Mark 9 (BOLCB2)

1 Yesu alobaki na bango lisusu : — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya. 2 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango : 3 bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana. 4 Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu. 5 Petelo alobaki na Yesu :— Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. 6 Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga. 7 Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango :— Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye ! 8 Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu. 9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi. 10 Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana :— Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ? 11 Bayekoli batunaki Yesu :— Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ? 12 Yesu azongiselaki bango : — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ? 13 Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye. 14 Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli. 15 Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote. 16 Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli ? 17 Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye :— Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te. 18 Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te. 19 Yesu alobaki na bango : — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango. 20 Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko. 21 Yesu atunaki tata ya mwana : — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ?Tata ya mwana azongisaki :— Wuta tango azalaki mwana moke penza. 22 Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso. 23 Yesu alobaki na ye : — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima. 24 Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi :— Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima. 25 Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye. 26 Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi ! » 27 Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki. 28 Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye :— Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ? 29 Yesu azongisaki : — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo. 30 Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali, 31 pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango : — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa. 32 Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango. 33 Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango : — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ? 34 Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. 35 Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso. 36 Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango : 37 — Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai. 38 Yoane alobaki :— Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te. 39 Kasi Yesu azongisaki : — Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai. 40 Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso. 41 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye. 42 Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale. 43 Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [ 44 epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.] 45 Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [ 46 epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.] 47 Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo 48 epai wapi nkusu ekufaka te, mpe moto ekufaka te. 49 Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa. 50 Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.

In Other Versions

Mark 9 in the ANGEFD

Mark 9 in the ANTPNG2D

Mark 9 in the AS21

Mark 9 in the BAGH

Mark 9 in the BBPNG

Mark 9 in the BBT1E

Mark 9 in the BDS

Mark 9 in the BEV

Mark 9 in the BHAD

Mark 9 in the BIB

Mark 9 in the BLPT

Mark 9 in the BNT

Mark 9 in the BNTABOOT

Mark 9 in the BNTLV

Mark 9 in the BOATCB

Mark 9 in the BOATCB2

Mark 9 in the BOBCV

Mark 9 in the BOCNT

Mark 9 in the BOECS

Mark 9 in the BOGWICC

Mark 9 in the BOHCB

Mark 9 in the BOHCV

Mark 9 in the BOHLNT

Mark 9 in the BOHNTLTAL

Mark 9 in the BOICB

Mark 9 in the BOILNTAP

Mark 9 in the BOITCV

Mark 9 in the BOKCV

Mark 9 in the BOKCV2

Mark 9 in the BOKHWOG

Mark 9 in the BOKSSV

Mark 9 in the BOLCB

Mark 9 in the BOMCV

Mark 9 in the BONAV

Mark 9 in the BONCB

Mark 9 in the BONLT

Mark 9 in the BONUT2

Mark 9 in the BOPLNT

Mark 9 in the BOSCB

Mark 9 in the BOSNC

Mark 9 in the BOTLNT

Mark 9 in the BOVCB

Mark 9 in the BOYCB

Mark 9 in the BPBB

Mark 9 in the BPH

Mark 9 in the BSB

Mark 9 in the CCB

Mark 9 in the CUV

Mark 9 in the CUVS

Mark 9 in the DBT

Mark 9 in the DGDNT

Mark 9 in the DHNT

Mark 9 in the DNT

Mark 9 in the ELBE

Mark 9 in the EMTV

Mark 9 in the ESV

Mark 9 in the FBV

Mark 9 in the FEB

Mark 9 in the GGMNT

Mark 9 in the GNT

Mark 9 in the HARY

Mark 9 in the HNT

Mark 9 in the IRVA

Mark 9 in the IRVB

Mark 9 in the IRVG

Mark 9 in the IRVH

Mark 9 in the IRVK

Mark 9 in the IRVM

Mark 9 in the IRVM2

Mark 9 in the IRVO

Mark 9 in the IRVP

Mark 9 in the IRVT

Mark 9 in the IRVT2

Mark 9 in the IRVU

Mark 9 in the ISVN

Mark 9 in the JSNT

Mark 9 in the KAPI

Mark 9 in the KBT1ETNIK

Mark 9 in the KBV

Mark 9 in the KJV

Mark 9 in the KNFD

Mark 9 in the LBA

Mark 9 in the LBLA

Mark 9 in the LNT

Mark 9 in the LSV

Mark 9 in the MAAL

Mark 9 in the MBV

Mark 9 in the MBV2

Mark 9 in the MHNT

Mark 9 in the MKNFD

Mark 9 in the MNG

Mark 9 in the MNT

Mark 9 in the MNT2

Mark 9 in the MRS1T

Mark 9 in the NAA

Mark 9 in the NASB

Mark 9 in the NBLA

Mark 9 in the NBS

Mark 9 in the NBVTP

Mark 9 in the NET2

Mark 9 in the NIV11

Mark 9 in the NNT

Mark 9 in the NNT2

Mark 9 in the NNT3

Mark 9 in the PDDPT

Mark 9 in the PFNT

Mark 9 in the RMNT

Mark 9 in the SBIAS

Mark 9 in the SBIBS

Mark 9 in the SBIBS2

Mark 9 in the SBICS

Mark 9 in the SBIDS

Mark 9 in the SBIGS

Mark 9 in the SBIHS

Mark 9 in the SBIIS

Mark 9 in the SBIIS2

Mark 9 in the SBIIS3

Mark 9 in the SBIKS

Mark 9 in the SBIKS2

Mark 9 in the SBIMS

Mark 9 in the SBIOS

Mark 9 in the SBIPS

Mark 9 in the SBISS

Mark 9 in the SBITS

Mark 9 in the SBITS2

Mark 9 in the SBITS3

Mark 9 in the SBITS4

Mark 9 in the SBIUS

Mark 9 in the SBIVS

Mark 9 in the SBT

Mark 9 in the SBT1E

Mark 9 in the SCHL

Mark 9 in the SNT

Mark 9 in the SUSU

Mark 9 in the SUSU2

Mark 9 in the SYNO

Mark 9 in the TBIAOTANT

Mark 9 in the TBT1E

Mark 9 in the TBT1E2

Mark 9 in the TFTIP

Mark 9 in the TFTU

Mark 9 in the TGNTATF3T

Mark 9 in the THAI

Mark 9 in the TNFD

Mark 9 in the TNT

Mark 9 in the TNTIK

Mark 9 in the TNTIL

Mark 9 in the TNTIN

Mark 9 in the TNTIP

Mark 9 in the TNTIZ

Mark 9 in the TOMA

Mark 9 in the TTENT

Mark 9 in the UBG

Mark 9 in the UGV

Mark 9 in the UGV2

Mark 9 in the UGV3

Mark 9 in the VBL

Mark 9 in the VDCC

Mark 9 in the YALU

Mark 9 in the YAPE

Mark 9 in the YBVTP

Mark 9 in the ZBP