Proverbs 10 (BOLCB2)

1 Masese ya Salomo :Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,kasi mwana ya zoba ayokisakamama na ye pasi na motema. 2 Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabeepesaka litomba te,kasi bosembo ekangolaka na kufa. 3 Yawe atikaka te ete moto ya sembo akufa nzala,kasi apimelaka bato mabe biloko oyo bazali na yango posa. 4 Maboko ya goyigoyi ekomisaka moto mobola,kasi maboko oyo esalaka ekomisaka moto mozwi. 5 Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele,kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbumaazali mwana ya soni. 6 Mapamboli ezali na likoloya moto ya moto ya sembo lokola motole,kasi monoko ya moto mabe ebombaka bitumba. 7 Makanisi ya moto ya sembo ezali na lipamboli,kasi bakobosana kombo ya moto mabe. 8 Motema ya bwanya endimaka mibeko,kasi moto oyo alobaka makambo ya bozobaamilukelaka libebi. 9 Moto ya sembo atambolaka na kimia,kasi moto oyo atambolaka na banzela etengama-tengamaakobima na pwasa. 10 Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu,kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia. 11 Monoko ya moto ya sembo ezali etima ya bomoi,kasi monoko ya moto mabe ebombaka makambo mabe. 12 Koyina ebendaka koswana,kasi bolingo ezipaka mabe. 13 Bibebu ya moto ya mayele ezalaka na bwanya,kasi fimbu ezali malamumpo na mokongo ya moto oyo azangi mayele. 14 Moto ya bwanya abombaka boyebi,kasi monoko ya zoba ebendaka pasi. 15 Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,oyo batonga makasi,kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango. 16 Lifuti ya moto ya sembo ememaka ye na bomoi,kasi lifuti ya moto mabe ememaka na lisumu. 17 Moto oyo ayokaka pamela atambolaka na nzela ya bomoi,kasi moto oyo ayokaka pamela teapengwisaka bato mosusu. 18 Moto oyo abombaka koyina kati na motema na yeazali na bibebu ya lokuta,mpe moto oyo atongaka bato azali zoba. 19 Moto oyo alobaka maloba ebeleazangaka te kosala masumu,kasi moto oyo abatelaka bibebu na yeazali moto ya bwanya. 20 Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo,kasi motema ya moto mabe ezali na tina te. 21 Bibebu ya moto ya sembo ebikisaka bato ebele,kasi zoba akokufa na bozoba na ye. 22 Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi,mpe abakisaka pasi te na likolo na yango. 23 Kosala mabe esepelisaka moto oyo azangi mayele,kasi bwanya esepelisaka moto ya mayele. 24 Makambo oyo moto mabe abangaka,yango kaka nde ekomelaka ye,kasi baposa ya moto ya sembo ekokokisama. 25 Ndenge mbonge elekaka,ndenge wana mpe moto mabe akozala lisusu te,kasi moto ya sembo akotikalalokola moboko mpo na libela. 26 Ndenge masanga ya ngayi esalaka minu ngayi,mpe molinga esalaka miso pasi,ndenge wana mpe moto ya goyigoyi azalakaepai ya bato oyo batindaka ye pasi. 27 Kotosa Yawe eyeisaka bomoi molayi,kasi bomoi ya bato mabe ekokoma mokuse. 28 Elikya ya moto ya sembo ekosuka na esengo,kasi elikya ya moto mabe ekosuka na pamba. 29 Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasimpo na bato oyo batambolaka na boyengebene,kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe. 30 Moto ya sembo akotikala kokweya te,kasi bato mabe bakovanda na mokili te. 31 Monoko ya moto ya sembo epesaka bwanya,kasi lolemo ya lokuta ekokatama. 32 Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambooyo ezali malamu,kasi monoko ya moto mabe ezalaka kakana makambo mabe.

In Other Versions

Proverbs 10 in the ANGEFD

Proverbs 10 in the ANTPNG2D

Proverbs 10 in the AS21

Proverbs 10 in the BAGH

Proverbs 10 in the BBPNG

Proverbs 10 in the BBT1E

Proverbs 10 in the BDS

Proverbs 10 in the BEV

Proverbs 10 in the BHAD

Proverbs 10 in the BIB

Proverbs 10 in the BLPT

Proverbs 10 in the BNT

Proverbs 10 in the BNTABOOT

Proverbs 10 in the BNTLV

Proverbs 10 in the BOATCB

Proverbs 10 in the BOATCB2

Proverbs 10 in the BOBCV

Proverbs 10 in the BOCNT

Proverbs 10 in the BOECS

Proverbs 10 in the BOGWICC

Proverbs 10 in the BOHCB

Proverbs 10 in the BOHCV

Proverbs 10 in the BOHLNT

Proverbs 10 in the BOHNTLTAL

Proverbs 10 in the BOICB

Proverbs 10 in the BOILNTAP

Proverbs 10 in the BOITCV

Proverbs 10 in the BOKCV

Proverbs 10 in the BOKCV2

Proverbs 10 in the BOKHWOG

Proverbs 10 in the BOKSSV

Proverbs 10 in the BOLCB

Proverbs 10 in the BOMCV

Proverbs 10 in the BONAV

Proverbs 10 in the BONCB

Proverbs 10 in the BONLT

Proverbs 10 in the BONUT2

Proverbs 10 in the BOPLNT

Proverbs 10 in the BOSCB

Proverbs 10 in the BOSNC

Proverbs 10 in the BOTLNT

Proverbs 10 in the BOVCB

Proverbs 10 in the BOYCB

Proverbs 10 in the BPBB

Proverbs 10 in the BPH

Proverbs 10 in the BSB

Proverbs 10 in the CCB

Proverbs 10 in the CUV

Proverbs 10 in the CUVS

Proverbs 10 in the DBT

Proverbs 10 in the DGDNT

Proverbs 10 in the DHNT

Proverbs 10 in the DNT

Proverbs 10 in the ELBE

Proverbs 10 in the EMTV

Proverbs 10 in the ESV

Proverbs 10 in the FBV

Proverbs 10 in the FEB

Proverbs 10 in the GGMNT

Proverbs 10 in the GNT

Proverbs 10 in the HARY

Proverbs 10 in the HNT

Proverbs 10 in the IRVA

Proverbs 10 in the IRVB

Proverbs 10 in the IRVG

Proverbs 10 in the IRVH

Proverbs 10 in the IRVK

Proverbs 10 in the IRVM

Proverbs 10 in the IRVM2

Proverbs 10 in the IRVO

Proverbs 10 in the IRVP

Proverbs 10 in the IRVT

Proverbs 10 in the IRVT2

Proverbs 10 in the IRVU

Proverbs 10 in the ISVN

Proverbs 10 in the JSNT

Proverbs 10 in the KAPI

Proverbs 10 in the KBT1ETNIK

Proverbs 10 in the KBV

Proverbs 10 in the KJV

Proverbs 10 in the KNFD

Proverbs 10 in the LBA

Proverbs 10 in the LBLA

Proverbs 10 in the LNT

Proverbs 10 in the LSV

Proverbs 10 in the MAAL

Proverbs 10 in the MBV

Proverbs 10 in the MBV2

Proverbs 10 in the MHNT

Proverbs 10 in the MKNFD

Proverbs 10 in the MNG

Proverbs 10 in the MNT

Proverbs 10 in the MNT2

Proverbs 10 in the MRS1T

Proverbs 10 in the NAA

Proverbs 10 in the NASB

Proverbs 10 in the NBLA

Proverbs 10 in the NBS

Proverbs 10 in the NBVTP

Proverbs 10 in the NET2

Proverbs 10 in the NIV11

Proverbs 10 in the NNT

Proverbs 10 in the NNT2

Proverbs 10 in the NNT3

Proverbs 10 in the PDDPT

Proverbs 10 in the PFNT

Proverbs 10 in the RMNT

Proverbs 10 in the SBIAS

Proverbs 10 in the SBIBS

Proverbs 10 in the SBIBS2

Proverbs 10 in the SBICS

Proverbs 10 in the SBIDS

Proverbs 10 in the SBIGS

Proverbs 10 in the SBIHS

Proverbs 10 in the SBIIS

Proverbs 10 in the SBIIS2

Proverbs 10 in the SBIIS3

Proverbs 10 in the SBIKS

Proverbs 10 in the SBIKS2

Proverbs 10 in the SBIMS

Proverbs 10 in the SBIOS

Proverbs 10 in the SBIPS

Proverbs 10 in the SBISS

Proverbs 10 in the SBITS

Proverbs 10 in the SBITS2

Proverbs 10 in the SBITS3

Proverbs 10 in the SBITS4

Proverbs 10 in the SBIUS

Proverbs 10 in the SBIVS

Proverbs 10 in the SBT

Proverbs 10 in the SBT1E

Proverbs 10 in the SCHL

Proverbs 10 in the SNT

Proverbs 10 in the SUSU

Proverbs 10 in the SUSU2

Proverbs 10 in the SYNO

Proverbs 10 in the TBIAOTANT

Proverbs 10 in the TBT1E

Proverbs 10 in the TBT1E2

Proverbs 10 in the TFTIP

Proverbs 10 in the TFTU

Proverbs 10 in the TGNTATF3T

Proverbs 10 in the THAI

Proverbs 10 in the TNFD

Proverbs 10 in the TNT

Proverbs 10 in the TNTIK

Proverbs 10 in the TNTIL

Proverbs 10 in the TNTIN

Proverbs 10 in the TNTIP

Proverbs 10 in the TNTIZ

Proverbs 10 in the TOMA

Proverbs 10 in the TTENT

Proverbs 10 in the UBG

Proverbs 10 in the UGV

Proverbs 10 in the UGV2

Proverbs 10 in the UGV3

Proverbs 10 in the VBL

Proverbs 10 in the VDCC

Proverbs 10 in the YALU

Proverbs 10 in the YAPE

Proverbs 10 in the YBVTP

Proverbs 10 in the ZBP