Mark 2 (BOLCB2)

1 Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako, 2 bayaki ebele kosangana kati na ndako yango kino esika ezalaki lisusu te, ezala na liboso ya ekuke, mpe Yesu ateyaki bango Sango Malamu. 3 Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli. 4 Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango. 5 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono : — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami. 6 Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema : 7 « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? » 8 Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango : — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ? 9 Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola ? » 10 Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.Bongo alobaki na ebosono : 11 — Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo. 12 Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te ! » 13 Yesu abimaki lisusu mpe akendeki pembeni ya ebale. Bato ebele bayaki epai na Ye mpe ateyaki bango. 14 Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. »Levi atelemaki mpe alandaki Ye. 15 Wana Yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bazalaki kolia mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye ; pamba te bato ebele penza bazalaki kolanda Ye. 16 Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye :— Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ? 17 Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango : — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu. 18 Nzokande bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bazalaki kokila bilei. Bongo bato bayaki kotuna Yesu :— Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ? 19 Yesu azongiselaki bango : — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te. 20 Kasi tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei. 21 Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala mpe ekosala lidusu ya monene koleka. 22 Moto moko te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala, noki te vino ya sika ekopasola bambeki ; vino ekosopana mpe bambeki ekopasuka. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ! 23 Ezalaki mokolo moko, Yesu azalaki kotambola kati na elanga ya ble ; ezalaki mokolo ya Saba. Wana bazalaki kotambola, bayekoli na Ye bazalaki kobuka ble. 24 Bafarizeo balobaki na Yesu :— Mpo na nini bayekoli na Yo bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ? 25 Yesu azongiselaki bango : — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei ? 26 Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye ; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango. 27 Bongo alobaki na bango lisusu : — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba. 28 Yango wana, Mwana na Moto azali mpe Mokonzi ya mokolo ya Saba.

In Other Versions

Mark 2 in the ANGEFD

Mark 2 in the ANTPNG2D

Mark 2 in the AS21

Mark 2 in the BAGH

Mark 2 in the BBPNG

Mark 2 in the BBT1E

Mark 2 in the BDS

Mark 2 in the BEV

Mark 2 in the BHAD

Mark 2 in the BIB

Mark 2 in the BLPT

Mark 2 in the BNT

Mark 2 in the BNTABOOT

Mark 2 in the BNTLV

Mark 2 in the BOATCB

Mark 2 in the BOATCB2

Mark 2 in the BOBCV

Mark 2 in the BOCNT

Mark 2 in the BOECS

Mark 2 in the BOGWICC

Mark 2 in the BOHCB

Mark 2 in the BOHCV

Mark 2 in the BOHLNT

Mark 2 in the BOHNTLTAL

Mark 2 in the BOICB

Mark 2 in the BOILNTAP

Mark 2 in the BOITCV

Mark 2 in the BOKCV

Mark 2 in the BOKCV2

Mark 2 in the BOKHWOG

Mark 2 in the BOKSSV

Mark 2 in the BOLCB

Mark 2 in the BOMCV

Mark 2 in the BONAV

Mark 2 in the BONCB

Mark 2 in the BONLT

Mark 2 in the BONUT2

Mark 2 in the BOPLNT

Mark 2 in the BOSCB

Mark 2 in the BOSNC

Mark 2 in the BOTLNT

Mark 2 in the BOVCB

Mark 2 in the BOYCB

Mark 2 in the BPBB

Mark 2 in the BPH

Mark 2 in the BSB

Mark 2 in the CCB

Mark 2 in the CUV

Mark 2 in the CUVS

Mark 2 in the DBT

Mark 2 in the DGDNT

Mark 2 in the DHNT

Mark 2 in the DNT

Mark 2 in the ELBE

Mark 2 in the EMTV

Mark 2 in the ESV

Mark 2 in the FBV

Mark 2 in the FEB

Mark 2 in the GGMNT

Mark 2 in the GNT

Mark 2 in the HARY

Mark 2 in the HNT

Mark 2 in the IRVA

Mark 2 in the IRVB

Mark 2 in the IRVG

Mark 2 in the IRVH

Mark 2 in the IRVK

Mark 2 in the IRVM

Mark 2 in the IRVM2

Mark 2 in the IRVO

Mark 2 in the IRVP

Mark 2 in the IRVT

Mark 2 in the IRVT2

Mark 2 in the IRVU

Mark 2 in the ISVN

Mark 2 in the JSNT

Mark 2 in the KAPI

Mark 2 in the KBT1ETNIK

Mark 2 in the KBV

Mark 2 in the KJV

Mark 2 in the KNFD

Mark 2 in the LBA

Mark 2 in the LBLA

Mark 2 in the LNT

Mark 2 in the LSV

Mark 2 in the MAAL

Mark 2 in the MBV

Mark 2 in the MBV2

Mark 2 in the MHNT

Mark 2 in the MKNFD

Mark 2 in the MNG

Mark 2 in the MNT

Mark 2 in the MNT2

Mark 2 in the MRS1T

Mark 2 in the NAA

Mark 2 in the NASB

Mark 2 in the NBLA

Mark 2 in the NBS

Mark 2 in the NBVTP

Mark 2 in the NET2

Mark 2 in the NIV11

Mark 2 in the NNT

Mark 2 in the NNT2

Mark 2 in the NNT3

Mark 2 in the PDDPT

Mark 2 in the PFNT

Mark 2 in the RMNT

Mark 2 in the SBIAS

Mark 2 in the SBIBS

Mark 2 in the SBIBS2

Mark 2 in the SBICS

Mark 2 in the SBIDS

Mark 2 in the SBIGS

Mark 2 in the SBIHS

Mark 2 in the SBIIS

Mark 2 in the SBIIS2

Mark 2 in the SBIIS3

Mark 2 in the SBIKS

Mark 2 in the SBIKS2

Mark 2 in the SBIMS

Mark 2 in the SBIOS

Mark 2 in the SBIPS

Mark 2 in the SBISS

Mark 2 in the SBITS

Mark 2 in the SBITS2

Mark 2 in the SBITS3

Mark 2 in the SBITS4

Mark 2 in the SBIUS

Mark 2 in the SBIVS

Mark 2 in the SBT

Mark 2 in the SBT1E

Mark 2 in the SCHL

Mark 2 in the SNT

Mark 2 in the SUSU

Mark 2 in the SUSU2

Mark 2 in the SYNO

Mark 2 in the TBIAOTANT

Mark 2 in the TBT1E

Mark 2 in the TBT1E2

Mark 2 in the TFTIP

Mark 2 in the TFTU

Mark 2 in the TGNTATF3T

Mark 2 in the THAI

Mark 2 in the TNFD

Mark 2 in the TNT

Mark 2 in the TNTIK

Mark 2 in the TNTIL

Mark 2 in the TNTIN

Mark 2 in the TNTIP

Mark 2 in the TNTIZ

Mark 2 in the TOMA

Mark 2 in the TTENT

Mark 2 in the UBG

Mark 2 in the UGV

Mark 2 in the UGV2

Mark 2 in the UGV3

Mark 2 in the VBL

Mark 2 in the VDCC

Mark 2 in the YALU

Mark 2 in the YAPE

Mark 2 in the YBVTP

Mark 2 in the ZBP