Psalms 13 (BOLCB2)
1 Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. 2 Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela ?Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te ? 3 Kino tango nini nakozala mawa-mawakati na motema na ngaimpe nakomitungisa mikolo nyonso ?Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai ? 4 Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai.Sala ete miso na ngai emona malamu ;soki te, nakokufa, 5 bongo monguna na ngai akoloba :« Nalongi ye, »mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi. 6 Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo,mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo.Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe,pamba te asaleli ngai bolamu.