Psalms 129 (BOLCB2)
1 Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele.Tika ete Isalaele ezongela koloba : 2 « Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele,kasi batikali kolonga ngai te ! » 3 Bato mabe batimoli mokongo na ngai,bazokisi ngai bapota ya banzela milayi na mokongo. 4 Kasi lokola Yawe azali sembo,akati basinga ya bato mabe. 5 Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Sionabakufa soni mpe bazonga sima ! 6 Tika ete bakoma lokola matitioyo ebotaka na likolo ya ndakompe ekawukaka liboso ete balongola yango ; 7 tika ete mobuki bambuma ya bilangaatondisa na yango te maboko na ye,tika ete mokangi maboke ya banzete atondisana yango te saki na ye. 8 Tika ete baleki nzela baloba na bango te :« Tika ete Yawe apambola bino ! » Topamboli bino na Kombo na Yawe !