Numbers 20 (BOLCB2)

1 Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye. 2 Nzokande esika yango ezalaki na mayi ya komela te mpo na lisanga ya Isalaele, mpe bato basanganaki mpo na kotombokela Moyize mpe Aron. 3 Baswanisaki Moyize mpe balobaki : « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe ! 4 Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo ? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa ? 5 Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela ? » 6 Moyize mpe Aron babimaki kati ya lingomba mpe bakendeki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bakweyaki elongi kino na mabele, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bango. 7 Yawe alobaki na Moyize : 8 « Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. » 9 Moyize azwaki lingenda oyo ezalaki liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye. 10 Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango : « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo ? » 11 Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki. 12 Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. » 13 Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango. 14 Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki :— Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso. 15 Bakoko na biso bakendeki na Ejipito mpe tokomaki kovanda kuna mibu ebele. Bato ya Ejipito banyokolaki biso elongo na bakoko na biso ; 16 kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito.Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo. 17 Tobondeli yo, tika biso tolekela na mboka na yo. Tokokota na elanga to na elanga ya vino moko te mpe tokomela mayi ya mabulu na bino te. Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene ya mokonzi bongo, tokokatisa ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi te, kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. » 18 Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye :— Okoki kolekela na mokili na ngai te ; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga. 19 Bana ya Isalaele bazongiselaki ye :— Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene mpe soki biso to bibwele na biso tomeli mayi na bino, tokofuta yango. Tolingi kaka eloko moko, eloko mosusu te : toleka kaka na makolo. 20 Azongiselaki bango lisusu :— Bokoki kolekela awa te.Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele. 21 Lokola Edomi eboyaki ete bana ya Isalaele balekela na etuka na yango, bana ya Isalaele bazwaki nzela mosusu. 22 Lisanga mobimba ya Isalaele babimaki wuta na Kadeshi mpe bakomaki kino na ngomba Ori. 23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na ngomba Ori, pembeni ya mondelo ya Edomi : 24 « Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba. 25 Kamata Aron na Eleazari, mwana na ye ya mobali mpe mema bango likolo ya ngomba Ori. 26 Longola Aron bilamba na ye mpe latisa yango Eleazari, mwana na ye ya mobali, pamba te Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, akokufa kuna. » 27 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki : bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba. 28 Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba ; 29 mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.

In Other Versions

Numbers 20 in the ANGEFD

Numbers 20 in the ANTPNG2D

Numbers 20 in the AS21

Numbers 20 in the BAGH

Numbers 20 in the BBPNG

Numbers 20 in the BBT1E

Numbers 20 in the BDS

Numbers 20 in the BEV

Numbers 20 in the BHAD

Numbers 20 in the BIB

Numbers 20 in the BLPT

Numbers 20 in the BNT

Numbers 20 in the BNTABOOT

Numbers 20 in the BNTLV

Numbers 20 in the BOATCB

Numbers 20 in the BOATCB2

Numbers 20 in the BOBCV

Numbers 20 in the BOCNT

Numbers 20 in the BOECS

Numbers 20 in the BOGWICC

Numbers 20 in the BOHCB

Numbers 20 in the BOHCV

Numbers 20 in the BOHLNT

Numbers 20 in the BOHNTLTAL

Numbers 20 in the BOICB

Numbers 20 in the BOILNTAP

Numbers 20 in the BOITCV

Numbers 20 in the BOKCV

Numbers 20 in the BOKCV2

Numbers 20 in the BOKHWOG

Numbers 20 in the BOKSSV

Numbers 20 in the BOLCB

Numbers 20 in the BOMCV

Numbers 20 in the BONAV

Numbers 20 in the BONCB

Numbers 20 in the BONLT

Numbers 20 in the BONUT2

Numbers 20 in the BOPLNT

Numbers 20 in the BOSCB

Numbers 20 in the BOSNC

Numbers 20 in the BOTLNT

Numbers 20 in the BOVCB

Numbers 20 in the BOYCB

Numbers 20 in the BPBB

Numbers 20 in the BPH

Numbers 20 in the BSB

Numbers 20 in the CCB

Numbers 20 in the CUV

Numbers 20 in the CUVS

Numbers 20 in the DBT

Numbers 20 in the DGDNT

Numbers 20 in the DHNT

Numbers 20 in the DNT

Numbers 20 in the ELBE

Numbers 20 in the EMTV

Numbers 20 in the ESV

Numbers 20 in the FBV

Numbers 20 in the FEB

Numbers 20 in the GGMNT

Numbers 20 in the GNT

Numbers 20 in the HARY

Numbers 20 in the HNT

Numbers 20 in the IRVA

Numbers 20 in the IRVB

Numbers 20 in the IRVG

Numbers 20 in the IRVH

Numbers 20 in the IRVK

Numbers 20 in the IRVM

Numbers 20 in the IRVM2

Numbers 20 in the IRVO

Numbers 20 in the IRVP

Numbers 20 in the IRVT

Numbers 20 in the IRVT2

Numbers 20 in the IRVU

Numbers 20 in the ISVN

Numbers 20 in the JSNT

Numbers 20 in the KAPI

Numbers 20 in the KBT1ETNIK

Numbers 20 in the KBV

Numbers 20 in the KJV

Numbers 20 in the KNFD

Numbers 20 in the LBA

Numbers 20 in the LBLA

Numbers 20 in the LNT

Numbers 20 in the LSV

Numbers 20 in the MAAL

Numbers 20 in the MBV

Numbers 20 in the MBV2

Numbers 20 in the MHNT

Numbers 20 in the MKNFD

Numbers 20 in the MNG

Numbers 20 in the MNT

Numbers 20 in the MNT2

Numbers 20 in the MRS1T

Numbers 20 in the NAA

Numbers 20 in the NASB

Numbers 20 in the NBLA

Numbers 20 in the NBS

Numbers 20 in the NBVTP

Numbers 20 in the NET2

Numbers 20 in the NIV11

Numbers 20 in the NNT

Numbers 20 in the NNT2

Numbers 20 in the NNT3

Numbers 20 in the PDDPT

Numbers 20 in the PFNT

Numbers 20 in the RMNT

Numbers 20 in the SBIAS

Numbers 20 in the SBIBS

Numbers 20 in the SBIBS2

Numbers 20 in the SBICS

Numbers 20 in the SBIDS

Numbers 20 in the SBIGS

Numbers 20 in the SBIHS

Numbers 20 in the SBIIS

Numbers 20 in the SBIIS2

Numbers 20 in the SBIIS3

Numbers 20 in the SBIKS

Numbers 20 in the SBIKS2

Numbers 20 in the SBIMS

Numbers 20 in the SBIOS

Numbers 20 in the SBIPS

Numbers 20 in the SBISS

Numbers 20 in the SBITS

Numbers 20 in the SBITS2

Numbers 20 in the SBITS3

Numbers 20 in the SBITS4

Numbers 20 in the SBIUS

Numbers 20 in the SBIVS

Numbers 20 in the SBT

Numbers 20 in the SBT1E

Numbers 20 in the SCHL

Numbers 20 in the SNT

Numbers 20 in the SUSU

Numbers 20 in the SUSU2

Numbers 20 in the SYNO

Numbers 20 in the TBIAOTANT

Numbers 20 in the TBT1E

Numbers 20 in the TBT1E2

Numbers 20 in the TFTIP

Numbers 20 in the TFTU

Numbers 20 in the TGNTATF3T

Numbers 20 in the THAI

Numbers 20 in the TNFD

Numbers 20 in the TNT

Numbers 20 in the TNTIK

Numbers 20 in the TNTIL

Numbers 20 in the TNTIN

Numbers 20 in the TNTIP

Numbers 20 in the TNTIZ

Numbers 20 in the TOMA

Numbers 20 in the TTENT

Numbers 20 in the UBG

Numbers 20 in the UGV

Numbers 20 in the UGV2

Numbers 20 in the UGV3

Numbers 20 in the VBL

Numbers 20 in the VDCC

Numbers 20 in the YALU

Numbers 20 in the YAPE

Numbers 20 in the YBVTP

Numbers 20 in the ZBP