Romans 3 (BOLCB2)

1 Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini ? Kokatama ngenga ezali na tina nini ? 2 Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango. 3 Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe ? 4 Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama :« Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo,mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. » 5 Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini ? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye ? Nazali kaka kokanisa lokola moto. 6 Te, ezali bongo te ! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili ? 7 To soki lokuta na ngai etalisi polele bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu ? 8 Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango. 9 Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato mosusu ? Te, soki moke te ! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu. 10 Kolanda ndenge ekomama :« Moto ya sembo azali te, ata moko te ; 11 moto ya mayele azali te ;ata moto moko te alukaka Nzambe. 12 Bango nyonso babunga nzela,bango nyonso bamibebisa ;moko te asalaka bolamu,ata moko te. 13 Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama,lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa,bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa. 14 Minoko na bango etonda na makambo ya bololompe na bilakeli mabe. 15 Makolo na bango epotaka mbangumpo na kosopa makila. 16 Na bisika nyonso oyo balekelaka,batikaka kaka libebi mpe pasi ; 17 bayebi nzela ya kimia te. 18 Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke tena miso na bango. » 19 Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe. 20 Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu. 21 Kasi sik’oyo, na kozanga kosalela Mobeko, Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango. 22 Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano, 23 pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ; 24 mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto. 25 Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango. 26 Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu. 27 Boye, tina nini komikumisa ? Tina ezali te ! Na mobeko nini ? Na mobeko ya misala ? Te, kasi na nzela ya kondima. 28 Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te. 29 Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya. 30 Pamba te Nzambe azali kaka moko ; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo. 31 Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.

In Other Versions

Romans 3 in the ANGEFD

Romans 3 in the ANTPNG2D

Romans 3 in the AS21

Romans 3 in the BAGH

Romans 3 in the BBPNG

Romans 3 in the BBT1E

Romans 3 in the BDS

Romans 3 in the BEV

Romans 3 in the BHAD

Romans 3 in the BIB

Romans 3 in the BLPT

Romans 3 in the BNT

Romans 3 in the BNTABOOT

Romans 3 in the BNTLV

Romans 3 in the BOATCB

Romans 3 in the BOATCB2

Romans 3 in the BOBCV

Romans 3 in the BOCNT

Romans 3 in the BOECS

Romans 3 in the BOGWICC

Romans 3 in the BOHCB

Romans 3 in the BOHCV

Romans 3 in the BOHLNT

Romans 3 in the BOHNTLTAL

Romans 3 in the BOICB

Romans 3 in the BOILNTAP

Romans 3 in the BOITCV

Romans 3 in the BOKCV

Romans 3 in the BOKCV2

Romans 3 in the BOKHWOG

Romans 3 in the BOKSSV

Romans 3 in the BOLCB

Romans 3 in the BOMCV

Romans 3 in the BONAV

Romans 3 in the BONCB

Romans 3 in the BONLT

Romans 3 in the BONUT2

Romans 3 in the BOPLNT

Romans 3 in the BOSCB

Romans 3 in the BOSNC

Romans 3 in the BOTLNT

Romans 3 in the BOVCB

Romans 3 in the BOYCB

Romans 3 in the BPBB

Romans 3 in the BPH

Romans 3 in the BSB

Romans 3 in the CCB

Romans 3 in the CUV

Romans 3 in the CUVS

Romans 3 in the DBT

Romans 3 in the DGDNT

Romans 3 in the DHNT

Romans 3 in the DNT

Romans 3 in the ELBE

Romans 3 in the EMTV

Romans 3 in the ESV

Romans 3 in the FBV

Romans 3 in the FEB

Romans 3 in the GGMNT

Romans 3 in the GNT

Romans 3 in the HARY

Romans 3 in the HNT

Romans 3 in the IRVA

Romans 3 in the IRVB

Romans 3 in the IRVG

Romans 3 in the IRVH

Romans 3 in the IRVK

Romans 3 in the IRVM

Romans 3 in the IRVM2

Romans 3 in the IRVO

Romans 3 in the IRVP

Romans 3 in the IRVT

Romans 3 in the IRVT2

Romans 3 in the IRVU

Romans 3 in the ISVN

Romans 3 in the JSNT

Romans 3 in the KAPI

Romans 3 in the KBT1ETNIK

Romans 3 in the KBV

Romans 3 in the KJV

Romans 3 in the KNFD

Romans 3 in the LBA

Romans 3 in the LBLA

Romans 3 in the LNT

Romans 3 in the LSV

Romans 3 in the MAAL

Romans 3 in the MBV

Romans 3 in the MBV2

Romans 3 in the MHNT

Romans 3 in the MKNFD

Romans 3 in the MNG

Romans 3 in the MNT

Romans 3 in the MNT2

Romans 3 in the MRS1T

Romans 3 in the NAA

Romans 3 in the NASB

Romans 3 in the NBLA

Romans 3 in the NBS

Romans 3 in the NBVTP

Romans 3 in the NET2

Romans 3 in the NIV11

Romans 3 in the NNT

Romans 3 in the NNT2

Romans 3 in the NNT3

Romans 3 in the PDDPT

Romans 3 in the PFNT

Romans 3 in the RMNT

Romans 3 in the SBIAS

Romans 3 in the SBIBS

Romans 3 in the SBIBS2

Romans 3 in the SBICS

Romans 3 in the SBIDS

Romans 3 in the SBIGS

Romans 3 in the SBIHS

Romans 3 in the SBIIS

Romans 3 in the SBIIS2

Romans 3 in the SBIIS3

Romans 3 in the SBIKS

Romans 3 in the SBIKS2

Romans 3 in the SBIMS

Romans 3 in the SBIOS

Romans 3 in the SBIPS

Romans 3 in the SBISS

Romans 3 in the SBITS

Romans 3 in the SBITS2

Romans 3 in the SBITS3

Romans 3 in the SBITS4

Romans 3 in the SBIUS

Romans 3 in the SBIVS

Romans 3 in the SBT

Romans 3 in the SBT1E

Romans 3 in the SCHL

Romans 3 in the SNT

Romans 3 in the SUSU

Romans 3 in the SUSU2

Romans 3 in the SYNO

Romans 3 in the TBIAOTANT

Romans 3 in the TBT1E

Romans 3 in the TBT1E2

Romans 3 in the TFTIP

Romans 3 in the TFTU

Romans 3 in the TGNTATF3T

Romans 3 in the THAI

Romans 3 in the TNFD

Romans 3 in the TNT

Romans 3 in the TNTIK

Romans 3 in the TNTIL

Romans 3 in the TNTIN

Romans 3 in the TNTIP

Romans 3 in the TNTIZ

Romans 3 in the TOMA

Romans 3 in the TTENT

Romans 3 in the UBG

Romans 3 in the UGV

Romans 3 in the UGV2

Romans 3 in the UGV3

Romans 3 in the VBL

Romans 3 in the VDCC

Romans 3 in the YALU

Romans 3 in the YAPE

Romans 3 in the YBVTP

Romans 3 in the ZBP