Numbers 24 (BOLCB2)

1 Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe. 2 Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ; 3 mpe akomaki koloba maloba oyo :« Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori,maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele, 4 maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe,oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo : 5 ‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko,mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele ! 6 Epanzana lokola miluka ya mike-mike,lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale,lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona,lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi. 7 Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango,bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi,bokonzi na bango ekozala ya lokumu. 8 Nzambe abimisaki bango na Ejipito,bazalaka makasi lokola mpakasa,babebisaka bikolo oyo ebundisaka bangompe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni,batobolaka yango na makonga na bango. 9 Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali,lokola nkosi ya mwasi ;nani akokoka kotelemisa bango ? Tika ete oyo akopambola yo apambolama,mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › » 10 Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki :— Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato. 11 Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango. 12 Balami azongiselaki Balaki :— Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete 13 « Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. » 14 Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya. 15 Bongo Balami alobaki maloba oyo :« Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori,maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele, 16 oyo ayokaka maloba na Nzambe,oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso,oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka : 17 ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ;natali ye, kasi na pembeni te.Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi,mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele.Akotobola mito ya bato ya Moabimpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti. 18 Bakobotola mokili ya Edomi,bakobotola Seiri, monguna na ye,kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka. 19 Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi,mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › » 20 Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo :« Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo,kasi ekosuka na libebi. » 21 Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo :« Esika na yo ya kovanda ezali makasi,zala na yo ezalaka kati na mabanga ; 22 kasi bino bato ya Keni, bokobebisamatango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. » 23 Mpe na suka, alobaki maloba oyo :« Oh mawa ! Nani akoki kozala na bomoi,wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye ? 24 Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi,bakonyokola Ashuri mpe Eberi,kasi bango moko mpe bakobebisama. » 25 Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.

In Other Versions

Numbers 24 in the ANGEFD

Numbers 24 in the ANTPNG2D

Numbers 24 in the AS21

Numbers 24 in the BAGH

Numbers 24 in the BBPNG

Numbers 24 in the BBT1E

Numbers 24 in the BDS

Numbers 24 in the BEV

Numbers 24 in the BHAD

Numbers 24 in the BIB

Numbers 24 in the BLPT

Numbers 24 in the BNT

Numbers 24 in the BNTABOOT

Numbers 24 in the BNTLV

Numbers 24 in the BOATCB

Numbers 24 in the BOATCB2

Numbers 24 in the BOBCV

Numbers 24 in the BOCNT

Numbers 24 in the BOECS

Numbers 24 in the BOGWICC

Numbers 24 in the BOHCB

Numbers 24 in the BOHCV

Numbers 24 in the BOHLNT

Numbers 24 in the BOHNTLTAL

Numbers 24 in the BOICB

Numbers 24 in the BOILNTAP

Numbers 24 in the BOITCV

Numbers 24 in the BOKCV

Numbers 24 in the BOKCV2

Numbers 24 in the BOKHWOG

Numbers 24 in the BOKSSV

Numbers 24 in the BOLCB

Numbers 24 in the BOMCV

Numbers 24 in the BONAV

Numbers 24 in the BONCB

Numbers 24 in the BONLT

Numbers 24 in the BONUT2

Numbers 24 in the BOPLNT

Numbers 24 in the BOSCB

Numbers 24 in the BOSNC

Numbers 24 in the BOTLNT

Numbers 24 in the BOVCB

Numbers 24 in the BOYCB

Numbers 24 in the BPBB

Numbers 24 in the BPH

Numbers 24 in the BSB

Numbers 24 in the CCB

Numbers 24 in the CUV

Numbers 24 in the CUVS

Numbers 24 in the DBT

Numbers 24 in the DGDNT

Numbers 24 in the DHNT

Numbers 24 in the DNT

Numbers 24 in the ELBE

Numbers 24 in the EMTV

Numbers 24 in the ESV

Numbers 24 in the FBV

Numbers 24 in the FEB

Numbers 24 in the GGMNT

Numbers 24 in the GNT

Numbers 24 in the HARY

Numbers 24 in the HNT

Numbers 24 in the IRVA

Numbers 24 in the IRVB

Numbers 24 in the IRVG

Numbers 24 in the IRVH

Numbers 24 in the IRVK

Numbers 24 in the IRVM

Numbers 24 in the IRVM2

Numbers 24 in the IRVO

Numbers 24 in the IRVP

Numbers 24 in the IRVT

Numbers 24 in the IRVT2

Numbers 24 in the IRVU

Numbers 24 in the ISVN

Numbers 24 in the JSNT

Numbers 24 in the KAPI

Numbers 24 in the KBT1ETNIK

Numbers 24 in the KBV

Numbers 24 in the KJV

Numbers 24 in the KNFD

Numbers 24 in the LBA

Numbers 24 in the LBLA

Numbers 24 in the LNT

Numbers 24 in the LSV

Numbers 24 in the MAAL

Numbers 24 in the MBV

Numbers 24 in the MBV2

Numbers 24 in the MHNT

Numbers 24 in the MKNFD

Numbers 24 in the MNG

Numbers 24 in the MNT

Numbers 24 in the MNT2

Numbers 24 in the MRS1T

Numbers 24 in the NAA

Numbers 24 in the NASB

Numbers 24 in the NBLA

Numbers 24 in the NBS

Numbers 24 in the NBVTP

Numbers 24 in the NET2

Numbers 24 in the NIV11

Numbers 24 in the NNT

Numbers 24 in the NNT2

Numbers 24 in the NNT3

Numbers 24 in the PDDPT

Numbers 24 in the PFNT

Numbers 24 in the RMNT

Numbers 24 in the SBIAS

Numbers 24 in the SBIBS

Numbers 24 in the SBIBS2

Numbers 24 in the SBICS

Numbers 24 in the SBIDS

Numbers 24 in the SBIGS

Numbers 24 in the SBIHS

Numbers 24 in the SBIIS

Numbers 24 in the SBIIS2

Numbers 24 in the SBIIS3

Numbers 24 in the SBIKS

Numbers 24 in the SBIKS2

Numbers 24 in the SBIMS

Numbers 24 in the SBIOS

Numbers 24 in the SBIPS

Numbers 24 in the SBISS

Numbers 24 in the SBITS

Numbers 24 in the SBITS2

Numbers 24 in the SBITS3

Numbers 24 in the SBITS4

Numbers 24 in the SBIUS

Numbers 24 in the SBIVS

Numbers 24 in the SBT

Numbers 24 in the SBT1E

Numbers 24 in the SCHL

Numbers 24 in the SNT

Numbers 24 in the SUSU

Numbers 24 in the SUSU2

Numbers 24 in the SYNO

Numbers 24 in the TBIAOTANT

Numbers 24 in the TBT1E

Numbers 24 in the TBT1E2

Numbers 24 in the TFTIP

Numbers 24 in the TFTU

Numbers 24 in the TGNTATF3T

Numbers 24 in the THAI

Numbers 24 in the TNFD

Numbers 24 in the TNT

Numbers 24 in the TNTIK

Numbers 24 in the TNTIL

Numbers 24 in the TNTIN

Numbers 24 in the TNTIP

Numbers 24 in the TNTIZ

Numbers 24 in the TOMA

Numbers 24 in the TTENT

Numbers 24 in the UBG

Numbers 24 in the UGV

Numbers 24 in the UGV2

Numbers 24 in the UGV3

Numbers 24 in the VBL

Numbers 24 in the VDCC

Numbers 24 in the YALU

Numbers 24 in the YAPE

Numbers 24 in the YBVTP

Numbers 24 in the ZBP