14 in the ANTPNG2D

Mark 14 in the AS21

Mark 14 in the BAGH

Mark 14 in the BBPNG

Mark 14 in the BBT1E

Mark 14 in the BDS

Mark 14 in the BEV

Mark 14 in the BHAD

Mark 14 in the BIB

Mark 14 in the BLPT

Mark 14 in the BNT

Mark 14 in the BNTABOOT

Mark 14 in the BNTLV

Mark 14 in the BOATCB

Mark 14 in the BOATCB2

Mark 14 in the BOBCV

Mark 14 in the BOCNT

Mark 14 in the BOECS

Mark 14 in the BOGWICC

Mark 14 in the BOHCB

Mark 14 in the BOHCV

Mark 14 in the BOHLNT

Mark 14 in the BOHNTLTAL

Mark 14 in the BOICB

Mark 14 in the BOILNTAP

Mark 14 in the BOITCV

Mark 14 in the BOKCV

Mark 14 in the BOKCV2

Mark 14 in the BOKHWOG

Mark 14 in the BOKSSV

Mark 14 in the BOLCB

Mark 14 in the BOMCV

Mark 14 in the BONAV

Mark 14 in the BONCB

Mark 14 in the BONLT

Mark 14 in the BONUT2

Mark 14 in the BOPLNT

Mark 14 in the BOSCB

Mark 14 in the BOSNC

Mark 14 in the BOTLNT

Mark 14 in the BOVCB

Mark 14 in the BOYCB

Mark 14 in the BPBB

Mark 14 in the BPH

Mark 14 in the BSB

Mark 14 in the CCB

Mark 14 in the CUV

Mark 14 in the CUVS

Mark 14 in the DBT

Mark 14 in the DGDNT

Mark 14 in the DHNT

Mark 14 in the DNT

Mark 14 in the ELBE

Mark 14 in the EMTV

Mark 14 in the ESV

Mark 14 in the FBV

Mark 14 in the FEB

Mark 14 in the GGMNT

Mark 14 in the GNT

Mark 14 in the HARY

Mark 14 in the HNT

Mark 14 in the IRVA

Mark 14 in the IRVB

Mark 14 in the IRVG

Mark 14 in the IRVH

Mark 14 in the IRVK

Mark 14 in the IRVM

Mark 14 in the IRVM2

Mark 14 in the IRVO

Mark 14 in the IRVP

Mark 14 in the IRVT

Mark 14 in the IRVT2

Mark 14 in the IRVU

Mark 14 in the ISVN

Mark 14 in the JSNT

Mark 14 in the KAPI

Mark 14 in the KBT1ETNIK

Mark 14 in the KBV

Mark 14 in the KJV

Mark 14 in the KNFD

Mark 14 in the LBA

Mark 14 in the LBLA

Mark 14 in the LNT

Mark 14 in the LSV

Mark 14 in the MAAL

Mark 14 in the MBV

Mark 14 in the MBV2

Mark 14 in the MHNT

Mark 14 in the MKNFD

Mark 14 in the MNG

Mark 14 in the MNT

Mark 14 in the MNT2

Mark 14 in the MRS1T

Mark 14 in the NAA

Mark 14 in the NASB

Mark 14 in the NBLA

Mark 14 in the NBS

Mark 14 in the NBVTP

Mark 14 in the NET2

Mark 14 in the NIV11

Mark 14 in the NNT

Mark 14 in the NNT2

Mark 14 in the NNT3

Mark 14 in the PDDPT

Mark 14 in the PFNT

Mark 14 in the RMNT

Mark 14 in the SBIAS

Mark 14 in the SBIBS

Mark 14 in the SBIBS2

Mark 14 in the SBICS

Mark 14 in the SBIDS

Mark 14 in the SBIGS

Mark 14 in the SBIHS

Mark 14 in the SBIIS

Mark 14 in the SBIIS2

Mark 14 in the SBIIS3

Mark 14 in the SBIKS

Mark 14 in the SBIKS2

Mark 14 in the SBIMS

Mark 14 in the SBIOS

Mark 14 in the SBIPS

Mark 14 in the SBISS

Mark 14 in the SBITS

Mark 14 in the SBITS2

Mark 14 in the SBITS3

Mark 14 in the SBITS4

Mark 14 in the SBIUS

Mark 14 in the SBIVS

Mark 14 in the SBT

Mark 14 in the SBT1E

Mark 14 in the SCHL

Mark 14 in the SNT

Mark 14 in the SUSU

Mark 14 in the SUSU2

Mark 14 in the SYNO

Mark 14 in the TBIAOTANT

Mark 14 in the TBT1E

Mark 14 in the TBT1E2

Mark 14 in the TFTIP

Mark 14 in the TFTU

Mark 14 in the TGNTATF3T

Mark 14 in the THAI

Mark 14 in the TNFD

Mark 14 in the TNT

Mark 14 in the TNTIK

Mark 14 in the TNTIL

Mark 14 in the TNTIN

Mark 14 in the TNTIP

Mark 14 in the TNTIZ

Mark 14 in the TOMA

Mark 14 in the TTENT

Mark 14 in the UBG

Mark 14 in the UGV

Mark 14 in the UGV2

Mark 14 in the UGV3

Mark 14 in the VBL

Mark 14 in the VDCC

Mark 14 in the YALU

Mark 14 in the YAPE

Mark 14 in the YBVTP

Mark 14 in the ZBP