Ruth 3 (BOLCB2)
1 Mokolo moko, Naomi, mama-bokilo ya Rite, alobaki na ye :— Mwana na ngai, nasengeli te koluka nzela mpo na bolamu na yo ? 2 Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando. 3 Boye, sukola malamu nzoto na yo, pakola mafuta mpe lata bilamba na yo, oyo eleki kitoko. Bongo, okokende na etando epai wapi akobeta orje na ye ; kasi sala ete Boazi ayeba te ete ozali na esika yango kino akosilisa kolia mpe komela. 4 Tango akokende kolala, okotala malamu esika nini akozala. Sima, okopusana, okolongola elamba oyo ezipi makolo na ye mpe okomilalisa wana, na makolo na ye. Ye moko akoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala. 5 Rite azongiselaki ye :— Nakosala nyonso oyo oyebisi ngai. 6 Bongo Rite akendeki na etando mpe asalaki makambo nyonso oyo mama-bokilo na ye ayebisaki ye. 7 Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo ; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana. 8 Na kati-kati ya butu, tango Boazi ayokaki malili, aminyololaki mpe amonaki mwasi alali na makolo na ye. 9 Atunaki ye :— Yo ozali nani ?Azongisaki :— Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola. 10 Boazi azongiselaki ye :— Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola. 11 Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga. 12 Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai. 13 Boye, lekisa butu awa ; bongo lobi na tongo, tokotala soki moto yango akolinga kosikola yo. Soki akolinga, wana tika ye asikola yo ; kasi soki aboyi, nalaki yo na Kombo na Yawe ete ngai nakosikola yo. Boye liboso ete tongo etana, lala awa. 14 Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu ; pamba te Boazi alobaki : « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. » 15 Liboso ete akende, Boazi ayebisaki ye : « Pesa ngai elamba oyo olati, simba yango malamu. » Wana Rite asimbaki yango malamu, Boazi atielaki ye bakilo pene tuku mibale ya orje mpe asungaki ye mpo na kotombola mpe kotia yango na moto. Mpe Rite azongaki na engumba. 16 Tango Rite akomaki epai ya mama-bokilo na ye, Naomi atunaki ye :— Mwana na ngai ya mwasi, makambo eleki ndenge nini ?Boye Rite ayebisaki ye makambo oyo Boazi asalaki mpo na ye. 17 Mpe abakisaki : « Apesaki ngai kutu bakilo tuku mibale ya orje oyo, pamba te ayebisaki ngai : ‹ Kozonga maboko pamba te epai ya mama-bokilo na yo. › » 18 Bongo Naomi alobaki na ye :— Sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, vanda awa kino okomona ndenge makambo oyo ekosuka ; pamba te mobali wana akozala na kimia te kino akosilisa likambo oyo, kaka na mokolo ya lelo.
In Other Versions
Ruth 3 in the ANGEFD
Ruth 3 in the ANTPNG2D
Ruth 3 in the AS21
Ruth 3 in the BAGH
Ruth 3 in the BBPNG
Ruth 3 in the BBT1E
Ruth 3 in the BDS
Ruth 3 in the BEV
Ruth 3 in the BHAD
Ruth 3 in the BIB
Ruth 3 in the BLPT
Ruth 3 in the BNT
Ruth 3 in the BNTABOOT
Ruth 3 in the BNTLV
Ruth 3 in the BOATCB
Ruth 3 in the BOATCB2
Ruth 3 in the BOBCV
Ruth 3 in the BOCNT
Ruth 3 in the BOECS
Ruth 3 in the BOGWICC
Ruth 3 in the BOHCB
Ruth 3 in the BOHCV
Ruth 3 in the BOHLNT
Ruth 3 in the BOHNTLTAL
Ruth 3 in the BOICB
Ruth 3 in the BOILNTAP
Ruth 3 in the BOITCV
Ruth 3 in the BOKCV
Ruth 3 in the BOKCV2
Ruth 3 in the BOKHWOG
Ruth 3 in the BOKSSV
Ruth 3 in the BOLCB
Ruth 3 in the BOMCV
Ruth 3 in the BONAV
Ruth 3 in the BONCB
Ruth 3 in the BONLT
Ruth 3 in the BONUT2
Ruth 3 in the BOPLNT
Ruth 3 in the BOSCB
Ruth 3 in the BOSNC
Ruth 3 in the BOTLNT
Ruth 3 in the BOVCB
Ruth 3 in the BOYCB
Ruth 3 in the BPBB
Ruth 3 in the BPH
Ruth 3 in the BSB
Ruth 3 in the CCB
Ruth 3 in the CUV
Ruth 3 in the CUVS
Ruth 3 in the DBT
Ruth 3 in the DGDNT
Ruth 3 in the DHNT
Ruth 3 in the DNT
Ruth 3 in the ELBE
Ruth 3 in the EMTV
Ruth 3 in the ESV
Ruth 3 in the FBV
Ruth 3 in the FEB
Ruth 3 in the GGMNT
Ruth 3 in the GNT
Ruth 3 in the HARY
Ruth 3 in the HNT
Ruth 3 in the IRVA
Ruth 3 in the IRVB
Ruth 3 in the IRVG
Ruth 3 in the IRVH
Ruth 3 in the IRVK
Ruth 3 in the IRVM
Ruth 3 in the IRVM2
Ruth 3 in the IRVO
Ruth 3 in the IRVP
Ruth 3 in the IRVT
Ruth 3 in the IRVT2
Ruth 3 in the IRVU
Ruth 3 in the ISVN
Ruth 3 in the JSNT
Ruth 3 in the KAPI
Ruth 3 in the KBT1ETNIK
Ruth 3 in the KBV
Ruth 3 in the KJV
Ruth 3 in the KNFD
Ruth 3 in the LBA
Ruth 3 in the LBLA
Ruth 3 in the LNT
Ruth 3 in the LSV
Ruth 3 in the MAAL
Ruth 3 in the MBV
Ruth 3 in the MBV2
Ruth 3 in the MHNT
Ruth 3 in the MKNFD
Ruth 3 in the MNG
Ruth 3 in the MNT
Ruth 3 in the MNT2
Ruth 3 in the MRS1T
Ruth 3 in the NAA
Ruth 3 in the NASB
Ruth 3 in the NBLA
Ruth 3 in the NBS
Ruth 3 in the NBVTP
Ruth 3 in the NET2
Ruth 3 in the NIV11
Ruth 3 in the NNT
Ruth 3 in the NNT2
Ruth 3 in the NNT3
Ruth 3 in the PDDPT
Ruth 3 in the PFNT
Ruth 3 in the RMNT
Ruth 3 in the SBIAS
Ruth 3 in the SBIBS
Ruth 3 in the SBIBS2
Ruth 3 in the SBICS
Ruth 3 in the SBIDS
Ruth 3 in the SBIGS
Ruth 3 in the SBIHS
Ruth 3 in the SBIIS
Ruth 3 in the SBIIS2
Ruth 3 in the SBIIS3
Ruth 3 in the SBIKS
Ruth 3 in the SBIKS2
Ruth 3 in the SBIMS
Ruth 3 in the SBIOS
Ruth 3 in the SBIPS
Ruth 3 in the SBISS
Ruth 3 in the SBITS
Ruth 3 in the SBITS2
Ruth 3 in the SBITS3
Ruth 3 in the SBITS4
Ruth 3 in the SBIUS
Ruth 3 in the SBIVS
Ruth 3 in the SBT
Ruth 3 in the SBT1E
Ruth 3 in the SCHL
Ruth 3 in the SNT
Ruth 3 in the SUSU
Ruth 3 in the SUSU2
Ruth 3 in the SYNO
Ruth 3 in the TBIAOTANT
Ruth 3 in the TBT1E
Ruth 3 in the TBT1E2
Ruth 3 in the TFTIP
Ruth 3 in the TFTU
Ruth 3 in the TGNTATF3T
Ruth 3 in the THAI
Ruth 3 in the TNFD
Ruth 3 in the TNT
Ruth 3 in the TNTIK
Ruth 3 in the TNTIL
Ruth 3 in the TNTIN
Ruth 3 in the TNTIP
Ruth 3 in the TNTIZ
Ruth 3 in the TOMA
Ruth 3 in the TTENT
Ruth 3 in the UBG
Ruth 3 in the UGV
Ruth 3 in the UGV2
Ruth 3 in the UGV3
Ruth 3 in the VBL
Ruth 3 in the VDCC
Ruth 3 in the YALU
Ruth 3 in the YAPE
Ruth 3 in the YBVTP
Ruth 3 in the ZBP