Revelation 6 (BOLCB2)
1 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! » 2 Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi. 3 Tango Mpate abukaki ekangelo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi koloba : « Yaka ! » 4 Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene. 5 Tango Mpate abukaki ekangelo ya misato, nayokaki ekelamu ya bomoi ya misato koloba : « Yaka ! »Mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya mwindo. Motambolisi na yango asimbaki na loboko na ye emekelo kilo. 6 Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi ; ezalaki koloba : « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. » 7 Tango Mpate abukaki ekangelo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi koloba : « Yaka ! » 8 Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili. 9 Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango. 10 Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? » 11 Bongo bapesaki na moko na moko kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango ete bazela moke kino motango ekokoka : motango ya baninga na bango ya mosala, mpe ya bandeko na bango oyo bakobomama lokola bango. 12 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo ; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila. 13 Minzoto ya likolo ekweyaki na mabele ndenge bambuma ya nzete ya figi oyo ekomeli nanu te ekweyaka soki mopepe makasi eningisi yango. 14 Lola elongwaki lokola mokanda oyo bazali kolinga, bangomba nyonso mpe bisanga nyonso elongwaki na bisika na yango. 15 Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba. 16 Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te ! 17 Pamba te mokolo monene ya kanda na bango ekoki, bongo nani akoki kolonga kotelema ? »
In Other Versions
Revelation 6 in the ANGEFD
Revelation 6 in the ANTPNG2D
Revelation 6 in the AS21
Revelation 6 in the BAGH
Revelation 6 in the BBPNG
Revelation 6 in the BBT1E
Revelation 6 in the BDS
Revelation 6 in the BEV
Revelation 6 in the BHAD
Revelation 6 in the BIB
Revelation 6 in the BLPT
Revelation 6 in the BNT
Revelation 6 in the BNTABOOT
Revelation 6 in the BNTLV
Revelation 6 in the BOATCB
Revelation 6 in the BOATCB2
Revelation 6 in the BOBCV
Revelation 6 in the BOCNT
Revelation 6 in the BOECS
Revelation 6 in the BOGWICC
Revelation 6 in the BOHCB
Revelation 6 in the BOHCV
Revelation 6 in the BOHLNT
Revelation 6 in the BOHNTLTAL
Revelation 6 in the BOICB
Revelation 6 in the BOILNTAP
Revelation 6 in the BOITCV
Revelation 6 in the BOKCV
Revelation 6 in the BOKCV2
Revelation 6 in the BOKHWOG
Revelation 6 in the BOKSSV
Revelation 6 in the BOLCB
Revelation 6 in the BOMCV
Revelation 6 in the BONAV
Revelation 6 in the BONCB
Revelation 6 in the BONLT
Revelation 6 in the BONUT2
Revelation 6 in the BOPLNT
Revelation 6 in the BOSCB
Revelation 6 in the BOSNC
Revelation 6 in the BOTLNT
Revelation 6 in the BOVCB
Revelation 6 in the BOYCB
Revelation 6 in the BPBB
Revelation 6 in the BPH
Revelation 6 in the BSB
Revelation 6 in the CCB
Revelation 6 in the CUV
Revelation 6 in the CUVS
Revelation 6 in the DBT
Revelation 6 in the DGDNT
Revelation 6 in the DHNT
Revelation 6 in the DNT
Revelation 6 in the ELBE
Revelation 6 in the EMTV
Revelation 6 in the ESV
Revelation 6 in the FBV
Revelation 6 in the FEB
Revelation 6 in the GGMNT
Revelation 6 in the GNT
Revelation 6 in the HARY
Revelation 6 in the HNT
Revelation 6 in the IRVA
Revelation 6 in the IRVB
Revelation 6 in the IRVG
Revelation 6 in the IRVH
Revelation 6 in the IRVK
Revelation 6 in the IRVM
Revelation 6 in the IRVM2
Revelation 6 in the IRVO
Revelation 6 in the IRVP
Revelation 6 in the IRVT
Revelation 6 in the IRVT2
Revelation 6 in the IRVU
Revelation 6 in the ISVN
Revelation 6 in the JSNT
Revelation 6 in the KAPI
Revelation 6 in the KBT1ETNIK
Revelation 6 in the KBV
Revelation 6 in the KJV
Revelation 6 in the KNFD
Revelation 6 in the LBA
Revelation 6 in the LBLA
Revelation 6 in the LNT
Revelation 6 in the LSV
Revelation 6 in the MAAL
Revelation 6 in the MBV
Revelation 6 in the MBV2
Revelation 6 in the MHNT
Revelation 6 in the MKNFD
Revelation 6 in the MNG
Revelation 6 in the MNT
Revelation 6 in the MNT2
Revelation 6 in the MRS1T
Revelation 6 in the NAA
Revelation 6 in the NASB
Revelation 6 in the NBLA
Revelation 6 in the NBS
Revelation 6 in the NBVTP
Revelation 6 in the NET2
Revelation 6 in the NIV11
Revelation 6 in the NNT
Revelation 6 in the NNT2
Revelation 6 in the NNT3
Revelation 6 in the PDDPT
Revelation 6 in the PFNT
Revelation 6 in the RMNT
Revelation 6 in the SBIAS
Revelation 6 in the SBIBS
Revelation 6 in the SBIBS2
Revelation 6 in the SBICS
Revelation 6 in the SBIDS
Revelation 6 in the SBIGS
Revelation 6 in the SBIHS
Revelation 6 in the SBIIS
Revelation 6 in the SBIIS2
Revelation 6 in the SBIIS3
Revelation 6 in the SBIKS
Revelation 6 in the SBIKS2
Revelation 6 in the SBIMS
Revelation 6 in the SBIOS
Revelation 6 in the SBIPS
Revelation 6 in the SBISS
Revelation 6 in the SBITS
Revelation 6 in the SBITS2
Revelation 6 in the SBITS3
Revelation 6 in the SBITS4
Revelation 6 in the SBIUS
Revelation 6 in the SBIVS
Revelation 6 in the SBT
Revelation 6 in the SBT1E
Revelation 6 in the SCHL
Revelation 6 in the SNT
Revelation 6 in the SUSU
Revelation 6 in the SUSU2
Revelation 6 in the SYNO
Revelation 6 in the TBIAOTANT
Revelation 6 in the TBT1E
Revelation 6 in the TBT1E2
Revelation 6 in the TFTIP
Revelation 6 in the TFTU
Revelation 6 in the TGNTATF3T
Revelation 6 in the THAI
Revelation 6 in the TNFD
Revelation 6 in the TNT
Revelation 6 in the TNTIK
Revelation 6 in the TNTIL
Revelation 6 in the TNTIN
Revelation 6 in the TNTIP
Revelation 6 in the TNTIZ
Revelation 6 in the TOMA
Revelation 6 in the TTENT
Revelation 6 in the UBG
Revelation 6 in the UGV
Revelation 6 in the UGV2
Revelation 6 in the UGV3
Revelation 6 in the VBL
Revelation 6 in the VDCC
Revelation 6 in the YALU
Revelation 6 in the YAPE
Revelation 6 in the YBVTP
Revelation 6 in the ZBP