Philippians 4 (BOLCB2)

1 Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo. 2 Nasengi na Evodi mpe na Sentishe ete bazala na makanisi moko kati na Nkolo. 3 Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi. 4 Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka ! 5 Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene. 6 Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. 7 Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto. 8 Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino. 9 Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino. 10 Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango. 11 Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango. 12 Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli. 13 Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi. 14 Nzokande bosalaki malamu, wana bosanganaki na pasi na ngai. 15 Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino. 16 Tango mpe nazalaki na Tesalonika, botindelaki ngai mbala mibale lisungi ya biloko oyo nazalaki na yango na bosenga. 17 Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka. 18 Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye. 19 Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto. 20 Tika ete nkembo ezonga mpo na libela na libela epai na Nzambe oyo azali Tata na biso ! Amen. 21 Bopesa mbote epai ya basantu nyonso kati na Yesu-Klisto.Bandeko oyo bazali awa elongo na ngai batindeli bino mbote. 22 Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi-mingi ba-oyo bazali ya ndako ya mokonzi Sezare. 23 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto ezala elongo na molimo na bino !

In Other Versions

Philippians 4 in the ANGEFD

Philippians 4 in the ANTPNG2D

Philippians 4 in the AS21

Philippians 4 in the BAGH

Philippians 4 in the BBPNG

Philippians 4 in the BBT1E

Philippians 4 in the BDS

Philippians 4 in the BEV

Philippians 4 in the BHAD

Philippians 4 in the BIB

Philippians 4 in the BLPT

Philippians 4 in the BNT

Philippians 4 in the BNTABOOT

Philippians 4 in the BNTLV

Philippians 4 in the BOATCB

Philippians 4 in the BOATCB2

Philippians 4 in the BOBCV

Philippians 4 in the BOCNT

Philippians 4 in the BOECS

Philippians 4 in the BOGWICC

Philippians 4 in the BOHCB

Philippians 4 in the BOHCV

Philippians 4 in the BOHLNT

Philippians 4 in the BOHNTLTAL

Philippians 4 in the BOICB

Philippians 4 in the BOILNTAP

Philippians 4 in the BOITCV

Philippians 4 in the BOKCV

Philippians 4 in the BOKCV2

Philippians 4 in the BOKHWOG

Philippians 4 in the BOKSSV

Philippians 4 in the BOLCB

Philippians 4 in the BOMCV

Philippians 4 in the BONAV

Philippians 4 in the BONCB

Philippians 4 in the BONLT

Philippians 4 in the BONUT2

Philippians 4 in the BOPLNT

Philippians 4 in the BOSCB

Philippians 4 in the BOSNC

Philippians 4 in the BOTLNT

Philippians 4 in the BOVCB

Philippians 4 in the BOYCB

Philippians 4 in the BPBB

Philippians 4 in the BPH

Philippians 4 in the BSB

Philippians 4 in the CCB

Philippians 4 in the CUV

Philippians 4 in the CUVS

Philippians 4 in the DBT

Philippians 4 in the DGDNT

Philippians 4 in the DHNT

Philippians 4 in the DNT

Philippians 4 in the ELBE

Philippians 4 in the EMTV

Philippians 4 in the ESV

Philippians 4 in the FBV

Philippians 4 in the FEB

Philippians 4 in the GGMNT

Philippians 4 in the GNT

Philippians 4 in the HARY

Philippians 4 in the HNT

Philippians 4 in the IRVA

Philippians 4 in the IRVB

Philippians 4 in the IRVG

Philippians 4 in the IRVH

Philippians 4 in the IRVK

Philippians 4 in the IRVM

Philippians 4 in the IRVM2

Philippians 4 in the IRVO

Philippians 4 in the IRVP

Philippians 4 in the IRVT

Philippians 4 in the IRVT2

Philippians 4 in the IRVU

Philippians 4 in the ISVN

Philippians 4 in the JSNT

Philippians 4 in the KAPI

Philippians 4 in the KBT1ETNIK

Philippians 4 in the KBV

Philippians 4 in the KJV

Philippians 4 in the KNFD

Philippians 4 in the LBA

Philippians 4 in the LBLA

Philippians 4 in the LNT

Philippians 4 in the LSV

Philippians 4 in the MAAL

Philippians 4 in the MBV

Philippians 4 in the MBV2

Philippians 4 in the MHNT

Philippians 4 in the MKNFD

Philippians 4 in the MNG

Philippians 4 in the MNT

Philippians 4 in the MNT2

Philippians 4 in the MRS1T

Philippians 4 in the NAA

Philippians 4 in the NASB

Philippians 4 in the NBLA

Philippians 4 in the NBS

Philippians 4 in the NBVTP

Philippians 4 in the NET2

Philippians 4 in the NIV11

Philippians 4 in the NNT

Philippians 4 in the NNT2

Philippians 4 in the NNT3

Philippians 4 in the PDDPT

Philippians 4 in the PFNT

Philippians 4 in the RMNT

Philippians 4 in the SBIAS

Philippians 4 in the SBIBS

Philippians 4 in the SBIBS2

Philippians 4 in the SBICS

Philippians 4 in the SBIDS

Philippians 4 in the SBIGS

Philippians 4 in the SBIHS

Philippians 4 in the SBIIS

Philippians 4 in the SBIIS2

Philippians 4 in the SBIIS3

Philippians 4 in the SBIKS

Philippians 4 in the SBIKS2

Philippians 4 in the SBIMS

Philippians 4 in the SBIOS

Philippians 4 in the SBIPS

Philippians 4 in the SBISS

Philippians 4 in the SBITS

Philippians 4 in the SBITS2

Philippians 4 in the SBITS3

Philippians 4 in the SBITS4

Philippians 4 in the SBIUS

Philippians 4 in the SBIVS

Philippians 4 in the SBT

Philippians 4 in the SBT1E

Philippians 4 in the SCHL

Philippians 4 in the SNT

Philippians 4 in the SUSU

Philippians 4 in the SUSU2

Philippians 4 in the SYNO

Philippians 4 in the TBIAOTANT

Philippians 4 in the TBT1E

Philippians 4 in the TBT1E2

Philippians 4 in the TFTIP

Philippians 4 in the TFTU

Philippians 4 in the TGNTATF3T

Philippians 4 in the THAI

Philippians 4 in the TNFD

Philippians 4 in the TNT

Philippians 4 in the TNTIK

Philippians 4 in the TNTIL

Philippians 4 in the TNTIN

Philippians 4 in the TNTIP

Philippians 4 in the TNTIZ

Philippians 4 in the TOMA

Philippians 4 in the TTENT

Philippians 4 in the UBG

Philippians 4 in the UGV

Philippians 4 in the UGV2

Philippians 4 in the UGV3

Philippians 4 in the VBL

Philippians 4 in the VDCC

Philippians 4 in the YALU

Philippians 4 in the YAPE

Philippians 4 in the YBVTP

Philippians 4 in the ZBP