Numbers 6 (BOLCB2)

1 Yawe alobaki na Moyize : 2 « Yebisa bana ya Isalaele : Mobali to mwasi oyo amibulisi mpo na Yawe na nzela ya ndayi ya libulisi 3 asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka ; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka. 4 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, asengeli te kolia eloko nyonso oyo basala na bambuma ya vino, kobanda na mokokoli kino na poso. 5 Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila ; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola. 6 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe ; 7 ezala mpo na kufa ya tata na ye, ya mama na ye, ya ndeko na ye ya mobali to ya ndeko na ye ya mwasi, asengeli te komikomisa mbindo ; pamba te na moto na ye, azali na elembo ya libulisi mpo na Nzambe. 8 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe. 9 Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama. 10 Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani : bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka. 11 Nganga-Nzambe akobonza moko lokola mbeka mpo na masumu mpe mosusu, lokola mbeka ya kotumba ; akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye lokola asimbaki ebembe. Kaka na mokolo yango, akobulisa lisusu moto na ye epai na Yawe. 12 Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko ; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo. 13 Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani 14 epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe : mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba ; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu ; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; 15 kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta ; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu. 16 Nganga-Nzambe akomema makabo wana nyonso liboso ya Yawe ; akobonza mbeka na ye mpo na masumu mpe mbeka na ye ya kotumba ; 17 akobonza lisusu epai na Yawe meme ya mobali lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, elongo na kitunga ya mapa ezanga levire. Nganga-Nzambe akobakisa na likolo na yango mbeka na ye ya masanga mpe makabo na ye mosusu. 18 Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye ; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani. 19 Nganga-Nzambe akozwa lipeka ya mbeka ya meme ya mobali tango esili kozika ; akozwa lisusu, kati na kitunga, lipa moko ezanga levire mpe galeti moko ezanga levire, akotia yango na maboko ya moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe sima na ye kokata suki ya moto na ye mpe mandefu na ye. 20 Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende. 21 Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › » 22 Yawe alobaki na Moyize : 23 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala ndenge nini bokobanda kopambola bana ya Isalaele, bokoloba : 24 ‘ Tika ete Yawe apambola yompe abatela yo ! 25 Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Yempe apesa yo ngolu na Ye ! 26 Tika ete Yawe amona yompe apesa yo kimia ! ’ › 27 Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. »

In Other Versions

Numbers 6 in the ANGEFD

Numbers 6 in the ANTPNG2D

Numbers 6 in the AS21

Numbers 6 in the BAGH

Numbers 6 in the BBPNG

Numbers 6 in the BBT1E

Numbers 6 in the BDS

Numbers 6 in the BEV

Numbers 6 in the BHAD

Numbers 6 in the BIB

Numbers 6 in the BLPT

Numbers 6 in the BNT

Numbers 6 in the BNTABOOT

Numbers 6 in the BNTLV

Numbers 6 in the BOATCB

Numbers 6 in the BOATCB2

Numbers 6 in the BOBCV

Numbers 6 in the BOCNT

Numbers 6 in the BOECS

Numbers 6 in the BOGWICC

Numbers 6 in the BOHCB

Numbers 6 in the BOHCV

Numbers 6 in the BOHLNT

Numbers 6 in the BOHNTLTAL

Numbers 6 in the BOICB

Numbers 6 in the BOILNTAP

Numbers 6 in the BOITCV

Numbers 6 in the BOKCV

Numbers 6 in the BOKCV2

Numbers 6 in the BOKHWOG

Numbers 6 in the BOKSSV

Numbers 6 in the BOLCB

Numbers 6 in the BOMCV

Numbers 6 in the BONAV

Numbers 6 in the BONCB

Numbers 6 in the BONLT

Numbers 6 in the BONUT2

Numbers 6 in the BOPLNT

Numbers 6 in the BOSCB

Numbers 6 in the BOSNC

Numbers 6 in the BOTLNT

Numbers 6 in the BOVCB

Numbers 6 in the BOYCB

Numbers 6 in the BPBB

Numbers 6 in the BPH

Numbers 6 in the BSB

Numbers 6 in the CCB

Numbers 6 in the CUV

Numbers 6 in the CUVS

Numbers 6 in the DBT

Numbers 6 in the DGDNT

Numbers 6 in the DHNT

Numbers 6 in the DNT

Numbers 6 in the ELBE

Numbers 6 in the EMTV

Numbers 6 in the ESV

Numbers 6 in the FBV

Numbers 6 in the FEB

Numbers 6 in the GGMNT

Numbers 6 in the GNT

Numbers 6 in the HARY

Numbers 6 in the HNT

Numbers 6 in the IRVA

Numbers 6 in the IRVB

Numbers 6 in the IRVG

Numbers 6 in the IRVH

Numbers 6 in the IRVK

Numbers 6 in the IRVM

Numbers 6 in the IRVM2

Numbers 6 in the IRVO

Numbers 6 in the IRVP

Numbers 6 in the IRVT

Numbers 6 in the IRVT2

Numbers 6 in the IRVU

Numbers 6 in the ISVN

Numbers 6 in the JSNT

Numbers 6 in the KAPI

Numbers 6 in the KBT1ETNIK

Numbers 6 in the KBV

Numbers 6 in the KJV

Numbers 6 in the KNFD

Numbers 6 in the LBA

Numbers 6 in the LBLA

Numbers 6 in the LNT

Numbers 6 in the LSV

Numbers 6 in the MAAL

Numbers 6 in the MBV

Numbers 6 in the MBV2

Numbers 6 in the MHNT

Numbers 6 in the MKNFD

Numbers 6 in the MNG

Numbers 6 in the MNT

Numbers 6 in the MNT2

Numbers 6 in the MRS1T

Numbers 6 in the NAA

Numbers 6 in the NASB

Numbers 6 in the NBLA

Numbers 6 in the NBS

Numbers 6 in the NBVTP

Numbers 6 in the NET2

Numbers 6 in the NIV11

Numbers 6 in the NNT

Numbers 6 in the NNT2

Numbers 6 in the NNT3

Numbers 6 in the PDDPT

Numbers 6 in the PFNT

Numbers 6 in the RMNT

Numbers 6 in the SBIAS

Numbers 6 in the SBIBS

Numbers 6 in the SBIBS2

Numbers 6 in the SBICS

Numbers 6 in the SBIDS

Numbers 6 in the SBIGS

Numbers 6 in the SBIHS

Numbers 6 in the SBIIS

Numbers 6 in the SBIIS2

Numbers 6 in the SBIIS3

Numbers 6 in the SBIKS

Numbers 6 in the SBIKS2

Numbers 6 in the SBIMS

Numbers 6 in the SBIOS

Numbers 6 in the SBIPS

Numbers 6 in the SBISS

Numbers 6 in the SBITS

Numbers 6 in the SBITS2

Numbers 6 in the SBITS3

Numbers 6 in the SBITS4

Numbers 6 in the SBIUS

Numbers 6 in the SBIVS

Numbers 6 in the SBT

Numbers 6 in the SBT1E

Numbers 6 in the SCHL

Numbers 6 in the SNT

Numbers 6 in the SUSU

Numbers 6 in the SUSU2

Numbers 6 in the SYNO

Numbers 6 in the TBIAOTANT

Numbers 6 in the TBT1E

Numbers 6 in the TBT1E2

Numbers 6 in the TFTIP

Numbers 6 in the TFTU

Numbers 6 in the TGNTATF3T

Numbers 6 in the THAI

Numbers 6 in the TNFD

Numbers 6 in the TNT

Numbers 6 in the TNTIK

Numbers 6 in the TNTIL

Numbers 6 in the TNTIN

Numbers 6 in the TNTIP

Numbers 6 in the TNTIZ

Numbers 6 in the TOMA

Numbers 6 in the TTENT

Numbers 6 in the UBG

Numbers 6 in the UGV

Numbers 6 in the UGV2

Numbers 6 in the UGV3

Numbers 6 in the VBL

Numbers 6 in the VDCC

Numbers 6 in the YALU

Numbers 6 in the YAPE

Numbers 6 in the YBVTP

Numbers 6 in the ZBP